Ezekiel 12 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki. 3 Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki. 4 Bimisa bisaka na yo na libanda, na moyi makasi na miso na bango ; mpe na pokwa, kende ndenge bato bakendaka na bowumbu na miso na bango. 5 Tobola mir na miso na bango mpe bimisa bisaka na yo na lidusu oyo okosala. 6 Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. » 7 Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai : na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu ; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango. 8 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Yawe alobaki na ngai : 9 « Mwana na moto, libota ya batomboki ya Isalaele oyo, batunaki yo te : ‹ Ozali kosala nini ? › 10 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lisakoli oyo ezali na tina na mokambi oyo azali na Yelusalemi elongo na libota mobimba ya Isalaele, oyo bazali kuna. › 11 Loba na bango : ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango : bakokende na bowumbu lokola bakangami. 12 Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu ; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te. 13 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna. 14 Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso : bakalaka mpe mampinga na ye ; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu. 15 Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu. 16 Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » 17 Yawe alobaki na ngai : 18 « Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo ; 19 mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango. 20 Bingumba oyo bato bavandaka ekobebisama mpe mokili ekotikala lisusu na bato te, mpe bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » 21 Yawe alobaki na ngai : 22 « Mwana na moto, bolobaka lisese nini kati na mokili ya Isalaele : ‹ Mikolo ezali koleka mpe bimoniseli ezali kokokisama te ? › 23 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. ›Loba na bango lisusu : ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama. 24 Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele. 25 Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke ; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › » 26 Yawe alobaki na ngai : 27 « Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. › 28 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »

In Other Versions

Ezekiel 12 in the ANGEFD

Ezekiel 12 in the ANTPNG2D

Ezekiel 12 in the AS21

Ezekiel 12 in the BAGH

Ezekiel 12 in the BBPNG

Ezekiel 12 in the BBT1E

Ezekiel 12 in the BDS

Ezekiel 12 in the BEV

Ezekiel 12 in the BHAD

Ezekiel 12 in the BIB

Ezekiel 12 in the BLPT

Ezekiel 12 in the BNT

Ezekiel 12 in the BNTABOOT

Ezekiel 12 in the BNTLV

Ezekiel 12 in the BOATCB

Ezekiel 12 in the BOATCB2

Ezekiel 12 in the BOBCV

Ezekiel 12 in the BOCNT

Ezekiel 12 in the BOECS

Ezekiel 12 in the BOGWICC

Ezekiel 12 in the BOHCB

Ezekiel 12 in the BOHCV

Ezekiel 12 in the BOHLNT

Ezekiel 12 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 12 in the BOICB

Ezekiel 12 in the BOILNTAP

Ezekiel 12 in the BOITCV

Ezekiel 12 in the BOKCV

Ezekiel 12 in the BOKCV2

Ezekiel 12 in the BOKHWOG

Ezekiel 12 in the BOKSSV

Ezekiel 12 in the BOLCB

Ezekiel 12 in the BOMCV

Ezekiel 12 in the BONAV

Ezekiel 12 in the BONCB

Ezekiel 12 in the BONLT

Ezekiel 12 in the BONUT2

Ezekiel 12 in the BOPLNT

Ezekiel 12 in the BOSCB

Ezekiel 12 in the BOSNC

Ezekiel 12 in the BOTLNT

Ezekiel 12 in the BOVCB

Ezekiel 12 in the BOYCB

Ezekiel 12 in the BPBB

Ezekiel 12 in the BPH

Ezekiel 12 in the BSB

Ezekiel 12 in the CCB

Ezekiel 12 in the CUV

Ezekiel 12 in the CUVS

Ezekiel 12 in the DBT

Ezekiel 12 in the DGDNT

Ezekiel 12 in the DHNT

Ezekiel 12 in the DNT

Ezekiel 12 in the ELBE

Ezekiel 12 in the EMTV

Ezekiel 12 in the ESV

Ezekiel 12 in the FBV

Ezekiel 12 in the FEB

Ezekiel 12 in the GGMNT

Ezekiel 12 in the GNT

Ezekiel 12 in the HARY

Ezekiel 12 in the HNT

Ezekiel 12 in the IRVA

Ezekiel 12 in the IRVB

Ezekiel 12 in the IRVG

Ezekiel 12 in the IRVH

Ezekiel 12 in the IRVK

Ezekiel 12 in the IRVM

Ezekiel 12 in the IRVM2

Ezekiel 12 in the IRVO

Ezekiel 12 in the IRVP

Ezekiel 12 in the IRVT

Ezekiel 12 in the IRVT2

Ezekiel 12 in the IRVU

Ezekiel 12 in the ISVN

Ezekiel 12 in the JSNT

Ezekiel 12 in the KAPI

Ezekiel 12 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 12 in the KBV

Ezekiel 12 in the KJV

Ezekiel 12 in the KNFD

Ezekiel 12 in the LBA

Ezekiel 12 in the LBLA

Ezekiel 12 in the LNT

Ezekiel 12 in the LSV

Ezekiel 12 in the MAAL

Ezekiel 12 in the MBV

Ezekiel 12 in the MBV2

Ezekiel 12 in the MHNT

Ezekiel 12 in the MKNFD

Ezekiel 12 in the MNG

Ezekiel 12 in the MNT

Ezekiel 12 in the MNT2

Ezekiel 12 in the MRS1T

Ezekiel 12 in the NAA

Ezekiel 12 in the NASB

Ezekiel 12 in the NBLA

Ezekiel 12 in the NBS

Ezekiel 12 in the NBVTP

Ezekiel 12 in the NET2

Ezekiel 12 in the NIV11

Ezekiel 12 in the NNT

Ezekiel 12 in the NNT2

Ezekiel 12 in the NNT3

Ezekiel 12 in the PDDPT

Ezekiel 12 in the PFNT

Ezekiel 12 in the RMNT

Ezekiel 12 in the SBIAS

Ezekiel 12 in the SBIBS

Ezekiel 12 in the SBIBS2

Ezekiel 12 in the SBICS

Ezekiel 12 in the SBIDS

Ezekiel 12 in the SBIGS

Ezekiel 12 in the SBIHS

Ezekiel 12 in the SBIIS

Ezekiel 12 in the SBIIS2

Ezekiel 12 in the SBIIS3

Ezekiel 12 in the SBIKS

Ezekiel 12 in the SBIKS2

Ezekiel 12 in the SBIMS

Ezekiel 12 in the SBIOS

Ezekiel 12 in the SBIPS

Ezekiel 12 in the SBISS

Ezekiel 12 in the SBITS

Ezekiel 12 in the SBITS2

Ezekiel 12 in the SBITS3

Ezekiel 12 in the SBITS4

Ezekiel 12 in the SBIUS

Ezekiel 12 in the SBIVS

Ezekiel 12 in the SBT

Ezekiel 12 in the SBT1E

Ezekiel 12 in the SCHL

Ezekiel 12 in the SNT

Ezekiel 12 in the SUSU

Ezekiel 12 in the SUSU2

Ezekiel 12 in the SYNO

Ezekiel 12 in the TBIAOTANT

Ezekiel 12 in the TBT1E

Ezekiel 12 in the TBT1E2

Ezekiel 12 in the TFTIP

Ezekiel 12 in the TFTU

Ezekiel 12 in the TGNTATF3T

Ezekiel 12 in the THAI

Ezekiel 12 in the TNFD

Ezekiel 12 in the TNT

Ezekiel 12 in the TNTIK

Ezekiel 12 in the TNTIL

Ezekiel 12 in the TNTIN

Ezekiel 12 in the TNTIP

Ezekiel 12 in the TNTIZ

Ezekiel 12 in the TOMA

Ezekiel 12 in the TTENT

Ezekiel 12 in the UBG

Ezekiel 12 in the UGV

Ezekiel 12 in the UGV2

Ezekiel 12 in the UGV3

Ezekiel 12 in the VBL

Ezekiel 12 in the VDCC

Ezekiel 12 in the YALU

Ezekiel 12 in the YAPE

Ezekiel 12 in the YBVTP

Ezekiel 12 in the ZBP