Ezekiel 14 (BOLCB2)

1 Kati na bakambi ya Isalaele, ndambo bayaki epai na ngai mpe bavandaki liboso na ngai. 2 Bongo Yawe alobaki na ngai : 3 « Mwana na moto, bato oyo bazali kotia mitema epai ya banzambe ya bikeko. Bongo lokola bazali kotia banzambe ya bikeko liboso na bango, ekobetisa bango mabaku oyo ekokweyisa bango na masumu. Boni, natikela bango lisusu nzela ya kotuna Ngai toli ? 4 Mpo na yango, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki moto ya Isalaele atie motema epai ya banzambe ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo atie yango liboso na ye mpe akei epai ya mosakoli, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye kolanda motango ya banzambe na ye ya bikeko. 5 Nakosala bongo mpo na kozongisa lisusu epai na Ngai, mitema ya bana ya Isalaele oyo batikaki Ngai mpo na kolanda banzambe ya bikeko. › 6 Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Bobongola mitema ! Bopesa banzambe na bino ya bikeko mikongo mpe botika misala na bino ya mbindo ! 7 Soki moto moko ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na Isalaele akabwani na Ngai, atie motema na ye na banzambe ya bikeko mpe atie liboso na ye banzambe yango ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo akei epai ya mosakoli mpo na kotuna Ngai toli na nzela na ye, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye. 8 Nakotombokela moto wana, nakokomisa ye elembo mpe lisese epai na bato mpe nakolongola ye na molongo ya bato na Ngai. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. 9 Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele. 10 Bango mibale, mosakoli yango mpe moto oyo akei kotuna ye toli, bakomema mikumba ya masumu na bango. 11 Na bongo, bato ya Isalaele bakokabwana na Ngai lisusu te mpe bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya masumu na bango ; kasi bakozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bango, elobi Nkolo Yawe. › » 12 Yawe alobaki na ngai : 13 « Mwana na moto, soki bato ya ekolo moko basali masumu liboso na Ngai mpe batamboli na boyengebene te, bongo Ngai nasemboli loboko na Ngai mpo na kopimela bango bilei mpe kotindela bango nzala makasi mpo ete ezala bato to banyama bakufa, 14 ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe. 15 To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango ; 16 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi ; bango misato kaka nde balingaki kobika, kasi ekolo elingaki kotikala lisusu na bato te. 17 To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ; 18 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi ; bango misato kaka nde balingaki kobika. 19 To soki natindi kati na mokili yango bokono oyo ebomaka mpe nasopeli yango kanda na Ngai mpo na kosopa makila, koboma bato mpe bibwele ya mokili yango ; 20 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi ; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango. 21 Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango, 22 ekozala na ndambo ya bato oyo bakobika : bana mibali mpe ya basi. Bakoya epai na bino ; mpe tango bokomona bizaleli mpe misala na bango, bokobondisama mpo na pasi oyo natindelaki Yelusalemi, mpo na bitumbu nyonso oyo natindelaki yango. 23 Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango ; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. »

In Other Versions

Ezekiel 14 in the ANGEFD

Ezekiel 14 in the ANTPNG2D

Ezekiel 14 in the AS21

Ezekiel 14 in the BAGH

Ezekiel 14 in the BBPNG

Ezekiel 14 in the BBT1E

Ezekiel 14 in the BDS

Ezekiel 14 in the BEV

Ezekiel 14 in the BHAD

Ezekiel 14 in the BIB

Ezekiel 14 in the BLPT

Ezekiel 14 in the BNT

Ezekiel 14 in the BNTABOOT

Ezekiel 14 in the BNTLV

Ezekiel 14 in the BOATCB

Ezekiel 14 in the BOATCB2

Ezekiel 14 in the BOBCV

Ezekiel 14 in the BOCNT

Ezekiel 14 in the BOECS

Ezekiel 14 in the BOGWICC

Ezekiel 14 in the BOHCB

Ezekiel 14 in the BOHCV

Ezekiel 14 in the BOHLNT

Ezekiel 14 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 14 in the BOICB

Ezekiel 14 in the BOILNTAP

Ezekiel 14 in the BOITCV

Ezekiel 14 in the BOKCV

Ezekiel 14 in the BOKCV2

Ezekiel 14 in the BOKHWOG

Ezekiel 14 in the BOKSSV

Ezekiel 14 in the BOLCB

Ezekiel 14 in the BOMCV

Ezekiel 14 in the BONAV

Ezekiel 14 in the BONCB

Ezekiel 14 in the BONLT

Ezekiel 14 in the BONUT2

Ezekiel 14 in the BOPLNT

Ezekiel 14 in the BOSCB

Ezekiel 14 in the BOSNC

Ezekiel 14 in the BOTLNT

Ezekiel 14 in the BOVCB

Ezekiel 14 in the BOYCB

Ezekiel 14 in the BPBB

Ezekiel 14 in the BPH

Ezekiel 14 in the BSB

Ezekiel 14 in the CCB

Ezekiel 14 in the CUV

Ezekiel 14 in the CUVS

Ezekiel 14 in the DBT

Ezekiel 14 in the DGDNT

Ezekiel 14 in the DHNT

Ezekiel 14 in the DNT

Ezekiel 14 in the ELBE

Ezekiel 14 in the EMTV

Ezekiel 14 in the ESV

Ezekiel 14 in the FBV

Ezekiel 14 in the FEB

Ezekiel 14 in the GGMNT

Ezekiel 14 in the GNT

Ezekiel 14 in the HARY

Ezekiel 14 in the HNT

Ezekiel 14 in the IRVA

Ezekiel 14 in the IRVB

Ezekiel 14 in the IRVG

Ezekiel 14 in the IRVH

Ezekiel 14 in the IRVK

Ezekiel 14 in the IRVM

Ezekiel 14 in the IRVM2

Ezekiel 14 in the IRVO

Ezekiel 14 in the IRVP

Ezekiel 14 in the IRVT

Ezekiel 14 in the IRVT2

Ezekiel 14 in the IRVU

Ezekiel 14 in the ISVN

Ezekiel 14 in the JSNT

Ezekiel 14 in the KAPI

Ezekiel 14 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 14 in the KBV

Ezekiel 14 in the KJV

Ezekiel 14 in the KNFD

Ezekiel 14 in the LBA

Ezekiel 14 in the LBLA

Ezekiel 14 in the LNT

Ezekiel 14 in the LSV

Ezekiel 14 in the MAAL

Ezekiel 14 in the MBV

Ezekiel 14 in the MBV2

Ezekiel 14 in the MHNT

Ezekiel 14 in the MKNFD

Ezekiel 14 in the MNG

Ezekiel 14 in the MNT

Ezekiel 14 in the MNT2

Ezekiel 14 in the MRS1T

Ezekiel 14 in the NAA

Ezekiel 14 in the NASB

Ezekiel 14 in the NBLA

Ezekiel 14 in the NBS

Ezekiel 14 in the NBVTP

Ezekiel 14 in the NET2

Ezekiel 14 in the NIV11

Ezekiel 14 in the NNT

Ezekiel 14 in the NNT2

Ezekiel 14 in the NNT3

Ezekiel 14 in the PDDPT

Ezekiel 14 in the PFNT

Ezekiel 14 in the RMNT

Ezekiel 14 in the SBIAS

Ezekiel 14 in the SBIBS

Ezekiel 14 in the SBIBS2

Ezekiel 14 in the SBICS

Ezekiel 14 in the SBIDS

Ezekiel 14 in the SBIGS

Ezekiel 14 in the SBIHS

Ezekiel 14 in the SBIIS

Ezekiel 14 in the SBIIS2

Ezekiel 14 in the SBIIS3

Ezekiel 14 in the SBIKS

Ezekiel 14 in the SBIKS2

Ezekiel 14 in the SBIMS

Ezekiel 14 in the SBIOS

Ezekiel 14 in the SBIPS

Ezekiel 14 in the SBISS

Ezekiel 14 in the SBITS

Ezekiel 14 in the SBITS2

Ezekiel 14 in the SBITS3

Ezekiel 14 in the SBITS4

Ezekiel 14 in the SBIUS

Ezekiel 14 in the SBIVS

Ezekiel 14 in the SBT

Ezekiel 14 in the SBT1E

Ezekiel 14 in the SCHL

Ezekiel 14 in the SNT

Ezekiel 14 in the SUSU

Ezekiel 14 in the SUSU2

Ezekiel 14 in the SYNO

Ezekiel 14 in the TBIAOTANT

Ezekiel 14 in the TBT1E

Ezekiel 14 in the TBT1E2

Ezekiel 14 in the TFTIP

Ezekiel 14 in the TFTU

Ezekiel 14 in the TGNTATF3T

Ezekiel 14 in the THAI

Ezekiel 14 in the TNFD

Ezekiel 14 in the TNT

Ezekiel 14 in the TNTIK

Ezekiel 14 in the TNTIL

Ezekiel 14 in the TNTIN

Ezekiel 14 in the TNTIP

Ezekiel 14 in the TNTIZ

Ezekiel 14 in the TOMA

Ezekiel 14 in the TTENT

Ezekiel 14 in the UBG

Ezekiel 14 in the UGV

Ezekiel 14 in the UGV2

Ezekiel 14 in the UGV3

Ezekiel 14 in the VBL

Ezekiel 14 in the VDCC

Ezekiel 14 in the YALU

Ezekiel 14 in the YAPE

Ezekiel 14 in the YBVTP

Ezekiel 14 in the ZBP