Acts 15 (BOLCB2)

1 Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko :— Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko. 2 Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana ; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango. 3 Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo. 4 Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango. 5 Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba :— Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize. 6 Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango. 7 Lokola tembe elekaki makasi, Petelo atelemaki mpe alobaki :— Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino mpo ete nakoka koteya Sango Malamu epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bakoma bandimi. 8 Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso. 9 Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te akomisaki mitema na bango peto na nzela ya kondima. 10 Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ? 11 Te ! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango. 12 Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya. 13 Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki :— Bandeko, boyoka ngai ! 14 Simona awuti koyebisa biso ndenge nini, wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na Ye. 15 Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli, kolanda ndenge ekomama : 16 « Sima na yango, nakozonga,nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi,oyo esila kokweya ;nakotonga yango lisusumpe nakotelemisa yango, 17 mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo,ezala bato nyonso ya bikolo ya bapayaoyo babengamaka na Kombo na Ngai,elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo, 18 makambo oyo eyebana wuta kala. » 19 Yango wana, tala likanisi na ngai : Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe. 20 Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te. 21 Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba. 22 Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko. 23 Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye :Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino :Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ;Mbote na bino. 24 Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te. 25 Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo, 26 ba-oyo bakaba bomoi na bango mpo na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso. 27 Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo. 28 Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo : 29 Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango.Botikala malamu ! 30 Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango. 31 Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi na malendisi oyo ezalaki kati na yango. 32 Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima. 33 Bawumelaki wana mwa tango, mpe bandeko batombelaki bango kimia mpo na bozongi epai ya bato oyo batindaki bango. [ 34 Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.] 35 Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo. 36 Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi :— Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini. 37 Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako ; 38 kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala. 39 Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi azwaki Malako mpe akotaki elongo na ye kati na masuwa mpo na kokende na Shipre. 40 Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo. 41 Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.

In Other Versions

Acts 15 in the ANGEFD

Acts 15 in the ANTPNG2D

Acts 15 in the AS21

Acts 15 in the BAGH

Acts 15 in the BBPNG

Acts 15 in the BBT1E

Acts 15 in the BDS

Acts 15 in the BEV

Acts 15 in the BHAD

Acts 15 in the BIB

Acts 15 in the BLPT

Acts 15 in the BNT

Acts 15 in the BNTABOOT

Acts 15 in the BNTLV

Acts 15 in the BOATCB

Acts 15 in the BOATCB2

Acts 15 in the BOBCV

Acts 15 in the BOCNT

Acts 15 in the BOECS

Acts 15 in the BOGWICC

Acts 15 in the BOHCB

Acts 15 in the BOHCV

Acts 15 in the BOHLNT

Acts 15 in the BOHNTLTAL

Acts 15 in the BOICB

Acts 15 in the BOILNTAP

Acts 15 in the BOITCV

Acts 15 in the BOKCV

Acts 15 in the BOKCV2

Acts 15 in the BOKHWOG

Acts 15 in the BOKSSV

Acts 15 in the BOLCB

Acts 15 in the BOMCV

Acts 15 in the BONAV

Acts 15 in the BONCB

Acts 15 in the BONLT

Acts 15 in the BONUT2

Acts 15 in the BOPLNT

Acts 15 in the BOSCB

Acts 15 in the BOSNC

Acts 15 in the BOTLNT

Acts 15 in the BOVCB

Acts 15 in the BOYCB

Acts 15 in the BPBB

Acts 15 in the BPH

Acts 15 in the BSB

Acts 15 in the CCB

Acts 15 in the CUV

Acts 15 in the CUVS

Acts 15 in the DBT

Acts 15 in the DGDNT

Acts 15 in the DHNT

Acts 15 in the DNT

Acts 15 in the ELBE

Acts 15 in the EMTV

Acts 15 in the ESV

Acts 15 in the FBV

Acts 15 in the FEB

Acts 15 in the GGMNT

Acts 15 in the GNT

Acts 15 in the HARY

Acts 15 in the HNT

Acts 15 in the IRVA

Acts 15 in the IRVB

Acts 15 in the IRVG

Acts 15 in the IRVH

Acts 15 in the IRVK

Acts 15 in the IRVM

Acts 15 in the IRVM2

Acts 15 in the IRVO

Acts 15 in the IRVP

Acts 15 in the IRVT

Acts 15 in the IRVT2

Acts 15 in the IRVU

Acts 15 in the ISVN

Acts 15 in the JSNT

Acts 15 in the KAPI

Acts 15 in the KBT1ETNIK

Acts 15 in the KBV

Acts 15 in the KJV

Acts 15 in the KNFD

Acts 15 in the LBA

Acts 15 in the LBLA

Acts 15 in the LNT

Acts 15 in the LSV

Acts 15 in the MAAL

Acts 15 in the MBV

Acts 15 in the MBV2

Acts 15 in the MHNT

Acts 15 in the MKNFD

Acts 15 in the MNG

Acts 15 in the MNT

Acts 15 in the MNT2

Acts 15 in the MRS1T

Acts 15 in the NAA

Acts 15 in the NASB

Acts 15 in the NBLA

Acts 15 in the NBS

Acts 15 in the NBVTP

Acts 15 in the NET2

Acts 15 in the NIV11

Acts 15 in the NNT

Acts 15 in the NNT2

Acts 15 in the NNT3

Acts 15 in the PDDPT

Acts 15 in the PFNT

Acts 15 in the RMNT

Acts 15 in the SBIAS

Acts 15 in the SBIBS

Acts 15 in the SBIBS2

Acts 15 in the SBICS

Acts 15 in the SBIDS

Acts 15 in the SBIGS

Acts 15 in the SBIHS

Acts 15 in the SBIIS

Acts 15 in the SBIIS2

Acts 15 in the SBIIS3

Acts 15 in the SBIKS

Acts 15 in the SBIKS2

Acts 15 in the SBIMS

Acts 15 in the SBIOS

Acts 15 in the SBIPS

Acts 15 in the SBISS

Acts 15 in the SBITS

Acts 15 in the SBITS2

Acts 15 in the SBITS3

Acts 15 in the SBITS4

Acts 15 in the SBIUS

Acts 15 in the SBIVS

Acts 15 in the SBT

Acts 15 in the SBT1E

Acts 15 in the SCHL

Acts 15 in the SNT

Acts 15 in the SUSU

Acts 15 in the SUSU2

Acts 15 in the SYNO

Acts 15 in the TBIAOTANT

Acts 15 in the TBT1E

Acts 15 in the TBT1E2

Acts 15 in the TFTIP

Acts 15 in the TFTU

Acts 15 in the TGNTATF3T

Acts 15 in the THAI

Acts 15 in the TNFD

Acts 15 in the TNT

Acts 15 in the TNTIK

Acts 15 in the TNTIL

Acts 15 in the TNTIN

Acts 15 in the TNTIP

Acts 15 in the TNTIZ

Acts 15 in the TOMA

Acts 15 in the TTENT

Acts 15 in the UBG

Acts 15 in the UGV

Acts 15 in the UGV2

Acts 15 in the UGV3

Acts 15 in the VBL

Acts 15 in the VDCC

Acts 15 in the YALU

Acts 15 in the YAPE

Acts 15 in the YBVTP

Acts 15 in the ZBP