Deuteronomy 32 (BOLCB2)

1 Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba !Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai ! 2 Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula,mpe maloba na ngai ekita lokola londende,lokola mvula moke na likolo ya matiti,lokola mvula makasi na likolo ya milona ! 3 Nakosakola Kombo ya Yawe.Bokumisa monene ya Nzambe na biso ! 4 Yawe azali lokola Libanga ;misala na Ye ezali ya kokoka,mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ;azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ;azali sembo mpe alima. 5 Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ;bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino,bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi. 6 Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ?Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya !Boni, Yawe azali Tata na bino te ?Azali Mokeli na bino te ?Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino. 7 Bokanisa mikolo ya kala,mpe botala milongo oyo eleka kala !Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino.Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino. 8 Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesakina ekolo moko na moko mabele na yango,tango akabolaki bato nyonso,atiaki bandelo mpo na batokolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe. 9 Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ;Jakobi azali libula na Ye. 10 Amonaki ye na esobe,kati na mokili oyo ekawuka,etonda na koganga ya somo.Azingelaki ye, abatelaki ye,akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye. 11 Azali lokola mpongooyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa.Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango,etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango,mpe ememaka yango likolo ya masala na yango. 12 Ye moko Yawe akambaki bango ;nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye. 13 Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili,aleisaki bango bambuma ya elanga,amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga,mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga, 14 miliki ya bangombe mpe ya bameme ;apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba,ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ;mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani.Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko,bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino. 15 Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ;atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ;asundolaki Nzambe oyo akelaki yempe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye. 16 Bapesaki Yawe kanda makasilikolo ya banzambe na bango ya bapaya,mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo. 17 Babonzaki bambeka epai ya milimo mabeoyo ezali Nzambe te ;babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te,banzambe oyo ebimaki sika,banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te. 18 Bobosanaki Libanga oyo ebotaki binompe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi. 19 Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango,pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda. 20 Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai,mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala,pamba te bazali molongo ya bato mabe,bana bazanga boyengebene. 21 Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te,batumbolaki kanda na Ngai likolo ya bilokooyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te.Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpebayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ;nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda. 22 Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto,mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi,ekotumba mabele, bambuma na yangompe miboko ya bangomba. 23 Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi,nakobwakela bango makonga na Ngai. 24 Nakotindela bango nzala makasi,bokono oyo esalaka nzoto moto-motompo ete esilisa bango,mpe etumbu oyo ekoboma bango.Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba,ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu. 25 Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ;kati na bandako na bango, somo ekokonza ;bilenge mibali mpe bilenge basi,bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa. 26 Nalobaki : Nakopanza bangompe nakosala ete bato babosana bango. 27 Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngaimpe bayini na bango bamikosa te na koloba :‹ Tolongaki na makasi na biso moko,Yawe asalaki eloko moko te. › » 28 Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele,bazali na bososoli te kati na bango. 29 Soki kaka bazalaki bato ya bwanya,balingaki kososola likambo oyompe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala ! 30 Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko,to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomisoki Libanga na bango atekaki bango teto soki Yawe asundolaki bango te ? 31 Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ;bango moko banguna na biso bayebi yango. 32 Bilanga na bango ya vino ewutina bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore.Bambuma na bango etondi na ngenge,mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo. 33 Vino na bango ezali ngenge ya banyoka,ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka. 34 « Boni, ebombami epai na Ngai te ?Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai ? 35 Ngai nde nazongisaka mabe na mabe,Ngai nde nakofuta moto na moto.Tango lokolo na bango ekobeta libaku,na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu,mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kalampo na bango ekowumela te. » 36 Yawe akosambisa bato na Ye,mpe akoyokela basali na Ye mawa ;tango akomona ete makasi na bango esili,mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko teoyo bakoki kokanga to kokangola. 37 Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ?Wapi libanga epai wapi babombamaki ? 38 Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bangompe komela makabo na bango ya vino ?Tika ete etelema mpo na kosalisa binompe kopesa bino ebombamelo ! 39 Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ;mosusu azali te !Nabomaka mpe napesaka bomoi ;nazokisaka mpe nabikisaka.Mpe moto moko te akoki kokangolaoyo ezali na maboko na Ngai. 40 Natomboli loboko na Ngai na likolo,mpe nalobi : Na Kombo na Ngai, 41 tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai,mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa,nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai,mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te. 42 Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato,nakolangwisa makonga na Ngai na makilaya bato oyo babomi, ya bakangamimpe ya mito ya bakonzi ya banguna. » 43 Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye !Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ;pamba te akozongisa mabe na mabempo na makila ya basali na Ye,akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Yempe akosala mosala ya bolimbisi masumumpo na mokili na Ye mpe bato na Ye. 44 Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni. 45 Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele, 46 alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo. 47 Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. » 48 Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize : 49 « Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango. 50 Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye, 51 pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele. 52 Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »

In Other Versions

Deuteronomy 32 in the ANGEFD

Deuteronomy 32 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 32 in the AS21

Deuteronomy 32 in the BAGH

Deuteronomy 32 in the BBPNG

Deuteronomy 32 in the BBT1E

Deuteronomy 32 in the BDS

Deuteronomy 32 in the BEV

Deuteronomy 32 in the BHAD

Deuteronomy 32 in the BIB

Deuteronomy 32 in the BLPT

Deuteronomy 32 in the BNT

Deuteronomy 32 in the BNTABOOT

Deuteronomy 32 in the BNTLV

Deuteronomy 32 in the BOATCB

Deuteronomy 32 in the BOATCB2

Deuteronomy 32 in the BOBCV

Deuteronomy 32 in the BOCNT

Deuteronomy 32 in the BOECS

Deuteronomy 32 in the BOGWICC

Deuteronomy 32 in the BOHCB

Deuteronomy 32 in the BOHCV

Deuteronomy 32 in the BOHLNT

Deuteronomy 32 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 32 in the BOICB

Deuteronomy 32 in the BOILNTAP

Deuteronomy 32 in the BOITCV

Deuteronomy 32 in the BOKCV

Deuteronomy 32 in the BOKCV2

Deuteronomy 32 in the BOKHWOG

Deuteronomy 32 in the BOKSSV

Deuteronomy 32 in the BOLCB

Deuteronomy 32 in the BOMCV

Deuteronomy 32 in the BONAV

Deuteronomy 32 in the BONCB

Deuteronomy 32 in the BONLT

Deuteronomy 32 in the BONUT2

Deuteronomy 32 in the BOPLNT

Deuteronomy 32 in the BOSCB

Deuteronomy 32 in the BOSNC

Deuteronomy 32 in the BOTLNT

Deuteronomy 32 in the BOVCB

Deuteronomy 32 in the BOYCB

Deuteronomy 32 in the BPBB

Deuteronomy 32 in the BPH

Deuteronomy 32 in the BSB

Deuteronomy 32 in the CCB

Deuteronomy 32 in the CUV

Deuteronomy 32 in the CUVS

Deuteronomy 32 in the DBT

Deuteronomy 32 in the DGDNT

Deuteronomy 32 in the DHNT

Deuteronomy 32 in the DNT

Deuteronomy 32 in the ELBE

Deuteronomy 32 in the EMTV

Deuteronomy 32 in the ESV

Deuteronomy 32 in the FBV

Deuteronomy 32 in the FEB

Deuteronomy 32 in the GGMNT

Deuteronomy 32 in the GNT

Deuteronomy 32 in the HARY

Deuteronomy 32 in the HNT

Deuteronomy 32 in the IRVA

Deuteronomy 32 in the IRVB

Deuteronomy 32 in the IRVG

Deuteronomy 32 in the IRVH

Deuteronomy 32 in the IRVK

Deuteronomy 32 in the IRVM

Deuteronomy 32 in the IRVM2

Deuteronomy 32 in the IRVO

Deuteronomy 32 in the IRVP

Deuteronomy 32 in the IRVT

Deuteronomy 32 in the IRVT2

Deuteronomy 32 in the IRVU

Deuteronomy 32 in the ISVN

Deuteronomy 32 in the JSNT

Deuteronomy 32 in the KAPI

Deuteronomy 32 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 32 in the KBV

Deuteronomy 32 in the KJV

Deuteronomy 32 in the KNFD

Deuteronomy 32 in the LBA

Deuteronomy 32 in the LBLA

Deuteronomy 32 in the LNT

Deuteronomy 32 in the LSV

Deuteronomy 32 in the MAAL

Deuteronomy 32 in the MBV

Deuteronomy 32 in the MBV2

Deuteronomy 32 in the MHNT

Deuteronomy 32 in the MKNFD

Deuteronomy 32 in the MNG

Deuteronomy 32 in the MNT

Deuteronomy 32 in the MNT2

Deuteronomy 32 in the MRS1T

Deuteronomy 32 in the NAA

Deuteronomy 32 in the NASB

Deuteronomy 32 in the NBLA

Deuteronomy 32 in the NBS

Deuteronomy 32 in the NBVTP

Deuteronomy 32 in the NET2

Deuteronomy 32 in the NIV11

Deuteronomy 32 in the NNT

Deuteronomy 32 in the NNT2

Deuteronomy 32 in the NNT3

Deuteronomy 32 in the PDDPT

Deuteronomy 32 in the PFNT

Deuteronomy 32 in the RMNT

Deuteronomy 32 in the SBIAS

Deuteronomy 32 in the SBIBS

Deuteronomy 32 in the SBIBS2

Deuteronomy 32 in the SBICS

Deuteronomy 32 in the SBIDS

Deuteronomy 32 in the SBIGS

Deuteronomy 32 in the SBIHS

Deuteronomy 32 in the SBIIS

Deuteronomy 32 in the SBIIS2

Deuteronomy 32 in the SBIIS3

Deuteronomy 32 in the SBIKS

Deuteronomy 32 in the SBIKS2

Deuteronomy 32 in the SBIMS

Deuteronomy 32 in the SBIOS

Deuteronomy 32 in the SBIPS

Deuteronomy 32 in the SBISS

Deuteronomy 32 in the SBITS

Deuteronomy 32 in the SBITS2

Deuteronomy 32 in the SBITS3

Deuteronomy 32 in the SBITS4

Deuteronomy 32 in the SBIUS

Deuteronomy 32 in the SBIVS

Deuteronomy 32 in the SBT

Deuteronomy 32 in the SBT1E

Deuteronomy 32 in the SCHL

Deuteronomy 32 in the SNT

Deuteronomy 32 in the SUSU

Deuteronomy 32 in the SUSU2

Deuteronomy 32 in the SYNO

Deuteronomy 32 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 32 in the TBT1E

Deuteronomy 32 in the TBT1E2

Deuteronomy 32 in the TFTIP

Deuteronomy 32 in the TFTU

Deuteronomy 32 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 32 in the THAI

Deuteronomy 32 in the TNFD

Deuteronomy 32 in the TNT

Deuteronomy 32 in the TNTIK

Deuteronomy 32 in the TNTIL

Deuteronomy 32 in the TNTIN

Deuteronomy 32 in the TNTIP

Deuteronomy 32 in the TNTIZ

Deuteronomy 32 in the TOMA

Deuteronomy 32 in the TTENT

Deuteronomy 32 in the UBG

Deuteronomy 32 in the UGV

Deuteronomy 32 in the UGV2

Deuteronomy 32 in the UGV3

Deuteronomy 32 in the VBL

Deuteronomy 32 in the VDCC

Deuteronomy 32 in the YALU

Deuteronomy 32 in the YAPE

Deuteronomy 32 in the YBVTP

Deuteronomy 32 in the ZBP