1 Peter 4 (BOLCB2)

1 Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana ; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu, 2 mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili. 3 Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka : kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele. 4 Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi ; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi. 5 Kasi bakosamba liboso ya Nzambe oyo akosambisa penza bato ya bomoi mpe bakufi. 6 Yango wana mpe kutu Yesu ateyaki Sango Malamu ata epai ya bato oyo bazali sik’oyo ya kokufa mpo ete basambisama kolanda mibeko ya bato na oyo etali nzoto mpe babika bomoi kolanda mokano ya Nzambe na oyo etali Molimo. 7 Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela. 8 Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele. 9 Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te. 10 Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe ; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe. 11 Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen ! 12 Balingami, bokamwa te bapasi oyo bozali komona, lokola nde likambo ya kokamwa ekomeli bino. 13 Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye. 14 Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino. 15 Tika ete moko te kati na bino amona pasi mpo ete azali mobomi to moyibi, moto mabe to moto oyo akotaka makambo ya bato mosusu ; 16 nzokande soki azali komona pasi mpo ete azali Moklisto, wana tika ete ayokela yango soni ata moke te, kasi akumisa nde Nzambe mpo na Kombo yango. 17 Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ? 18 Pamba te Makomi elobi : « Soki ezali na pasi makasi nde moto ya sembo abikisami, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ? » 19 Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.

In Other Versions

1 Peter 4 in the ANGEFD

1 Peter 4 in the ANTPNG2D

1 Peter 4 in the AS21

1 Peter 4 in the BAGH

1 Peter 4 in the BBPNG

1 Peter 4 in the BBT1E

1 Peter 4 in the BDS

1 Peter 4 in the BEV

1 Peter 4 in the BHAD

1 Peter 4 in the BIB

1 Peter 4 in the BLPT

1 Peter 4 in the BNT

1 Peter 4 in the BNTABOOT

1 Peter 4 in the BNTLV

1 Peter 4 in the BOATCB

1 Peter 4 in the BOATCB2

1 Peter 4 in the BOBCV

1 Peter 4 in the BOCNT

1 Peter 4 in the BOECS

1 Peter 4 in the BOGWICC

1 Peter 4 in the BOHCB

1 Peter 4 in the BOHCV

1 Peter 4 in the BOHLNT

1 Peter 4 in the BOHNTLTAL

1 Peter 4 in the BOICB

1 Peter 4 in the BOILNTAP

1 Peter 4 in the BOITCV

1 Peter 4 in the BOKCV

1 Peter 4 in the BOKCV2

1 Peter 4 in the BOKHWOG

1 Peter 4 in the BOKSSV

1 Peter 4 in the BOLCB

1 Peter 4 in the BOMCV

1 Peter 4 in the BONAV

1 Peter 4 in the BONCB

1 Peter 4 in the BONLT

1 Peter 4 in the BONUT2

1 Peter 4 in the BOPLNT

1 Peter 4 in the BOSCB

1 Peter 4 in the BOSNC

1 Peter 4 in the BOTLNT

1 Peter 4 in the BOVCB

1 Peter 4 in the BOYCB

1 Peter 4 in the BPBB

1 Peter 4 in the BPH

1 Peter 4 in the BSB

1 Peter 4 in the CCB

1 Peter 4 in the CUV

1 Peter 4 in the CUVS

1 Peter 4 in the DBT

1 Peter 4 in the DGDNT

1 Peter 4 in the DHNT

1 Peter 4 in the DNT

1 Peter 4 in the ELBE

1 Peter 4 in the EMTV

1 Peter 4 in the ESV

1 Peter 4 in the FBV

1 Peter 4 in the FEB

1 Peter 4 in the GGMNT

1 Peter 4 in the GNT

1 Peter 4 in the HARY

1 Peter 4 in the HNT

1 Peter 4 in the IRVA

1 Peter 4 in the IRVB

1 Peter 4 in the IRVG

1 Peter 4 in the IRVH

1 Peter 4 in the IRVK

1 Peter 4 in the IRVM

1 Peter 4 in the IRVM2

1 Peter 4 in the IRVO

1 Peter 4 in the IRVP

1 Peter 4 in the IRVT

1 Peter 4 in the IRVT2

1 Peter 4 in the IRVU

1 Peter 4 in the ISVN

1 Peter 4 in the JSNT

1 Peter 4 in the KAPI

1 Peter 4 in the KBT1ETNIK

1 Peter 4 in the KBV

1 Peter 4 in the KJV

1 Peter 4 in the KNFD

1 Peter 4 in the LBA

1 Peter 4 in the LBLA

1 Peter 4 in the LNT

1 Peter 4 in the LSV

1 Peter 4 in the MAAL

1 Peter 4 in the MBV

1 Peter 4 in the MBV2

1 Peter 4 in the MHNT

1 Peter 4 in the MKNFD

1 Peter 4 in the MNG

1 Peter 4 in the MNT

1 Peter 4 in the MNT2

1 Peter 4 in the MRS1T

1 Peter 4 in the NAA

1 Peter 4 in the NASB

1 Peter 4 in the NBLA

1 Peter 4 in the NBS

1 Peter 4 in the NBVTP

1 Peter 4 in the NET2

1 Peter 4 in the NIV11

1 Peter 4 in the NNT

1 Peter 4 in the NNT2

1 Peter 4 in the NNT3

1 Peter 4 in the PDDPT

1 Peter 4 in the PFNT

1 Peter 4 in the RMNT

1 Peter 4 in the SBIAS

1 Peter 4 in the SBIBS

1 Peter 4 in the SBIBS2

1 Peter 4 in the SBICS

1 Peter 4 in the SBIDS

1 Peter 4 in the SBIGS

1 Peter 4 in the SBIHS

1 Peter 4 in the SBIIS

1 Peter 4 in the SBIIS2

1 Peter 4 in the SBIIS3

1 Peter 4 in the SBIKS

1 Peter 4 in the SBIKS2

1 Peter 4 in the SBIMS

1 Peter 4 in the SBIOS

1 Peter 4 in the SBIPS

1 Peter 4 in the SBISS

1 Peter 4 in the SBITS

1 Peter 4 in the SBITS2

1 Peter 4 in the SBITS3

1 Peter 4 in the SBITS4

1 Peter 4 in the SBIUS

1 Peter 4 in the SBIVS

1 Peter 4 in the SBT

1 Peter 4 in the SBT1E

1 Peter 4 in the SCHL

1 Peter 4 in the SNT

1 Peter 4 in the SUSU

1 Peter 4 in the SUSU2

1 Peter 4 in the SYNO

1 Peter 4 in the TBIAOTANT

1 Peter 4 in the TBT1E

1 Peter 4 in the TBT1E2

1 Peter 4 in the TFTIP

1 Peter 4 in the TFTU

1 Peter 4 in the TGNTATF3T

1 Peter 4 in the THAI

1 Peter 4 in the TNFD

1 Peter 4 in the TNT

1 Peter 4 in the TNTIK

1 Peter 4 in the TNTIL

1 Peter 4 in the TNTIN

1 Peter 4 in the TNTIP

1 Peter 4 in the TNTIZ

1 Peter 4 in the TOMA

1 Peter 4 in the TTENT

1 Peter 4 in the UBG

1 Peter 4 in the UGV

1 Peter 4 in the UGV2

1 Peter 4 in the UGV3

1 Peter 4 in the VBL

1 Peter 4 in the VDCC

1 Peter 4 in the YALU

1 Peter 4 in the YAPE

1 Peter 4 in the YBVTP

1 Peter 4 in the ZBP