Genesis 34 (BOLCB2)

1 Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana. 2 Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi. 3 Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo. 4 Sishemi alobaki na Amori, tata na ye : « Balela ngai elenge mwasi oyo. » 5 Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele. 6 Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi. 7 Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te. 8 Kasi Amori alobaki na bango : « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi. 9 Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala : bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi, 10 bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. » 11 Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina :— Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai. 12 Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala. 13 Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori. 14 Balobaki na bango :— Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso. 15 Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga. 16 Boye biso tokopesa na libala bana na biso ya basi mpe tokozwa bana na bino ya basi na libala. Tokovanda elongo na bino mpe tokokoma libota moko. 17 Kasi soki boboyi kokatisa ngenga ndenge biso tolobi, tokozwa ndeko na biso ya mwasi mpe tokokende na biso. 18 Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali. 19 Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye. 20 Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango : 21 « Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi. 22 Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango. 23 Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? » 24 Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi ; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga. 25 Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso. 26 Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye. 27 Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi. 28 Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga. 29 Bakamataki bomengo na bango nyonso : bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango. 30 Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi :— Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba. 31 Bango bazongisaki :— Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ?

In Other Versions

Genesis 34 in the ANGEFD

Genesis 34 in the ANTPNG2D

Genesis 34 in the AS21

Genesis 34 in the BAGH

Genesis 34 in the BBPNG

Genesis 34 in the BBT1E

Genesis 34 in the BDS

Genesis 34 in the BEV

Genesis 34 in the BHAD

Genesis 34 in the BIB

Genesis 34 in the BLPT

Genesis 34 in the BNT

Genesis 34 in the BNTABOOT

Genesis 34 in the BNTLV

Genesis 34 in the BOATCB

Genesis 34 in the BOATCB2

Genesis 34 in the BOBCV

Genesis 34 in the BOCNT

Genesis 34 in the BOECS

Genesis 34 in the BOGWICC

Genesis 34 in the BOHCB

Genesis 34 in the BOHCV

Genesis 34 in the BOHLNT

Genesis 34 in the BOHNTLTAL

Genesis 34 in the BOICB

Genesis 34 in the BOILNTAP

Genesis 34 in the BOITCV

Genesis 34 in the BOKCV

Genesis 34 in the BOKCV2

Genesis 34 in the BOKHWOG

Genesis 34 in the BOKSSV

Genesis 34 in the BOLCB

Genesis 34 in the BOMCV

Genesis 34 in the BONAV

Genesis 34 in the BONCB

Genesis 34 in the BONLT

Genesis 34 in the BONUT2

Genesis 34 in the BOPLNT

Genesis 34 in the BOSCB

Genesis 34 in the BOSNC

Genesis 34 in the BOTLNT

Genesis 34 in the BOVCB

Genesis 34 in the BOYCB

Genesis 34 in the BPBB

Genesis 34 in the BPH

Genesis 34 in the BSB

Genesis 34 in the CCB

Genesis 34 in the CUV

Genesis 34 in the CUVS

Genesis 34 in the DBT

Genesis 34 in the DGDNT

Genesis 34 in the DHNT

Genesis 34 in the DNT

Genesis 34 in the ELBE

Genesis 34 in the EMTV

Genesis 34 in the ESV

Genesis 34 in the FBV

Genesis 34 in the FEB

Genesis 34 in the GGMNT

Genesis 34 in the GNT

Genesis 34 in the HARY

Genesis 34 in the HNT

Genesis 34 in the IRVA

Genesis 34 in the IRVB

Genesis 34 in the IRVG

Genesis 34 in the IRVH

Genesis 34 in the IRVK

Genesis 34 in the IRVM

Genesis 34 in the IRVM2

Genesis 34 in the IRVO

Genesis 34 in the IRVP

Genesis 34 in the IRVT

Genesis 34 in the IRVT2

Genesis 34 in the IRVU

Genesis 34 in the ISVN

Genesis 34 in the JSNT

Genesis 34 in the KAPI

Genesis 34 in the KBT1ETNIK

Genesis 34 in the KBV

Genesis 34 in the KJV

Genesis 34 in the KNFD

Genesis 34 in the LBA

Genesis 34 in the LBLA

Genesis 34 in the LNT

Genesis 34 in the LSV

Genesis 34 in the MAAL

Genesis 34 in the MBV

Genesis 34 in the MBV2

Genesis 34 in the MHNT

Genesis 34 in the MKNFD

Genesis 34 in the MNG

Genesis 34 in the MNT

Genesis 34 in the MNT2

Genesis 34 in the MRS1T

Genesis 34 in the NAA

Genesis 34 in the NASB

Genesis 34 in the NBLA

Genesis 34 in the NBS

Genesis 34 in the NBVTP

Genesis 34 in the NET2

Genesis 34 in the NIV11

Genesis 34 in the NNT

Genesis 34 in the NNT2

Genesis 34 in the NNT3

Genesis 34 in the PDDPT

Genesis 34 in the PFNT

Genesis 34 in the RMNT

Genesis 34 in the SBIAS

Genesis 34 in the SBIBS

Genesis 34 in the SBIBS2

Genesis 34 in the SBICS

Genesis 34 in the SBIDS

Genesis 34 in the SBIGS

Genesis 34 in the SBIHS

Genesis 34 in the SBIIS

Genesis 34 in the SBIIS2

Genesis 34 in the SBIIS3

Genesis 34 in the SBIKS

Genesis 34 in the SBIKS2

Genesis 34 in the SBIMS

Genesis 34 in the SBIOS

Genesis 34 in the SBIPS

Genesis 34 in the SBISS

Genesis 34 in the SBITS

Genesis 34 in the SBITS2

Genesis 34 in the SBITS3

Genesis 34 in the SBITS4

Genesis 34 in the SBIUS

Genesis 34 in the SBIVS

Genesis 34 in the SBT

Genesis 34 in the SBT1E

Genesis 34 in the SCHL

Genesis 34 in the SNT

Genesis 34 in the SUSU

Genesis 34 in the SUSU2

Genesis 34 in the SYNO

Genesis 34 in the TBIAOTANT

Genesis 34 in the TBT1E

Genesis 34 in the TBT1E2

Genesis 34 in the TFTIP

Genesis 34 in the TFTU

Genesis 34 in the TGNTATF3T

Genesis 34 in the THAI

Genesis 34 in the TNFD

Genesis 34 in the TNT

Genesis 34 in the TNTIK

Genesis 34 in the TNTIL

Genesis 34 in the TNTIN

Genesis 34 in the TNTIP

Genesis 34 in the TNTIZ

Genesis 34 in the TOMA

Genesis 34 in the TTENT

Genesis 34 in the UBG

Genesis 34 in the UGV

Genesis 34 in the UGV2

Genesis 34 in the UGV3

Genesis 34 in the VBL

Genesis 34 in the VDCC

Genesis 34 in the YALU

Genesis 34 in the YAPE

Genesis 34 in the YBVTP

Genesis 34 in the ZBP