Luke 1 (BOLCB2)

1 Bato mingi bamekaki kokoma makambo oyo elekaki kati na biso, 2 kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe. 3 Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu, 4 mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki. 5 Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron. 6 Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo. 7 Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange. 8 Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye, 9 aponamaki na zeke, kolanda momesano ya bonganga-Nzambe, mpo na kokota kati na Esika ya bule ya Nkolo mpe kotumba kuna malasi ya ansa. 10 Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda. 11 Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa. 12 Tango Zakari amonaki ye, abangaki makasi, mpe somo monene ekangaki ye. 13 Kasi anjelu alobaki na ye :— Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. » 14 Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye, 15 pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye. 16 Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango, 17 mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo. 18 Zakari atunaki anjelu :— Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi. 19 Anjelu azongiselaki ye :— Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu. 20 Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama. 21 Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule. 22 Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango ; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba. 23 Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye. 24 Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano. 25 Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. » 26 Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. » 27 Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. 28 Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye :— Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo ! 29 Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini. 30 Kasi anjelu alobaki na ye :— Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! 31 Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » 32 Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. 33 Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te. 34 Mari atunaki anjelu :— Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ? 35 Anjelu azongiselaki ye :— Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. 36 Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. 37 Pamba te Nzambe alembanaka eloko te. 38 Mari azongiselaki ye :— Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai !Bongo anjelu akabwanaki na ye. 39 Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda. 40 Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote. 41 Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu 42 mpe agangaki na mongongo makasi :— Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo ! 43 Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? 44 Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai. 45 Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye ! 46 Bongo Mari alobaki :— Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo, 47 mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai, 48 pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye.Yango wana, kobanda lelo,bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo, 49 pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ;Kombo na Ye ezali Bule. 50 Atalisaka boboto na Ye tango nyonsoepai ya bato oyo batosaka Ye. 51 Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye,apanzi bato oyo batonda na lolendo, 52 akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi,kasi atomboli bato oyo bamikitisaka. 53 Atondisi na biloko ya malamubato oyo bazalaki na nzala,mpe azongisi bazwi maboko pamba. 54 Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye,abosani te kotalisa boboto na Ye, 55 ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso,epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye,mpo na tango nyonso. 56 Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti ; sima, azongaki na ndako na ye. 57 Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. 58 Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo. 59 Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari. 60 Kasi mama na ye alobaki :— Te ! Kombo na ye ezali Yoane. 61 Kasi balobaki na ye :— Ezali na moto moko te, kati na libota na yo, oyo azali na kombo wana. 62 Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana. 63 Zakari asengaki mwa libaya mpe akomaki : « Kombo na ye ezali Yoane. » Mpe bango nyonso bakamwaki. 64 Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe. 65 Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. 66 Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna : « Yango mwana oyo akozala nani ? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye. 67 Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola : 68 « Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama,pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ; 69 abimiseli biso Mobikisi ya nguya,kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ; 70 akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kalana nzela ya basakoli na Ye ya bule, 71 lobiko liboso ya banguna na biso,mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso ; 72 atalisi boboto na Ye epai ya bakoko na bisompe akanisi Boyokani na Ye ya bule ; 73 akokiseli biso ndayi oyo alapakiepai ya Abrayami, koko na biso, 74 ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso,mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te, 75 kati na bosantu mpe bosembo,liboso na Ye, mikolo nyonso ya bomoi na biso. 76 Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo :mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ;pamba te okotambola na liboso ya Nkolompo na kobongisela Ye nzela 77 mpe mpo na koyebisa bato na Yeete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango, 78 mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso,oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo, 79 mpo na kopesa pole na bato nyonsooyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa,mpe mpo na kotambolisa makolo na bisokati na nzela ya kimia. » 80 Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.

In Other Versions

Luke 1 in the ANGEFD

Luke 1 in the ANTPNG2D

Luke 1 in the AS21

Luke 1 in the BAGH

Luke 1 in the BBPNG

Luke 1 in the BBT1E

Luke 1 in the BDS

Luke 1 in the BEV

Luke 1 in the BHAD

Luke 1 in the BIB

Luke 1 in the BLPT

Luke 1 in the BNT

Luke 1 in the BNTABOOT

Luke 1 in the BNTLV

Luke 1 in the BOATCB

Luke 1 in the BOATCB2

Luke 1 in the BOBCV

Luke 1 in the BOCNT

Luke 1 in the BOECS

Luke 1 in the BOGWICC

Luke 1 in the BOHCB

Luke 1 in the BOHCV

Luke 1 in the BOHLNT

Luke 1 in the BOHNTLTAL

Luke 1 in the BOICB

Luke 1 in the BOILNTAP

Luke 1 in the BOITCV

Luke 1 in the BOKCV

Luke 1 in the BOKCV2

Luke 1 in the BOKHWOG

Luke 1 in the BOKSSV

Luke 1 in the BOLCB

Luke 1 in the BOMCV

Luke 1 in the BONAV

Luke 1 in the BONCB

Luke 1 in the BONLT

Luke 1 in the BONUT2

Luke 1 in the BOPLNT

Luke 1 in the BOSCB

Luke 1 in the BOSNC

Luke 1 in the BOTLNT

Luke 1 in the BOVCB

Luke 1 in the BOYCB

Luke 1 in the BPBB

Luke 1 in the BPH

Luke 1 in the BSB

Luke 1 in the CCB

Luke 1 in the CUV

Luke 1 in the CUVS

Luke 1 in the DBT

Luke 1 in the DGDNT

Luke 1 in the DHNT

Luke 1 in the DNT

Luke 1 in the ELBE

Luke 1 in the EMTV

Luke 1 in the ESV

Luke 1 in the FBV

Luke 1 in the FEB

Luke 1 in the GGMNT

Luke 1 in the GNT

Luke 1 in the HARY

Luke 1 in the HNT

Luke 1 in the IRVA

Luke 1 in the IRVB

Luke 1 in the IRVG

Luke 1 in the IRVH

Luke 1 in the IRVK

Luke 1 in the IRVM

Luke 1 in the IRVM2

Luke 1 in the IRVO

Luke 1 in the IRVP

Luke 1 in the IRVT

Luke 1 in the IRVT2

Luke 1 in the IRVU

Luke 1 in the ISVN

Luke 1 in the JSNT

Luke 1 in the KAPI

Luke 1 in the KBT1ETNIK

Luke 1 in the KBV

Luke 1 in the KJV

Luke 1 in the KNFD

Luke 1 in the LBA

Luke 1 in the LBLA

Luke 1 in the LNT

Luke 1 in the LSV

Luke 1 in the MAAL

Luke 1 in the MBV

Luke 1 in the MBV2

Luke 1 in the MHNT

Luke 1 in the MKNFD

Luke 1 in the MNG

Luke 1 in the MNT

Luke 1 in the MNT2

Luke 1 in the MRS1T

Luke 1 in the NAA

Luke 1 in the NASB

Luke 1 in the NBLA

Luke 1 in the NBS

Luke 1 in the NBVTP

Luke 1 in the NET2

Luke 1 in the NIV11

Luke 1 in the NNT

Luke 1 in the NNT2

Luke 1 in the NNT3

Luke 1 in the PDDPT

Luke 1 in the PFNT

Luke 1 in the RMNT

Luke 1 in the SBIAS

Luke 1 in the SBIBS

Luke 1 in the SBIBS2

Luke 1 in the SBICS

Luke 1 in the SBIDS

Luke 1 in the SBIGS

Luke 1 in the SBIHS

Luke 1 in the SBIIS

Luke 1 in the SBIIS2

Luke 1 in the SBIIS3

Luke 1 in the SBIKS

Luke 1 in the SBIKS2

Luke 1 in the SBIMS

Luke 1 in the SBIOS

Luke 1 in the SBIPS

Luke 1 in the SBISS

Luke 1 in the SBITS

Luke 1 in the SBITS2

Luke 1 in the SBITS3

Luke 1 in the SBITS4

Luke 1 in the SBIUS

Luke 1 in the SBIVS

Luke 1 in the SBT

Luke 1 in the SBT1E

Luke 1 in the SCHL

Luke 1 in the SNT

Luke 1 in the SUSU

Luke 1 in the SUSU2

Luke 1 in the SYNO

Luke 1 in the TBIAOTANT

Luke 1 in the TBT1E

Luke 1 in the TBT1E2

Luke 1 in the TFTIP

Luke 1 in the TFTU

Luke 1 in the TGNTATF3T

Luke 1 in the THAI

Luke 1 in the TNFD

Luke 1 in the TNT

Luke 1 in the TNTIK

Luke 1 in the TNTIL

Luke 1 in the TNTIN

Luke 1 in the TNTIP

Luke 1 in the TNTIZ

Luke 1 in the TOMA

Luke 1 in the TTENT

Luke 1 in the UBG

Luke 1 in the UGV

Luke 1 in the UGV2

Luke 1 in the UGV3

Luke 1 in the VBL

Luke 1 in the VDCC

Luke 1 in the YALU

Luke 1 in the YAPE

Luke 1 in the YBVTP

Luke 1 in the ZBP