Acts 4 (BOLCB2)

1 Wana Petelo mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, Banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe Basaduseo bayaki, 2 na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki. 3 Bakangaki Petelo mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma. 4 Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango ; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano. 5 Boye, mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko basanganaki na Yelusalemi. 6 Ana, mokonzi ya Banganga-Nzambe, azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 7 Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna :— Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani ? 8 Bongo, Petelo oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango :— Bakonzi mpe bakambi ya bato ! 9 Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika, 10 tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi. 11 Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. » 12 Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso. 13 Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu. 14 Kasi, lokola bazalaki komona moto oyo abikisamaki atelemi elongo na bango, bazalaki ata na liloba moko te ya koloba. 15 Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita-Monene ; mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu. 16 Bazalaki kotunana :— Tosala penza nini na bato oyo ? Pamba te bavandi nyonso ya Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene ; tokoki kowangana yango te. 17 Kasi, mpo ete sango ya likambo oyo ekoba te kopanzana kati na bato, tokebisa bango boye : « Bomeka lisusu te koloba na Kombo na Yesu, ezala ata na nani ! » 18 Bongo, babengaki Petelo elongo na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini. 19 Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango :— Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ? 20 Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki ! 21 Sima na kogangela bango, batikaki bango mpo ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalemaki. 22 Pamba te moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei. 23 Tango batikaki bango, Petelo mpe Yoane bakendeki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango. 24 Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe ; balobaki :— Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; 25 Yo nde olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso, Davidi, mosali na yo :« Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele,mpe bato bazali kosala makita ya pamba ? 26 Bakonzi ya mokili batomboki,mpe bakambi basanganimpo na kotelemela Nkolo mpe Mopakolami na Ye. » 27 Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa. 28 Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo. 29 Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso. 30 Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu. 31 Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso. 32 Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso. 33 Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso. 34 Moko te kati na bango akelelaki ; pamba te bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki 35 mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye. 36 Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, » 37 atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.

In Other Versions

Acts 4 in the ANGEFD

Acts 4 in the ANTPNG2D

Acts 4 in the AS21

Acts 4 in the BAGH

Acts 4 in the BBPNG

Acts 4 in the BBT1E

Acts 4 in the BDS

Acts 4 in the BEV

Acts 4 in the BHAD

Acts 4 in the BIB

Acts 4 in the BLPT

Acts 4 in the BNT

Acts 4 in the BNTABOOT

Acts 4 in the BNTLV

Acts 4 in the BOATCB

Acts 4 in the BOATCB2

Acts 4 in the BOBCV

Acts 4 in the BOCNT

Acts 4 in the BOECS

Acts 4 in the BOGWICC

Acts 4 in the BOHCB

Acts 4 in the BOHCV

Acts 4 in the BOHLNT

Acts 4 in the BOHNTLTAL

Acts 4 in the BOICB

Acts 4 in the BOILNTAP

Acts 4 in the BOITCV

Acts 4 in the BOKCV

Acts 4 in the BOKCV2

Acts 4 in the BOKHWOG

Acts 4 in the BOKSSV

Acts 4 in the BOLCB

Acts 4 in the BOMCV

Acts 4 in the BONAV

Acts 4 in the BONCB

Acts 4 in the BONLT

Acts 4 in the BONUT2

Acts 4 in the BOPLNT

Acts 4 in the BOSCB

Acts 4 in the BOSNC

Acts 4 in the BOTLNT

Acts 4 in the BOVCB

Acts 4 in the BOYCB

Acts 4 in the BPBB

Acts 4 in the BPH

Acts 4 in the BSB

Acts 4 in the CCB

Acts 4 in the CUV

Acts 4 in the CUVS

Acts 4 in the DBT

Acts 4 in the DGDNT

Acts 4 in the DHNT

Acts 4 in the DNT

Acts 4 in the ELBE

Acts 4 in the EMTV

Acts 4 in the ESV

Acts 4 in the FBV

Acts 4 in the FEB

Acts 4 in the GGMNT

Acts 4 in the GNT

Acts 4 in the HARY

Acts 4 in the HNT

Acts 4 in the IRVA

Acts 4 in the IRVB

Acts 4 in the IRVG

Acts 4 in the IRVH

Acts 4 in the IRVK

Acts 4 in the IRVM

Acts 4 in the IRVM2

Acts 4 in the IRVO

Acts 4 in the IRVP

Acts 4 in the IRVT

Acts 4 in the IRVT2

Acts 4 in the IRVU

Acts 4 in the ISVN

Acts 4 in the JSNT

Acts 4 in the KAPI

Acts 4 in the KBT1ETNIK

Acts 4 in the KBV

Acts 4 in the KJV

Acts 4 in the KNFD

Acts 4 in the LBA

Acts 4 in the LBLA

Acts 4 in the LNT

Acts 4 in the LSV

Acts 4 in the MAAL

Acts 4 in the MBV

Acts 4 in the MBV2

Acts 4 in the MHNT

Acts 4 in the MKNFD

Acts 4 in the MNG

Acts 4 in the MNT

Acts 4 in the MNT2

Acts 4 in the MRS1T

Acts 4 in the NAA

Acts 4 in the NASB

Acts 4 in the NBLA

Acts 4 in the NBS

Acts 4 in the NBVTP

Acts 4 in the NET2

Acts 4 in the NIV11

Acts 4 in the NNT

Acts 4 in the NNT2

Acts 4 in the NNT3

Acts 4 in the PDDPT

Acts 4 in the PFNT

Acts 4 in the RMNT

Acts 4 in the SBIAS

Acts 4 in the SBIBS

Acts 4 in the SBIBS2

Acts 4 in the SBICS

Acts 4 in the SBIDS

Acts 4 in the SBIGS

Acts 4 in the SBIHS

Acts 4 in the SBIIS

Acts 4 in the SBIIS2

Acts 4 in the SBIIS3

Acts 4 in the SBIKS

Acts 4 in the SBIKS2

Acts 4 in the SBIMS

Acts 4 in the SBIOS

Acts 4 in the SBIPS

Acts 4 in the SBISS

Acts 4 in the SBITS

Acts 4 in the SBITS2

Acts 4 in the SBITS3

Acts 4 in the SBITS4

Acts 4 in the SBIUS

Acts 4 in the SBIVS

Acts 4 in the SBT

Acts 4 in the SBT1E

Acts 4 in the SCHL

Acts 4 in the SNT

Acts 4 in the SUSU

Acts 4 in the SUSU2

Acts 4 in the SYNO

Acts 4 in the TBIAOTANT

Acts 4 in the TBT1E

Acts 4 in the TBT1E2

Acts 4 in the TFTIP

Acts 4 in the TFTU

Acts 4 in the TGNTATF3T

Acts 4 in the THAI

Acts 4 in the TNFD

Acts 4 in the TNT

Acts 4 in the TNTIK

Acts 4 in the TNTIL

Acts 4 in the TNTIN

Acts 4 in the TNTIP

Acts 4 in the TNTIZ

Acts 4 in the TOMA

Acts 4 in the TTENT

Acts 4 in the UBG

Acts 4 in the UGV

Acts 4 in the UGV2

Acts 4 in the UGV3

Acts 4 in the VBL

Acts 4 in the VDCC

Acts 4 in the YALU

Acts 4 in the YAPE

Acts 4 in the YBVTP

Acts 4 in the ZBP