Luke 2 (BOLCB2)

1 Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome. 2 Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri. 3 Bato nyonso bazalaki kokende komikomisa, moto na moto kati na engumba na ye. 4 Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi. 5 Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi. 6 Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. 7 Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya. 8 Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango. 9 Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi. 10 Kasi anjelu alobaki na bango :— Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi. 11 Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo. 12 Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye : bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele. 13 Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba : 14 « Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo,mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! » 15 Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. » 16 Bakendeki kuna na lombangu mpe bakutaki Mari, Jozefi mpe mwana oyo abotami sika alala kati na elielo ya bibwele. 17 Sima na bango komona ye, balobaki makambo oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango. 18 Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki. 19 Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala. 20 Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango. 21 Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi. 22 Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo, 23 kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo ; » 24 mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka. 25 Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. 26 Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo. 27 Wana Molimo akambaki ye, akendeki na Tempelo. Mpe, lokola baboti ya Mwana Yesu bamemaki Ye mpo na kokokisa makambo oyo Mobeko etindaki, 28 Simeoni ayambaki Yesu na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo : 29 « Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo,tika ete mowumbu na Yo akende na kimia ! 30 Pamba te miso na ngai emoni Mobikisioyo awuti epai na Yo, 31 Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso : 32 pole mpo na kongengisa bikolo,mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. » 33 Tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi maloba oyo Simeoni alobaki na tina na Ye. 34 Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu :— Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato. 35 Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga. 36 Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ; 37 sima na yango, akufisaki mobali mpe atikalaki lisusu kobala te kino akokisaki mibu tuku mwambe na minei ya mbotama. Azalaki kolongwa te na Tempelo, kasi azalaki kosalela Nzambe, butu mpe moyi ; azalaki kokila bilei mpe kosambela. 38 Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi. 39 Sima na bango kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, Mari mpe Jozefi bazongaki kati na Galile, na Nazareti, engumba na bango. 40 Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye. 41 Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika. 42 Tango Yesu akokisaki mibu zomi na mibale ya mbotama, bakendeki na feti lokola momesano. 43 Bongo tango feti esilaki, wana baboti na Ye bazongaki, Elenge Yesu atikalaki na Yelusalemi ; kasi baboti na Ye bayebaki te ete atikali. 44 Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango. 45 Kasi bamonaki Ye te ; mpe wana bakobaki koluka Ye, bazongaki kino na Yelusalemi. 46 Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna. 47 Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye. 48 Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye :— Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso ! 49 Yesu azongiselaki bango : — Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ? 50 Kasi basosolaki te maloba na Ye. 51 Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye. 52 Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.

In Other Versions

Luke 2 in the ANGEFD

Luke 2 in the ANTPNG2D

Luke 2 in the AS21

Luke 2 in the BAGH

Luke 2 in the BBPNG

Luke 2 in the BBT1E

Luke 2 in the BDS

Luke 2 in the BEV

Luke 2 in the BHAD

Luke 2 in the BIB

Luke 2 in the BLPT

Luke 2 in the BNT

Luke 2 in the BNTABOOT

Luke 2 in the BNTLV

Luke 2 in the BOATCB

Luke 2 in the BOATCB2

Luke 2 in the BOBCV

Luke 2 in the BOCNT

Luke 2 in the BOECS

Luke 2 in the BOGWICC

Luke 2 in the BOHCB

Luke 2 in the BOHCV

Luke 2 in the BOHLNT

Luke 2 in the BOHNTLTAL

Luke 2 in the BOICB

Luke 2 in the BOILNTAP

Luke 2 in the BOITCV

Luke 2 in the BOKCV

Luke 2 in the BOKCV2

Luke 2 in the BOKHWOG

Luke 2 in the BOKSSV

Luke 2 in the BOLCB

Luke 2 in the BOMCV

Luke 2 in the BONAV

Luke 2 in the BONCB

Luke 2 in the BONLT

Luke 2 in the BONUT2

Luke 2 in the BOPLNT

Luke 2 in the BOSCB

Luke 2 in the BOSNC

Luke 2 in the BOTLNT

Luke 2 in the BOVCB

Luke 2 in the BOYCB

Luke 2 in the BPBB

Luke 2 in the BPH

Luke 2 in the BSB

Luke 2 in the CCB

Luke 2 in the CUV

Luke 2 in the CUVS

Luke 2 in the DBT

Luke 2 in the DGDNT

Luke 2 in the DHNT

Luke 2 in the DNT

Luke 2 in the ELBE

Luke 2 in the EMTV

Luke 2 in the ESV

Luke 2 in the FBV

Luke 2 in the FEB

Luke 2 in the GGMNT

Luke 2 in the GNT

Luke 2 in the HARY

Luke 2 in the HNT

Luke 2 in the IRVA

Luke 2 in the IRVB

Luke 2 in the IRVG

Luke 2 in the IRVH

Luke 2 in the IRVK

Luke 2 in the IRVM

Luke 2 in the IRVM2

Luke 2 in the IRVO

Luke 2 in the IRVP

Luke 2 in the IRVT

Luke 2 in the IRVT2

Luke 2 in the IRVU

Luke 2 in the ISVN

Luke 2 in the JSNT

Luke 2 in the KAPI

Luke 2 in the KBT1ETNIK

Luke 2 in the KBV

Luke 2 in the KJV

Luke 2 in the KNFD

Luke 2 in the LBA

Luke 2 in the LBLA

Luke 2 in the LNT

Luke 2 in the LSV

Luke 2 in the MAAL

Luke 2 in the MBV

Luke 2 in the MBV2

Luke 2 in the MHNT

Luke 2 in the MKNFD

Luke 2 in the MNG

Luke 2 in the MNT

Luke 2 in the MNT2

Luke 2 in the MRS1T

Luke 2 in the NAA

Luke 2 in the NASB

Luke 2 in the NBLA

Luke 2 in the NBS

Luke 2 in the NBVTP

Luke 2 in the NET2

Luke 2 in the NIV11

Luke 2 in the NNT

Luke 2 in the NNT2

Luke 2 in the NNT3

Luke 2 in the PDDPT

Luke 2 in the PFNT

Luke 2 in the RMNT

Luke 2 in the SBIAS

Luke 2 in the SBIBS

Luke 2 in the SBIBS2

Luke 2 in the SBICS

Luke 2 in the SBIDS

Luke 2 in the SBIGS

Luke 2 in the SBIHS

Luke 2 in the SBIIS

Luke 2 in the SBIIS2

Luke 2 in the SBIIS3

Luke 2 in the SBIKS

Luke 2 in the SBIKS2

Luke 2 in the SBIMS

Luke 2 in the SBIOS

Luke 2 in the SBIPS

Luke 2 in the SBISS

Luke 2 in the SBITS

Luke 2 in the SBITS2

Luke 2 in the SBITS3

Luke 2 in the SBITS4

Luke 2 in the SBIUS

Luke 2 in the SBIVS

Luke 2 in the SBT

Luke 2 in the SBT1E

Luke 2 in the SCHL

Luke 2 in the SNT

Luke 2 in the SUSU

Luke 2 in the SUSU2

Luke 2 in the SYNO

Luke 2 in the TBIAOTANT

Luke 2 in the TBT1E

Luke 2 in the TBT1E2

Luke 2 in the TFTIP

Luke 2 in the TFTU

Luke 2 in the TGNTATF3T

Luke 2 in the THAI

Luke 2 in the TNFD

Luke 2 in the TNT

Luke 2 in the TNTIK

Luke 2 in the TNTIL

Luke 2 in the TNTIN

Luke 2 in the TNTIP

Luke 2 in the TNTIZ

Luke 2 in the TOMA

Luke 2 in the TTENT

Luke 2 in the UBG

Luke 2 in the UGV

Luke 2 in the UGV2

Luke 2 in the UGV3

Luke 2 in the VBL

Luke 2 in the VDCC

Luke 2 in the YALU

Luke 2 in the YAPE

Luke 2 in the YBVTP

Luke 2 in the ZBP