Exodus 35 (BOLCB2)

1 Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala : 2 — Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye. 3 Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. » 4 Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala : 5 — Kati na biloko oyo bozali na yango, botia pembeni ndambo oyo bokobonza epai na Yawe lokola makabo. Moto nyonso oyo azali na motema malamu akomemela Yawe makabo : wolo, palata mpe bronze, 6 langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko,bapwale ya ntaba, 7 baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale ;banzete ya akasia, 8 mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda,biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, 9 mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. 10 Tika ete bato nyonso oyo kati na bino bayebi misala, baya kosala misala nyonso oyo Yawe atindi : 11 Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango ; 12 Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido, 13 mesa, mabaya na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe, 14 etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda, 15 etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali, 16 etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso,sani ya bronze mpe evandelo na yango, 17 batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango mpe rido mpo na ekotelo ya lopango, 18 bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango, 19 bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. » 20 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize. 21 Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule. 22 Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango. 23 Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango. 24 Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe ; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso. 25 Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko. 26 Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba. 27 Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. 28 Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko. 29 Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. 30 Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; 31 atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso : 32 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze, 33 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. » 34 Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala. 35 Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.

In Other Versions

Exodus 35 in the ANGEFD

Exodus 35 in the ANTPNG2D

Exodus 35 in the AS21

Exodus 35 in the BAGH

Exodus 35 in the BBPNG

Exodus 35 in the BBT1E

Exodus 35 in the BDS

Exodus 35 in the BEV

Exodus 35 in the BHAD

Exodus 35 in the BIB

Exodus 35 in the BLPT

Exodus 35 in the BNT

Exodus 35 in the BNTABOOT

Exodus 35 in the BNTLV

Exodus 35 in the BOATCB

Exodus 35 in the BOATCB2

Exodus 35 in the BOBCV

Exodus 35 in the BOCNT

Exodus 35 in the BOECS

Exodus 35 in the BOGWICC

Exodus 35 in the BOHCB

Exodus 35 in the BOHCV

Exodus 35 in the BOHLNT

Exodus 35 in the BOHNTLTAL

Exodus 35 in the BOICB

Exodus 35 in the BOILNTAP

Exodus 35 in the BOITCV

Exodus 35 in the BOKCV

Exodus 35 in the BOKCV2

Exodus 35 in the BOKHWOG

Exodus 35 in the BOKSSV

Exodus 35 in the BOLCB

Exodus 35 in the BOMCV

Exodus 35 in the BONAV

Exodus 35 in the BONCB

Exodus 35 in the BONLT

Exodus 35 in the BONUT2

Exodus 35 in the BOPLNT

Exodus 35 in the BOSCB

Exodus 35 in the BOSNC

Exodus 35 in the BOTLNT

Exodus 35 in the BOVCB

Exodus 35 in the BOYCB

Exodus 35 in the BPBB

Exodus 35 in the BPH

Exodus 35 in the BSB

Exodus 35 in the CCB

Exodus 35 in the CUV

Exodus 35 in the CUVS

Exodus 35 in the DBT

Exodus 35 in the DGDNT

Exodus 35 in the DHNT

Exodus 35 in the DNT

Exodus 35 in the ELBE

Exodus 35 in the EMTV

Exodus 35 in the ESV

Exodus 35 in the FBV

Exodus 35 in the FEB

Exodus 35 in the GGMNT

Exodus 35 in the GNT

Exodus 35 in the HARY

Exodus 35 in the HNT

Exodus 35 in the IRVA

Exodus 35 in the IRVB

Exodus 35 in the IRVG

Exodus 35 in the IRVH

Exodus 35 in the IRVK

Exodus 35 in the IRVM

Exodus 35 in the IRVM2

Exodus 35 in the IRVO

Exodus 35 in the IRVP

Exodus 35 in the IRVT

Exodus 35 in the IRVT2

Exodus 35 in the IRVU

Exodus 35 in the ISVN

Exodus 35 in the JSNT

Exodus 35 in the KAPI

Exodus 35 in the KBT1ETNIK

Exodus 35 in the KBV

Exodus 35 in the KJV

Exodus 35 in the KNFD

Exodus 35 in the LBA

Exodus 35 in the LBLA

Exodus 35 in the LNT

Exodus 35 in the LSV

Exodus 35 in the MAAL

Exodus 35 in the MBV

Exodus 35 in the MBV2

Exodus 35 in the MHNT

Exodus 35 in the MKNFD

Exodus 35 in the MNG

Exodus 35 in the MNT

Exodus 35 in the MNT2

Exodus 35 in the MRS1T

Exodus 35 in the NAA

Exodus 35 in the NASB

Exodus 35 in the NBLA

Exodus 35 in the NBS

Exodus 35 in the NBVTP

Exodus 35 in the NET2

Exodus 35 in the NIV11

Exodus 35 in the NNT

Exodus 35 in the NNT2

Exodus 35 in the NNT3

Exodus 35 in the PDDPT

Exodus 35 in the PFNT

Exodus 35 in the RMNT

Exodus 35 in the SBIAS

Exodus 35 in the SBIBS

Exodus 35 in the SBIBS2

Exodus 35 in the SBICS

Exodus 35 in the SBIDS

Exodus 35 in the SBIGS

Exodus 35 in the SBIHS

Exodus 35 in the SBIIS

Exodus 35 in the SBIIS2

Exodus 35 in the SBIIS3

Exodus 35 in the SBIKS

Exodus 35 in the SBIKS2

Exodus 35 in the SBIMS

Exodus 35 in the SBIOS

Exodus 35 in the SBIPS

Exodus 35 in the SBISS

Exodus 35 in the SBITS

Exodus 35 in the SBITS2

Exodus 35 in the SBITS3

Exodus 35 in the SBITS4

Exodus 35 in the SBIUS

Exodus 35 in the SBIVS

Exodus 35 in the SBT

Exodus 35 in the SBT1E

Exodus 35 in the SCHL

Exodus 35 in the SNT

Exodus 35 in the SUSU

Exodus 35 in the SUSU2

Exodus 35 in the SYNO

Exodus 35 in the TBIAOTANT

Exodus 35 in the TBT1E

Exodus 35 in the TBT1E2

Exodus 35 in the TFTIP

Exodus 35 in the TFTU

Exodus 35 in the TGNTATF3T

Exodus 35 in the THAI

Exodus 35 in the TNFD

Exodus 35 in the TNT

Exodus 35 in the TNTIK

Exodus 35 in the TNTIL

Exodus 35 in the TNTIN

Exodus 35 in the TNTIP

Exodus 35 in the TNTIZ

Exodus 35 in the TOMA

Exodus 35 in the TTENT

Exodus 35 in the UBG

Exodus 35 in the UGV

Exodus 35 in the UGV2

Exodus 35 in the UGV3

Exodus 35 in the VBL

Exodus 35 in the VDCC

Exodus 35 in the YALU

Exodus 35 in the YAPE

Exodus 35 in the YBVTP

Exodus 35 in the ZBP