1 Corinthians 1 (BOLCB2)

1 Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ; 2 Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ;mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso : 3 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! 4 Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ; 5 pamba te, kati na makambo nyonso, botondisamaki na bomengo kati na Klisto, na oyo nyonso etali maloba mpe na oyo etali boyebi, 6 kolanda ndenge Nzambe azali kokokisa kati na bino litatoli na biso na tina na Klisto. 7 Boye, bozangi ata likabo moko te ya ngolu ya Nzambe, wana bozali kozela na posa makasi komonisama ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto. 8 Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto. 9 Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene. 10 Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko. 11 Pamba te, bandeko na ngai, bavandi ya ndako ya Kloe bayebisi ngai ete koswana ezali kati na bino. 12 Tala makambo oyo nalingi koloba : Moko kati na bino azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Apolosi ; » mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Petelo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Klisto. » 13 Boni, Klisto azali ya kokabwana ? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino ? Ezali na kombo ya Polo nde bozwaki libatisi ? 14 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe ete nabatisa moto ata moko te kati na bino, longola kaka Krispisi mpe Gayusi, 15 mpo ete moko te aloba ete bobatisamaki na kombo na ngai. 16 Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu. 17 Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango. 18 Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ; 19 kolanda ndenge ekomama :« Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya,mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. » 20 Wapi moto ya bwanya ? Wapi molakisi ya Mobeko ? Wapi moto ya mayele ya tango oyo ? Boni, Nzambe akomisa te bwanya ya mokili liboma ? 21 Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma. 22 Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya, 23 biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano. 24 Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe. 25 Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato. 26 Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu ! 27 Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni. 28 Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina, 29 mpo ete moto ata moko te amikumisa liboso ya Nzambe. 30 Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama, 31 mpo ete, kolanda ndenge ekomama,« Tika ete moto oyo alingi komikumisaamikumisa kati na Nkolo ! »

In Other Versions

1 Corinthians 1 in the ANGEFD

1 Corinthians 1 in the ANTPNG2D

1 Corinthians 1 in the AS21

1 Corinthians 1 in the BAGH

1 Corinthians 1 in the BBPNG

1 Corinthians 1 in the BBT1E

1 Corinthians 1 in the BDS

1 Corinthians 1 in the BEV

1 Corinthians 1 in the BHAD

1 Corinthians 1 in the BIB

1 Corinthians 1 in the BLPT

1 Corinthians 1 in the BNT

1 Corinthians 1 in the BNTABOOT

1 Corinthians 1 in the BNTLV

1 Corinthians 1 in the BOATCB

1 Corinthians 1 in the BOATCB2

1 Corinthians 1 in the BOBCV

1 Corinthians 1 in the BOCNT

1 Corinthians 1 in the BOECS

1 Corinthians 1 in the BOGWICC

1 Corinthians 1 in the BOHCB

1 Corinthians 1 in the BOHCV

1 Corinthians 1 in the BOHLNT

1 Corinthians 1 in the BOHNTLTAL

1 Corinthians 1 in the BOICB

1 Corinthians 1 in the BOILNTAP

1 Corinthians 1 in the BOITCV

1 Corinthians 1 in the BOKCV

1 Corinthians 1 in the BOKCV2

1 Corinthians 1 in the BOKHWOG

1 Corinthians 1 in the BOKSSV

1 Corinthians 1 in the BOLCB

1 Corinthians 1 in the BOMCV

1 Corinthians 1 in the BONAV

1 Corinthians 1 in the BONCB

1 Corinthians 1 in the BONLT

1 Corinthians 1 in the BONUT2

1 Corinthians 1 in the BOPLNT

1 Corinthians 1 in the BOSCB

1 Corinthians 1 in the BOSNC

1 Corinthians 1 in the BOTLNT

1 Corinthians 1 in the BOVCB

1 Corinthians 1 in the BOYCB

1 Corinthians 1 in the BPBB

1 Corinthians 1 in the BPH

1 Corinthians 1 in the BSB

1 Corinthians 1 in the CCB

1 Corinthians 1 in the CUV

1 Corinthians 1 in the CUVS

1 Corinthians 1 in the DBT

1 Corinthians 1 in the DGDNT

1 Corinthians 1 in the DHNT

1 Corinthians 1 in the DNT

1 Corinthians 1 in the ELBE

1 Corinthians 1 in the EMTV

1 Corinthians 1 in the ESV

1 Corinthians 1 in the FBV

1 Corinthians 1 in the FEB

1 Corinthians 1 in the GGMNT

1 Corinthians 1 in the GNT

1 Corinthians 1 in the HARY

1 Corinthians 1 in the HNT

1 Corinthians 1 in the IRVA

1 Corinthians 1 in the IRVB

1 Corinthians 1 in the IRVG

1 Corinthians 1 in the IRVH

1 Corinthians 1 in the IRVK

1 Corinthians 1 in the IRVM

1 Corinthians 1 in the IRVM2

1 Corinthians 1 in the IRVO

1 Corinthians 1 in the IRVP

1 Corinthians 1 in the IRVT

1 Corinthians 1 in the IRVT2

1 Corinthians 1 in the IRVU

1 Corinthians 1 in the ISVN

1 Corinthians 1 in the JSNT

1 Corinthians 1 in the KAPI

1 Corinthians 1 in the KBT1ETNIK

1 Corinthians 1 in the KBV

1 Corinthians 1 in the KJV

1 Corinthians 1 in the KNFD

1 Corinthians 1 in the LBA

1 Corinthians 1 in the LBLA

1 Corinthians 1 in the LNT

1 Corinthians 1 in the LSV

1 Corinthians 1 in the MAAL

1 Corinthians 1 in the MBV

1 Corinthians 1 in the MBV2

1 Corinthians 1 in the MHNT

1 Corinthians 1 in the MKNFD

1 Corinthians 1 in the MNG

1 Corinthians 1 in the MNT

1 Corinthians 1 in the MNT2

1 Corinthians 1 in the MRS1T

1 Corinthians 1 in the NAA

1 Corinthians 1 in the NASB

1 Corinthians 1 in the NBLA

1 Corinthians 1 in the NBS

1 Corinthians 1 in the NBVTP

1 Corinthians 1 in the NET2

1 Corinthians 1 in the NIV11

1 Corinthians 1 in the NNT

1 Corinthians 1 in the NNT2

1 Corinthians 1 in the NNT3

1 Corinthians 1 in the PDDPT

1 Corinthians 1 in the PFNT

1 Corinthians 1 in the RMNT

1 Corinthians 1 in the SBIAS

1 Corinthians 1 in the SBIBS

1 Corinthians 1 in the SBIBS2

1 Corinthians 1 in the SBICS

1 Corinthians 1 in the SBIDS

1 Corinthians 1 in the SBIGS

1 Corinthians 1 in the SBIHS

1 Corinthians 1 in the SBIIS

1 Corinthians 1 in the SBIIS2

1 Corinthians 1 in the SBIIS3

1 Corinthians 1 in the SBIKS

1 Corinthians 1 in the SBIKS2

1 Corinthians 1 in the SBIMS

1 Corinthians 1 in the SBIOS

1 Corinthians 1 in the SBIPS

1 Corinthians 1 in the SBISS

1 Corinthians 1 in the SBITS

1 Corinthians 1 in the SBITS2

1 Corinthians 1 in the SBITS3

1 Corinthians 1 in the SBITS4

1 Corinthians 1 in the SBIUS

1 Corinthians 1 in the SBIVS

1 Corinthians 1 in the SBT

1 Corinthians 1 in the SBT1E

1 Corinthians 1 in the SCHL

1 Corinthians 1 in the SNT

1 Corinthians 1 in the SUSU

1 Corinthians 1 in the SUSU2

1 Corinthians 1 in the SYNO

1 Corinthians 1 in the TBIAOTANT

1 Corinthians 1 in the TBT1E

1 Corinthians 1 in the TBT1E2

1 Corinthians 1 in the TFTIP

1 Corinthians 1 in the TFTU

1 Corinthians 1 in the TGNTATF3T

1 Corinthians 1 in the THAI

1 Corinthians 1 in the TNFD

1 Corinthians 1 in the TNT

1 Corinthians 1 in the TNTIK

1 Corinthians 1 in the TNTIL

1 Corinthians 1 in the TNTIN

1 Corinthians 1 in the TNTIP

1 Corinthians 1 in the TNTIZ

1 Corinthians 1 in the TOMA

1 Corinthians 1 in the TTENT

1 Corinthians 1 in the UBG

1 Corinthians 1 in the UGV

1 Corinthians 1 in the UGV2

1 Corinthians 1 in the UGV3

1 Corinthians 1 in the VBL

1 Corinthians 1 in the VDCC

1 Corinthians 1 in the YALU

1 Corinthians 1 in the YAPE

1 Corinthians 1 in the YBVTP

1 Corinthians 1 in the ZBP