1 Samuel 12 (BOLCB2)

1 Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele :— Napesi nyonso oyo bolobaki na ngai : natieli bino mokonzi. 2 Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo. 3 Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango. 4 Bato bazongiselaki ye :— Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te ; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto. 5 Samuele alobaki na bango :— Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai.Bato bazongisaki :— Azali penza Motatoli. 6 Bongo Samuele alobaki na bato :— Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito. 7 Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino. 8 Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo. 9 Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango. 10 Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. » 11 Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia. 12 Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino. 13 Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino. 14 Kobanda lelo, soki botosi Yawe, soki bosaleli Ye, soki bobateli mitindo na Ye, mpe soki bino elongo na mokonzi oyo azali kokamba bino bolandi Yawe, Nzambe na bino, makambo nyonso ekotambola malamu. 15 Kasi soki botosi Yawe te mpe bobateli te mibeko na Ye, loboko na Ye ekobalukela bino ndenge ebalukelaki bakoko na bino. 16 Yango wana sik’oyo lisusu, bobongama mpo na kotala likambo monene oyo Yawe alingi kosala na miso na bino. 17 Boni, mokolo ya lelo ezali te tango ya kobuka ble ? Nakobelela Yawe mpo ete atinda kake mpe mvula, bongo bokomona mpe bokososola ndenge nini ezali monene, mabe oyo bosalaki na miso ya Yawe tango bosengaki mokonzi. 18 Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele. 19 Bato nyonso balobaki na Samuele :— Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso. 20 Samuele azongiselaki bango :— Bobanga te ! Solo, bosalaki mabe nyonso wana ; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba. 21 Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina. 22 Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko. 23 Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima. 24 Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino. 25 Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.

In Other Versions

1 Samuel 12 in the ANGEFD

1 Samuel 12 in the ANTPNG2D

1 Samuel 12 in the AS21

1 Samuel 12 in the BAGH

1 Samuel 12 in the BBPNG

1 Samuel 12 in the BBT1E

1 Samuel 12 in the BDS

1 Samuel 12 in the BEV

1 Samuel 12 in the BHAD

1 Samuel 12 in the BIB

1 Samuel 12 in the BLPT

1 Samuel 12 in the BNT

1 Samuel 12 in the BNTABOOT

1 Samuel 12 in the BNTLV

1 Samuel 12 in the BOATCB

1 Samuel 12 in the BOATCB2

1 Samuel 12 in the BOBCV

1 Samuel 12 in the BOCNT

1 Samuel 12 in the BOECS

1 Samuel 12 in the BOGWICC

1 Samuel 12 in the BOHCB

1 Samuel 12 in the BOHCV

1 Samuel 12 in the BOHLNT

1 Samuel 12 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 12 in the BOICB

1 Samuel 12 in the BOILNTAP

1 Samuel 12 in the BOITCV

1 Samuel 12 in the BOKCV

1 Samuel 12 in the BOKCV2

1 Samuel 12 in the BOKHWOG

1 Samuel 12 in the BOKSSV

1 Samuel 12 in the BOLCB

1 Samuel 12 in the BOMCV

1 Samuel 12 in the BONAV

1 Samuel 12 in the BONCB

1 Samuel 12 in the BONLT

1 Samuel 12 in the BONUT2

1 Samuel 12 in the BOPLNT

1 Samuel 12 in the BOSCB

1 Samuel 12 in the BOSNC

1 Samuel 12 in the BOTLNT

1 Samuel 12 in the BOVCB

1 Samuel 12 in the BOYCB

1 Samuel 12 in the BPBB

1 Samuel 12 in the BPH

1 Samuel 12 in the BSB

1 Samuel 12 in the CCB

1 Samuel 12 in the CUV

1 Samuel 12 in the CUVS

1 Samuel 12 in the DBT

1 Samuel 12 in the DGDNT

1 Samuel 12 in the DHNT

1 Samuel 12 in the DNT

1 Samuel 12 in the ELBE

1 Samuel 12 in the EMTV

1 Samuel 12 in the ESV

1 Samuel 12 in the FBV

1 Samuel 12 in the FEB

1 Samuel 12 in the GGMNT

1 Samuel 12 in the GNT

1 Samuel 12 in the HARY

1 Samuel 12 in the HNT

1 Samuel 12 in the IRVA

1 Samuel 12 in the IRVB

1 Samuel 12 in the IRVG

1 Samuel 12 in the IRVH

1 Samuel 12 in the IRVK

1 Samuel 12 in the IRVM

1 Samuel 12 in the IRVM2

1 Samuel 12 in the IRVO

1 Samuel 12 in the IRVP

1 Samuel 12 in the IRVT

1 Samuel 12 in the IRVT2

1 Samuel 12 in the IRVU

1 Samuel 12 in the ISVN

1 Samuel 12 in the JSNT

1 Samuel 12 in the KAPI

1 Samuel 12 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 12 in the KBV

1 Samuel 12 in the KJV

1 Samuel 12 in the KNFD

1 Samuel 12 in the LBA

1 Samuel 12 in the LBLA

1 Samuel 12 in the LNT

1 Samuel 12 in the LSV

1 Samuel 12 in the MAAL

1 Samuel 12 in the MBV

1 Samuel 12 in the MBV2

1 Samuel 12 in the MHNT

1 Samuel 12 in the MKNFD

1 Samuel 12 in the MNG

1 Samuel 12 in the MNT

1 Samuel 12 in the MNT2

1 Samuel 12 in the MRS1T

1 Samuel 12 in the NAA

1 Samuel 12 in the NASB

1 Samuel 12 in the NBLA

1 Samuel 12 in the NBS

1 Samuel 12 in the NBVTP

1 Samuel 12 in the NET2

1 Samuel 12 in the NIV11

1 Samuel 12 in the NNT

1 Samuel 12 in the NNT2

1 Samuel 12 in the NNT3

1 Samuel 12 in the PDDPT

1 Samuel 12 in the PFNT

1 Samuel 12 in the RMNT

1 Samuel 12 in the SBIAS

1 Samuel 12 in the SBIBS

1 Samuel 12 in the SBIBS2

1 Samuel 12 in the SBICS

1 Samuel 12 in the SBIDS

1 Samuel 12 in the SBIGS

1 Samuel 12 in the SBIHS

1 Samuel 12 in the SBIIS

1 Samuel 12 in the SBIIS2

1 Samuel 12 in the SBIIS3

1 Samuel 12 in the SBIKS

1 Samuel 12 in the SBIKS2

1 Samuel 12 in the SBIMS

1 Samuel 12 in the SBIOS

1 Samuel 12 in the SBIPS

1 Samuel 12 in the SBISS

1 Samuel 12 in the SBITS

1 Samuel 12 in the SBITS2

1 Samuel 12 in the SBITS3

1 Samuel 12 in the SBITS4

1 Samuel 12 in the SBIUS

1 Samuel 12 in the SBIVS

1 Samuel 12 in the SBT

1 Samuel 12 in the SBT1E

1 Samuel 12 in the SCHL

1 Samuel 12 in the SNT

1 Samuel 12 in the SUSU

1 Samuel 12 in the SUSU2

1 Samuel 12 in the SYNO

1 Samuel 12 in the TBIAOTANT

1 Samuel 12 in the TBT1E

1 Samuel 12 in the TBT1E2

1 Samuel 12 in the TFTIP

1 Samuel 12 in the TFTU

1 Samuel 12 in the TGNTATF3T

1 Samuel 12 in the THAI

1 Samuel 12 in the TNFD

1 Samuel 12 in the TNT

1 Samuel 12 in the TNTIK

1 Samuel 12 in the TNTIL

1 Samuel 12 in the TNTIN

1 Samuel 12 in the TNTIP

1 Samuel 12 in the TNTIZ

1 Samuel 12 in the TOMA

1 Samuel 12 in the TTENT

1 Samuel 12 in the UBG

1 Samuel 12 in the UGV

1 Samuel 12 in the UGV2

1 Samuel 12 in the UGV3

1 Samuel 12 in the VBL

1 Samuel 12 in the VDCC

1 Samuel 12 in the YALU

1 Samuel 12 in the YAPE

1 Samuel 12 in the YBVTP

1 Samuel 12 in the ZBP