John 2 (BOLCB2)

1 Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango. 2 Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango. 3 Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye :— Bazali lisusu na vino te ! 4 Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te. 5 Mama na Ye alobaki na basali :— Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino. 6 Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale. 7 Bongo Yesu alobaki na basali : — Botondisa bambeki oyo na mayi.Batondisaki yango meke. 8 Alobaki lisusu : — Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti.Bamemaki yango epai na mokambi ya feti. 9 Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki 10 mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo ! » 11 Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye. 12 Sima na yango, Yesu akendeki elongo na mama na Ye, bandeko na Ye mpe bayekoli na Ye, na Kapernawumi epai wapi basalaki kaka mwa mikolo. 13 Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi. 14 Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga ; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango. 15 Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele. 16 Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? » 17 Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! » 18 Bayuda balobaki na Yesu :— Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ? 19 Yesu azongisaki : — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato. 20 Bayuda balobaki lisusu :— Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ? 21 Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko. 22 Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki. 23 Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala. 24 Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso. 25 Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.

In Other Versions

John 2 in the ANGEFD

John 2 in the ANTPNG2D

John 2 in the AS21

John 2 in the BAGH

John 2 in the BBPNG

John 2 in the BBT1E

John 2 in the BDS

John 2 in the BEV

John 2 in the BHAD

John 2 in the BIB

John 2 in the BLPT

John 2 in the BNT

John 2 in the BNTABOOT

John 2 in the BNTLV

John 2 in the BOATCB

John 2 in the BOATCB2

John 2 in the BOBCV

John 2 in the BOCNT

John 2 in the BOECS

John 2 in the BOGWICC

John 2 in the BOHCB

John 2 in the BOHCV

John 2 in the BOHLNT

John 2 in the BOHNTLTAL

John 2 in the BOICB

John 2 in the BOILNTAP

John 2 in the BOITCV

John 2 in the BOKCV

John 2 in the BOKCV2

John 2 in the BOKHWOG

John 2 in the BOKSSV

John 2 in the BOLCB

John 2 in the BOMCV

John 2 in the BONAV

John 2 in the BONCB

John 2 in the BONLT

John 2 in the BONUT2

John 2 in the BOPLNT

John 2 in the BOSCB

John 2 in the BOSNC

John 2 in the BOTLNT

John 2 in the BOVCB

John 2 in the BOYCB

John 2 in the BPBB

John 2 in the BPH

John 2 in the BSB

John 2 in the CCB

John 2 in the CUV

John 2 in the CUVS

John 2 in the DBT

John 2 in the DGDNT

John 2 in the DHNT

John 2 in the DNT

John 2 in the ELBE

John 2 in the EMTV

John 2 in the ESV

John 2 in the FBV

John 2 in the FEB

John 2 in the GGMNT

John 2 in the GNT

John 2 in the HARY

John 2 in the HNT

John 2 in the IRVA

John 2 in the IRVB

John 2 in the IRVG

John 2 in the IRVH

John 2 in the IRVK

John 2 in the IRVM

John 2 in the IRVM2

John 2 in the IRVO

John 2 in the IRVP

John 2 in the IRVT

John 2 in the IRVT2

John 2 in the IRVU

John 2 in the ISVN

John 2 in the JSNT

John 2 in the KAPI

John 2 in the KBT1ETNIK

John 2 in the KBV

John 2 in the KJV

John 2 in the KNFD

John 2 in the LBA

John 2 in the LBLA

John 2 in the LNT

John 2 in the LSV

John 2 in the MAAL

John 2 in the MBV

John 2 in the MBV2

John 2 in the MHNT

John 2 in the MKNFD

John 2 in the MNG

John 2 in the MNT

John 2 in the MNT2

John 2 in the MRS1T

John 2 in the NAA

John 2 in the NASB

John 2 in the NBLA

John 2 in the NBS

John 2 in the NBVTP

John 2 in the NET2

John 2 in the NIV11

John 2 in the NNT

John 2 in the NNT2

John 2 in the NNT3

John 2 in the PDDPT

John 2 in the PFNT

John 2 in the RMNT

John 2 in the SBIAS

John 2 in the SBIBS

John 2 in the SBIBS2

John 2 in the SBICS

John 2 in the SBIDS

John 2 in the SBIGS

John 2 in the SBIHS

John 2 in the SBIIS

John 2 in the SBIIS2

John 2 in the SBIIS3

John 2 in the SBIKS

John 2 in the SBIKS2

John 2 in the SBIMS

John 2 in the SBIOS

John 2 in the SBIPS

John 2 in the SBISS

John 2 in the SBITS

John 2 in the SBITS2

John 2 in the SBITS3

John 2 in the SBITS4

John 2 in the SBIUS

John 2 in the SBIVS

John 2 in the SBT

John 2 in the SBT1E

John 2 in the SCHL

John 2 in the SNT

John 2 in the SUSU

John 2 in the SUSU2

John 2 in the SYNO

John 2 in the TBIAOTANT

John 2 in the TBT1E

John 2 in the TBT1E2

John 2 in the TFTIP

John 2 in the TFTU

John 2 in the TGNTATF3T

John 2 in the THAI

John 2 in the TNFD

John 2 in the TNT

John 2 in the TNTIK

John 2 in the TNTIL

John 2 in the TNTIN

John 2 in the TNTIP

John 2 in the TNTIZ

John 2 in the TOMA

John 2 in the TTENT

John 2 in the UBG

John 2 in the UGV

John 2 in the UGV2

John 2 in the UGV3

John 2 in the VBL

John 2 in the VDCC

John 2 in the YALU

John 2 in the YAPE

John 2 in the YBVTP

John 2 in the ZBP