Genesis 46 (BOLCB2)

1 Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye. 2 Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli :— Jakobi ! Jakobi !Jakobi azongisaki :— Ngai oyo. 3 Nzambe alobaki :— Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna. 4 Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito ; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo. 5 Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye : tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango. 6 Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito. 7 Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso. 8 Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito : Ribeni, mwana liboso ya Jakobi. 9 Bana mibali ya Ribeni :Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. 10 Bana mibali ya Simeoni :Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana. 11 Bana mibali ya Levi :Gerishoni, Keati mpe Merari. 12 Bana mibali ya Yuda :Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana.Bana mibali ya Peretsi~:Etsironi mpe Amuli. 13 Bana mibali ya Isakari :Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi. 14 Bana mibali ya Zabuloni :Seredi, Eloni mpe Yaleyeli. 15 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato. 16 Bana mibali ya Gadi :Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli. 17 Bana mibali ya Aseri :Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera.Bana mibali ya Beria~:Eberi mpe Malikieli. 18 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba. 19 Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi :Jozefi mpe Benjame. 20 Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi. 21 Bana mibali ya Benjame :Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi. 22 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi : bango nyonso bazalaki zomi na minei. 23 Mwana mobali ya Dani :Ushimi. 24 Bana mibali ya Nefitali :Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi. 25 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi ; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli. 26 Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba. 27 Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo. 28 Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni, 29 Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi. 30 Isalaele alobaki na Jozefi :— Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi ! 31 Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye :— Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai. 32 Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. » 33 Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino : « Bosalaka mosala nini ? » 34 Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.

In Other Versions

Genesis 46 in the ANGEFD

Genesis 46 in the ANTPNG2D

Genesis 46 in the AS21

Genesis 46 in the BAGH

Genesis 46 in the BBPNG

Genesis 46 in the BBT1E

Genesis 46 in the BDS

Genesis 46 in the BEV

Genesis 46 in the BHAD

Genesis 46 in the BIB

Genesis 46 in the BLPT

Genesis 46 in the BNT

Genesis 46 in the BNTABOOT

Genesis 46 in the BNTLV

Genesis 46 in the BOATCB

Genesis 46 in the BOATCB2

Genesis 46 in the BOBCV

Genesis 46 in the BOCNT

Genesis 46 in the BOECS

Genesis 46 in the BOGWICC

Genesis 46 in the BOHCB

Genesis 46 in the BOHCV

Genesis 46 in the BOHLNT

Genesis 46 in the BOHNTLTAL

Genesis 46 in the BOICB

Genesis 46 in the BOILNTAP

Genesis 46 in the BOITCV

Genesis 46 in the BOKCV

Genesis 46 in the BOKCV2

Genesis 46 in the BOKHWOG

Genesis 46 in the BOKSSV

Genesis 46 in the BOLCB

Genesis 46 in the BOMCV

Genesis 46 in the BONAV

Genesis 46 in the BONCB

Genesis 46 in the BONLT

Genesis 46 in the BONUT2

Genesis 46 in the BOPLNT

Genesis 46 in the BOSCB

Genesis 46 in the BOSNC

Genesis 46 in the BOTLNT

Genesis 46 in the BOVCB

Genesis 46 in the BOYCB

Genesis 46 in the BPBB

Genesis 46 in the BPH

Genesis 46 in the BSB

Genesis 46 in the CCB

Genesis 46 in the CUV

Genesis 46 in the CUVS

Genesis 46 in the DBT

Genesis 46 in the DGDNT

Genesis 46 in the DHNT

Genesis 46 in the DNT

Genesis 46 in the ELBE

Genesis 46 in the EMTV

Genesis 46 in the ESV

Genesis 46 in the FBV

Genesis 46 in the FEB

Genesis 46 in the GGMNT

Genesis 46 in the GNT

Genesis 46 in the HARY

Genesis 46 in the HNT

Genesis 46 in the IRVA

Genesis 46 in the IRVB

Genesis 46 in the IRVG

Genesis 46 in the IRVH

Genesis 46 in the IRVK

Genesis 46 in the IRVM

Genesis 46 in the IRVM2

Genesis 46 in the IRVO

Genesis 46 in the IRVP

Genesis 46 in the IRVT

Genesis 46 in the IRVT2

Genesis 46 in the IRVU

Genesis 46 in the ISVN

Genesis 46 in the JSNT

Genesis 46 in the KAPI

Genesis 46 in the KBT1ETNIK

Genesis 46 in the KBV

Genesis 46 in the KJV

Genesis 46 in the KNFD

Genesis 46 in the LBA

Genesis 46 in the LBLA

Genesis 46 in the LNT

Genesis 46 in the LSV

Genesis 46 in the MAAL

Genesis 46 in the MBV

Genesis 46 in the MBV2

Genesis 46 in the MHNT

Genesis 46 in the MKNFD

Genesis 46 in the MNG

Genesis 46 in the MNT

Genesis 46 in the MNT2

Genesis 46 in the MRS1T

Genesis 46 in the NAA

Genesis 46 in the NASB

Genesis 46 in the NBLA

Genesis 46 in the NBS

Genesis 46 in the NBVTP

Genesis 46 in the NET2

Genesis 46 in the NIV11

Genesis 46 in the NNT

Genesis 46 in the NNT2

Genesis 46 in the NNT3

Genesis 46 in the PDDPT

Genesis 46 in the PFNT

Genesis 46 in the RMNT

Genesis 46 in the SBIAS

Genesis 46 in the SBIBS

Genesis 46 in the SBIBS2

Genesis 46 in the SBICS

Genesis 46 in the SBIDS

Genesis 46 in the SBIGS

Genesis 46 in the SBIHS

Genesis 46 in the SBIIS

Genesis 46 in the SBIIS2

Genesis 46 in the SBIIS3

Genesis 46 in the SBIKS

Genesis 46 in the SBIKS2

Genesis 46 in the SBIMS

Genesis 46 in the SBIOS

Genesis 46 in the SBIPS

Genesis 46 in the SBISS

Genesis 46 in the SBITS

Genesis 46 in the SBITS2

Genesis 46 in the SBITS3

Genesis 46 in the SBITS4

Genesis 46 in the SBIUS

Genesis 46 in the SBIVS

Genesis 46 in the SBT

Genesis 46 in the SBT1E

Genesis 46 in the SCHL

Genesis 46 in the SNT

Genesis 46 in the SUSU

Genesis 46 in the SUSU2

Genesis 46 in the SYNO

Genesis 46 in the TBIAOTANT

Genesis 46 in the TBT1E

Genesis 46 in the TBT1E2

Genesis 46 in the TFTIP

Genesis 46 in the TFTU

Genesis 46 in the TGNTATF3T

Genesis 46 in the THAI

Genesis 46 in the TNFD

Genesis 46 in the TNT

Genesis 46 in the TNTIK

Genesis 46 in the TNTIL

Genesis 46 in the TNTIN

Genesis 46 in the TNTIP

Genesis 46 in the TNTIZ

Genesis 46 in the TOMA

Genesis 46 in the TTENT

Genesis 46 in the UBG

Genesis 46 in the UGV

Genesis 46 in the UGV2

Genesis 46 in the UGV3

Genesis 46 in the VBL

Genesis 46 in the VDCC

Genesis 46 in the YALU

Genesis 46 in the YAPE

Genesis 46 in the YBVTP

Genesis 46 in the ZBP