John 12 (BOLCB2)

1 Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda. 2 Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu ; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu. 3 Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango. 4 Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki : 5 — Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola ? 6 Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi ; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo. 7 Kasi Yesu alobaki : — Tika ye kimia ! Abombi malasi yango mpo na mokolo oyo bakokunda Ngai. 8 Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te. 9 Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna ; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi. 10 Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe basalaki mabongisi mpo na koboma mpe Lazare ; 11 pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu. 12 Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi. 13 Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga :« Ozana !Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo,Mokonzi ya Isalaele ! » 14 Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama : 15 « Siona, engumba kitoko, kobanga te !Tala, mokonzi na yo azali koya,avandi na likolo ya mwana ya ane ! » 16 Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba. 17 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki. 18 Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango. 19 Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango :— Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te ; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye ! 20 Kati na bato oyo bayaki na feti, na Yelusalemi, mpo na kogumbamela Nzambe, ezalaki na ndambo ya Bagreki. 21 Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo :— Tata, tolingi komona Yesu. 22 Filipo akendeki koyebisa Andre ; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu. 23 Yesu azongiselaki bango : — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye. 24 Nazali koloba na bino penza ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele. 25 Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko. 26 Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai. 27 Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo ! 28 Tata, pesa Kombo na Yo nkembo !Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo :— Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo ! 29 Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki :— Ezali kake !Bato mosusu balobaki :— Anjelu moko asololi na ye ! 30 Kasi Yesu alobaki na bango : — Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino. 31 Kosambisama ya mokili elingi kosalema nde sik’oyo ; mokonzi ya mokili oyo akobwakama sik’oyo na libanda. 32 Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai. 33 Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa. 34 Bato bazongiselaki Ye :— Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso : « Mwana na Moto asengeli kotombolama ? » Nani nde Mwana na Moto ? 35 Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo. 36 Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole.Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango. 37 Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te 38 mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama :« Nkolo, nani andimaki mateya na biso ?Mpe nguya na Yo emonisamaki epai ya nani ? » 39 Ezali lisusu Ezayi nde alobaki tina oyo bakokaki kondima te : 40 « Azipaki miso na bangompe akomisaki bango mitema makasi,mpo ete bamona te na miso na bango,basosola te na mitema na bango,babongola mitema te,mpe ngai nabikisa bango te. » 41 Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye. 42 Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye ; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani, 43 pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te. 44 Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi : — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai ; 45 mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai. 46 Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili. 47 Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te ; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango. 48 Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye : ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka. 49 Pamba te nalobaki na Kombo na Ngai moko te ; kasi Ye moko Tata oyo atindaki Ngai apesaki Ngai, lokola mitindo, makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya. 50 Nzokande, nayebi malamu ete mitindo na Ye epesaka bomoi ya seko ; yango wana nazali koloba makambo oyo, ndenge kaka Tata ayebisaki Ngai yango.

In Other Versions

John 12 in the ANGEFD

John 12 in the ANTPNG2D

John 12 in the AS21

John 12 in the BAGH

John 12 in the BBPNG

John 12 in the BBT1E

John 12 in the BDS

John 12 in the BEV

John 12 in the BHAD

John 12 in the BIB

John 12 in the BLPT

John 12 in the BNT

John 12 in the BNTABOOT

John 12 in the BNTLV

John 12 in the BOATCB

John 12 in the BOATCB2

John 12 in the BOBCV

John 12 in the BOCNT

John 12 in the BOECS

John 12 in the BOGWICC

John 12 in the BOHCB

John 12 in the BOHCV

John 12 in the BOHLNT

John 12 in the BOHNTLTAL

John 12 in the BOICB

John 12 in the BOILNTAP

John 12 in the BOITCV

John 12 in the BOKCV

John 12 in the BOKCV2

John 12 in the BOKHWOG

John 12 in the BOKSSV

John 12 in the BOLCB

John 12 in the BOMCV

John 12 in the BONAV

John 12 in the BONCB

John 12 in the BONLT

John 12 in the BONUT2

John 12 in the BOPLNT

John 12 in the BOSCB

John 12 in the BOSNC

John 12 in the BOTLNT

John 12 in the BOVCB

John 12 in the BOYCB

John 12 in the BPBB

John 12 in the BPH

John 12 in the BSB

John 12 in the CCB

John 12 in the CUV

John 12 in the CUVS

John 12 in the DBT

John 12 in the DGDNT

John 12 in the DHNT

John 12 in the DNT

John 12 in the ELBE

John 12 in the EMTV

John 12 in the ESV

John 12 in the FBV

John 12 in the FEB

John 12 in the GGMNT

John 12 in the GNT

John 12 in the HARY

John 12 in the HNT

John 12 in the IRVA

John 12 in the IRVB

John 12 in the IRVG

John 12 in the IRVH

John 12 in the IRVK

John 12 in the IRVM

John 12 in the IRVM2

John 12 in the IRVO

John 12 in the IRVP

John 12 in the IRVT

John 12 in the IRVT2

John 12 in the IRVU

John 12 in the ISVN

John 12 in the JSNT

John 12 in the KAPI

John 12 in the KBT1ETNIK

John 12 in the KBV

John 12 in the KJV

John 12 in the KNFD

John 12 in the LBA

John 12 in the LBLA

John 12 in the LNT

John 12 in the LSV

John 12 in the MAAL

John 12 in the MBV

John 12 in the MBV2

John 12 in the MHNT

John 12 in the MKNFD

John 12 in the MNG

John 12 in the MNT

John 12 in the MNT2

John 12 in the MRS1T

John 12 in the NAA

John 12 in the NASB

John 12 in the NBLA

John 12 in the NBS

John 12 in the NBVTP

John 12 in the NET2

John 12 in the NIV11

John 12 in the NNT

John 12 in the NNT2

John 12 in the NNT3

John 12 in the PDDPT

John 12 in the PFNT

John 12 in the RMNT

John 12 in the SBIAS

John 12 in the SBIBS

John 12 in the SBIBS2

John 12 in the SBICS

John 12 in the SBIDS

John 12 in the SBIGS

John 12 in the SBIHS

John 12 in the SBIIS

John 12 in the SBIIS2

John 12 in the SBIIS3

John 12 in the SBIKS

John 12 in the SBIKS2

John 12 in the SBIMS

John 12 in the SBIOS

John 12 in the SBIPS

John 12 in the SBISS

John 12 in the SBITS

John 12 in the SBITS2

John 12 in the SBITS3

John 12 in the SBITS4

John 12 in the SBIUS

John 12 in the SBIVS

John 12 in the SBT

John 12 in the SBT1E

John 12 in the SCHL

John 12 in the SNT

John 12 in the SUSU

John 12 in the SUSU2

John 12 in the SYNO

John 12 in the TBIAOTANT

John 12 in the TBT1E

John 12 in the TBT1E2

John 12 in the TFTIP

John 12 in the TFTU

John 12 in the TGNTATF3T

John 12 in the THAI

John 12 in the TNFD

John 12 in the TNT

John 12 in the TNTIK

John 12 in the TNTIL

John 12 in the TNTIN

John 12 in the TNTIP

John 12 in the TNTIZ

John 12 in the TOMA

John 12 in the TTENT

John 12 in the UBG

John 12 in the UGV

John 12 in the UGV2

John 12 in the UGV3

John 12 in the VBL

John 12 in the VDCC

John 12 in the YALU

John 12 in the YAPE

John 12 in the YBVTP

John 12 in the ZBP