Deuteronomy 29 (BOLCB2)

1 Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba. 2 Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa. 3 Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka. 4 Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te. 5 Boliaki mapa te mpe bomelaki vino te to masanga mosusu oyo elangwisaka. Nasalaki yango mpo boyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. 6 Tango bokomaki na esika oyo, Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, bayaki kobundisa biso, kasi tolongaki bango. 7 Tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango lokola libula epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe epai ya ndambo ya libota ya Manase. 8 Bosalela malamu maloba ya boyokani oyo mpo ete bomona bolamu na makambo nyonso oyo bokosala. 9 Bino nyonso, bokotelema lelo na miso ya Yawe, Nzambe na bino : bakambi na bino, bakonzi na bino ya masanga, bampaka na bino, bakonzi na bino ya basoda mpe bato mosusu kati na Isalaele 10 elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi. 11 Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe, 12 mpo na koyebisa bino, na mokolo ya lelo, ete bozali bato na Ye, mpe Ye azali Nzambe na bino ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai na bino mpe bakoko na bino —Abrayami, Izaki mpe Jakobi. 13 Yawe azali kosala boyokani oyo, na nzela ya ndayi esangana na bilakeli mabe, elongo na bino kaka te, 14 kasi mpe elongo na ba-oyo bazali awa kati na biso, na mokolo ya lelo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe elongo na ba-oyo bazali awa te elongo na biso. 15 Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki. 16 Bomonaki kati na bango biloko na bango ya mbindo, banzambe ya bikeko basala na libaya, na libanga, na palata mpe na wolo. 17 Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana. 18 Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye. 19 Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili. 20 Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. 21 Milongo ya bana na bino oyo ekoya sima na bino mpe bapaya oyo bakowuta na mikili ya mosika bakomona bitumbu oyo Yawe akokweyisela mokili wana. 22 Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki : bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi. 23 Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? › 24 Mpe eyano ekozala : ‹ Esalemaki bongo, pamba te bato oyo babukaki boyokani oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, asalaki elongo na bango tango abimisaki bango na Ejipito. 25 Bakendeki kosambela banzambe mosusu mpe bagumbamelaki bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo Ye apekisaki bango. 26 Yango wana, kanda ya Yawe epeli na mokili wana mpe amemi bilakeli mabe nyonso oyo ekomami na buku oyo, kati na mokili wana. 27 Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. › 28 Makambo oyo ebombama ezali mpo na Yawe, Nzambe na biso ; mpe makambo oyo emonisami ezali mpo na biso mpe bakitani na biso, mpo na tango nyonso, mpo ete tokoka kosalela maloba nyonso ya mibeko oyo. »

In Other Versions

Deuteronomy 29 in the ANGEFD

Deuteronomy 29 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 29 in the AS21

Deuteronomy 29 in the BAGH

Deuteronomy 29 in the BBPNG

Deuteronomy 29 in the BBT1E

Deuteronomy 29 in the BDS

Deuteronomy 29 in the BEV

Deuteronomy 29 in the BHAD

Deuteronomy 29 in the BIB

Deuteronomy 29 in the BLPT

Deuteronomy 29 in the BNT

Deuteronomy 29 in the BNTABOOT

Deuteronomy 29 in the BNTLV

Deuteronomy 29 in the BOATCB

Deuteronomy 29 in the BOATCB2

Deuteronomy 29 in the BOBCV

Deuteronomy 29 in the BOCNT

Deuteronomy 29 in the BOECS

Deuteronomy 29 in the BOGWICC

Deuteronomy 29 in the BOHCB

Deuteronomy 29 in the BOHCV

Deuteronomy 29 in the BOHLNT

Deuteronomy 29 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 29 in the BOICB

Deuteronomy 29 in the BOILNTAP

Deuteronomy 29 in the BOITCV

Deuteronomy 29 in the BOKCV

Deuteronomy 29 in the BOKCV2

Deuteronomy 29 in the BOKHWOG

Deuteronomy 29 in the BOKSSV

Deuteronomy 29 in the BOLCB

Deuteronomy 29 in the BOMCV

Deuteronomy 29 in the BONAV

Deuteronomy 29 in the BONCB

Deuteronomy 29 in the BONLT

Deuteronomy 29 in the BONUT2

Deuteronomy 29 in the BOPLNT

Deuteronomy 29 in the BOSCB

Deuteronomy 29 in the BOSNC

Deuteronomy 29 in the BOTLNT

Deuteronomy 29 in the BOVCB

Deuteronomy 29 in the BOYCB

Deuteronomy 29 in the BPBB

Deuteronomy 29 in the BPH

Deuteronomy 29 in the BSB

Deuteronomy 29 in the CCB

Deuteronomy 29 in the CUV

Deuteronomy 29 in the CUVS

Deuteronomy 29 in the DBT

Deuteronomy 29 in the DGDNT

Deuteronomy 29 in the DHNT

Deuteronomy 29 in the DNT

Deuteronomy 29 in the ELBE

Deuteronomy 29 in the EMTV

Deuteronomy 29 in the ESV

Deuteronomy 29 in the FBV

Deuteronomy 29 in the FEB

Deuteronomy 29 in the GGMNT

Deuteronomy 29 in the GNT

Deuteronomy 29 in the HARY

Deuteronomy 29 in the HNT

Deuteronomy 29 in the IRVA

Deuteronomy 29 in the IRVB

Deuteronomy 29 in the IRVG

Deuteronomy 29 in the IRVH

Deuteronomy 29 in the IRVK

Deuteronomy 29 in the IRVM

Deuteronomy 29 in the IRVM2

Deuteronomy 29 in the IRVO

Deuteronomy 29 in the IRVP

Deuteronomy 29 in the IRVT

Deuteronomy 29 in the IRVT2

Deuteronomy 29 in the IRVU

Deuteronomy 29 in the ISVN

Deuteronomy 29 in the JSNT

Deuteronomy 29 in the KAPI

Deuteronomy 29 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 29 in the KBV

Deuteronomy 29 in the KJV

Deuteronomy 29 in the KNFD

Deuteronomy 29 in the LBA

Deuteronomy 29 in the LBLA

Deuteronomy 29 in the LNT

Deuteronomy 29 in the LSV

Deuteronomy 29 in the MAAL

Deuteronomy 29 in the MBV

Deuteronomy 29 in the MBV2

Deuteronomy 29 in the MHNT

Deuteronomy 29 in the MKNFD

Deuteronomy 29 in the MNG

Deuteronomy 29 in the MNT

Deuteronomy 29 in the MNT2

Deuteronomy 29 in the MRS1T

Deuteronomy 29 in the NAA

Deuteronomy 29 in the NASB

Deuteronomy 29 in the NBLA

Deuteronomy 29 in the NBS

Deuteronomy 29 in the NBVTP

Deuteronomy 29 in the NET2

Deuteronomy 29 in the NIV11

Deuteronomy 29 in the NNT

Deuteronomy 29 in the NNT2

Deuteronomy 29 in the NNT3

Deuteronomy 29 in the PDDPT

Deuteronomy 29 in the PFNT

Deuteronomy 29 in the RMNT

Deuteronomy 29 in the SBIAS

Deuteronomy 29 in the SBIBS

Deuteronomy 29 in the SBIBS2

Deuteronomy 29 in the SBICS

Deuteronomy 29 in the SBIDS

Deuteronomy 29 in the SBIGS

Deuteronomy 29 in the SBIHS

Deuteronomy 29 in the SBIIS

Deuteronomy 29 in the SBIIS2

Deuteronomy 29 in the SBIIS3

Deuteronomy 29 in the SBIKS

Deuteronomy 29 in the SBIKS2

Deuteronomy 29 in the SBIMS

Deuteronomy 29 in the SBIOS

Deuteronomy 29 in the SBIPS

Deuteronomy 29 in the SBISS

Deuteronomy 29 in the SBITS

Deuteronomy 29 in the SBITS2

Deuteronomy 29 in the SBITS3

Deuteronomy 29 in the SBITS4

Deuteronomy 29 in the SBIUS

Deuteronomy 29 in the SBIVS

Deuteronomy 29 in the SBT

Deuteronomy 29 in the SBT1E

Deuteronomy 29 in the SCHL

Deuteronomy 29 in the SNT

Deuteronomy 29 in the SUSU

Deuteronomy 29 in the SUSU2

Deuteronomy 29 in the SYNO

Deuteronomy 29 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 29 in the TBT1E

Deuteronomy 29 in the TBT1E2

Deuteronomy 29 in the TFTIP

Deuteronomy 29 in the TFTU

Deuteronomy 29 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 29 in the THAI

Deuteronomy 29 in the TNFD

Deuteronomy 29 in the TNT

Deuteronomy 29 in the TNTIK

Deuteronomy 29 in the TNTIL

Deuteronomy 29 in the TNTIN

Deuteronomy 29 in the TNTIP

Deuteronomy 29 in the TNTIZ

Deuteronomy 29 in the TOMA

Deuteronomy 29 in the TTENT

Deuteronomy 29 in the UBG

Deuteronomy 29 in the UGV

Deuteronomy 29 in the UGV2

Deuteronomy 29 in the UGV3

Deuteronomy 29 in the VBL

Deuteronomy 29 in the VDCC

Deuteronomy 29 in the YALU

Deuteronomy 29 in the YAPE

Deuteronomy 29 in the YBVTP

Deuteronomy 29 in the ZBP