John 7 (BOLCB2)

1 Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye. 2 Nzokande, feti ya Bandako ya kapo, feti ya Bayuda, ekomaki pene. 3 Bandeko ya Yesu balobaki na Ye :— Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala. 4 Moto moko te asalaka na nkuku soki alingi koyebana. Lokola ozali kosala makambo minene koleka, sala ete moto nyonso kati na mokili ayeba soki ozali nani. 5 Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te. 6 Yesu azongiselaki bango : — Tango na Ngai ekoki nanu te ; kasi mpo na bino, tango nyonso ezali malamu. 7 Mokili ekoki koyina bino te ; kasi Ngai, ezali koyina Ngai mpo ete natatolaka ete misala na yango ezali mabe. 8 Bino, bokende na feti wana ; kasi Ngai, nakokende te, pamba te tango na Ngai ekoki nanu te. 9 Sima na Ye koloba na bango bongo, atikalaki na Galile. 10 Nzokande, tango bandeko na Ye bakendeki na feti, Ye mpe akendeki kuna, na komilakisa te, kasi na nkuku. 11 Wana bazalaki kati na feti, Bayuda bazalaki koluka Ye mpe bazalaki kotuna-tuna : « Azali wapi ? » 12 Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba : Azali moto malamu ; bamosusu : « Te, azali kokosa bato nyonso. » 13 Kasi, lokola bango nyonso bazalaki kobanga Bayuda, moto ata moko te akokaki koloba na bonsomi nyonso na tina na Yesu. 14 Tango mikolo ya feti ekomaki na kati-kati, Yesu akendeki na Tempelo mpe akomaki koteya. 15 Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana :— Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ? 16 Yesu azongiselaki bango : — Makambo oyo nazali koteya ewuti epai na Ngai te, kasi ewuti epai na Ye oyo atindi Ngai. 17 Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko. 18 Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye. 19 Boni, Moyize apesaki bino mibeko te ? Nzokande moko te kati na bino atosaka yango ! Bongo mpo na nini bozali koluka koboma Ngai ? 20 Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu :— Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ? 21 Yesu alobaki na bango : — Mpo na likamwisi moko oyo nasalaki, yango wana bino nyonso bokamwe ! 22 Bokanisa nanu : Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba. 23 Bongo soki bokataka bato ngenga na mokolo ya Saba, mpe yango ebukaka mobeko ya Moyize te, mpo na nini bozali kosilikela Ngai mpo ete nabikisi moto na mokolo ya Saba ? 24 Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo. 25 Na bongo, ndambo ya bavandi ya Yelusalemi bakomaki komituna : « Azali te moto oyo bazali koluka koboma ? 26 Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te mpo na kotelemela ye ! Boni, bokanisi ete bakonzi na biso bayebi ete azali penza Klisto ? 27 Kasi biso, toyebi epai moto oyo awuti ; nzokande tango Klisto akoya, moto moko te akoyeba soki azali moto ya engumba nini ! » 28 Kaka na tango yango, wana Yesu azalaki koteya kati na Tempelo, alobaki na mongongo makasi : — Solo, boyebi Ngai mpe boyebi epai nawuti ! Nzokande, nayei na ndenge na Ngai moko te ; ezali Ye oyo azali penza ya solo nde atindi Ngai, mpe bino, boyebi Ye te. 29 Ngai, nayebi Ye, pamba te nawuti epai na Ye, mpe ezali Ye nde atindi Ngai. 30 Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te. 31 Boye kati na bato, mingi bandimaki Ye ; bazalaki koloba :— Boni, tango Klisto akoya, akosala bikamwa mingi koleka oyo moto oyo ozali kosala ? 32 Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu. 33 Yesu alobaki : — Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai. 34 Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna. 35 Bayuda balobanaki bango na bango :— Asengeli kokende wapi mpo ete tomona ye lisusu te ? Akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana kati na Bagreki mpe koteya Bagreki ? 36 Alingi penza koloba nini tango azali koloba : « Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna ? » 37 Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela. 38 Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye. 39 Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye. 40 Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, » 41 bamosusu : « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu : « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile ? 42 Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi ? » 43 Ezali bongo nde bato bakabwanaki na tina na Yesu. 44 Bamosusu kati na bango balukaki kokanga Ye, kasi moto ata moko te alongaki. 45 Bakengeli ya Tempelo bazongaki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batunaki bakengeli :— Mpo na nini bomemi Yesu awa te ? 46 Bakengeli bazongisaki :— Ezali na moto ata moko te oyo asila koloba makambo oyo moto wana azali koloba. 47 Bafarizeo batunaki lisusu :— Bino mpe bomitiki penza mpo ete akosa bino ? 48 Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye ? 49 Ezali kaka bato oyo bayebi mibeko ya Moyize te, bazali penza bato balakelama mabe ! 50 Kasi moko kati na bango, Nikodemi, oyo, mokolo moko, akendeki epai ya Yesu, alobaki : 51 — Boni, mibeko na biso ekoki kokatela moto etumbu na kozanga koyoka ye liboso, mpe na kozanga koyeba mabe oyo asili kosala ? 52 Bazongiselaki ye :— Boni, yo mpe ozali moto ya Galile ? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile.[ 53 Na bongo, moko na moko azongaki na ndako na ye.

In Other Versions

John 7 in the ANGEFD

John 7 in the ANTPNG2D

John 7 in the AS21

John 7 in the BAGH

John 7 in the BBPNG

John 7 in the BBT1E

John 7 in the BDS

John 7 in the BEV

John 7 in the BHAD

John 7 in the BIB

John 7 in the BLPT

John 7 in the BNT

John 7 in the BNTABOOT

John 7 in the BNTLV

John 7 in the BOATCB

John 7 in the BOATCB2

John 7 in the BOBCV

John 7 in the BOCNT

John 7 in the BOECS

John 7 in the BOGWICC

John 7 in the BOHCB

John 7 in the BOHCV

John 7 in the BOHLNT

John 7 in the BOHNTLTAL

John 7 in the BOICB

John 7 in the BOILNTAP

John 7 in the BOITCV

John 7 in the BOKCV

John 7 in the BOKCV2

John 7 in the BOKHWOG

John 7 in the BOKSSV

John 7 in the BOLCB

John 7 in the BOMCV

John 7 in the BONAV

John 7 in the BONCB

John 7 in the BONLT

John 7 in the BONUT2

John 7 in the BOPLNT

John 7 in the BOSCB

John 7 in the BOSNC

John 7 in the BOTLNT

John 7 in the BOVCB

John 7 in the BOYCB

John 7 in the BPBB

John 7 in the BPH

John 7 in the BSB

John 7 in the CCB

John 7 in the CUV

John 7 in the CUVS

John 7 in the DBT

John 7 in the DGDNT

John 7 in the DHNT

John 7 in the DNT

John 7 in the ELBE

John 7 in the EMTV

John 7 in the ESV

John 7 in the FBV

John 7 in the FEB

John 7 in the GGMNT

John 7 in the GNT

John 7 in the HARY

John 7 in the HNT

John 7 in the IRVA

John 7 in the IRVB

John 7 in the IRVG

John 7 in the IRVH

John 7 in the IRVK

John 7 in the IRVM

John 7 in the IRVM2

John 7 in the IRVO

John 7 in the IRVP

John 7 in the IRVT

John 7 in the IRVT2

John 7 in the IRVU

John 7 in the ISVN

John 7 in the JSNT

John 7 in the KAPI

John 7 in the KBT1ETNIK

John 7 in the KBV

John 7 in the KJV

John 7 in the KNFD

John 7 in the LBA

John 7 in the LBLA

John 7 in the LNT

John 7 in the LSV

John 7 in the MAAL

John 7 in the MBV

John 7 in the MBV2

John 7 in the MHNT

John 7 in the MKNFD

John 7 in the MNG

John 7 in the MNT

John 7 in the MNT2

John 7 in the MRS1T

John 7 in the NAA

John 7 in the NASB

John 7 in the NBLA

John 7 in the NBS

John 7 in the NBVTP

John 7 in the NET2

John 7 in the NIV11

John 7 in the NNT

John 7 in the NNT2

John 7 in the NNT3

John 7 in the PDDPT

John 7 in the PFNT

John 7 in the RMNT

John 7 in the SBIAS

John 7 in the SBIBS

John 7 in the SBIBS2

John 7 in the SBICS

John 7 in the SBIDS

John 7 in the SBIGS

John 7 in the SBIHS

John 7 in the SBIIS

John 7 in the SBIIS2

John 7 in the SBIIS3

John 7 in the SBIKS

John 7 in the SBIKS2

John 7 in the SBIMS

John 7 in the SBIOS

John 7 in the SBIPS

John 7 in the SBISS

John 7 in the SBITS

John 7 in the SBITS2

John 7 in the SBITS3

John 7 in the SBITS4

John 7 in the SBIUS

John 7 in the SBIVS

John 7 in the SBT

John 7 in the SBT1E

John 7 in the SCHL

John 7 in the SNT

John 7 in the SUSU

John 7 in the SUSU2

John 7 in the SYNO

John 7 in the TBIAOTANT

John 7 in the TBT1E

John 7 in the TBT1E2

John 7 in the TFTIP

John 7 in the TFTU

John 7 in the TGNTATF3T

John 7 in the THAI

John 7 in the TNFD

John 7 in the TNT

John 7 in the TNTIK

John 7 in the TNTIL

John 7 in the TNTIN

John 7 in the TNTIP

John 7 in the TNTIZ

John 7 in the TOMA

John 7 in the TTENT

John 7 in the UBG

John 7 in the UGV

John 7 in the UGV2

John 7 in the UGV3

John 7 in the VBL

John 7 in the VDCC

John 7 in the YALU

John 7 in the YAPE

John 7 in the YBVTP

John 7 in the ZBP