Mark 1 (BOLCB2)

1 Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, 2 kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi :« Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo,ye nde akobongisela Yo nzela. 3 Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe :‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo,bosembolela Ye banzela ya mike ! › » 4 Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino ! » 5 Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani. 6 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. 7 Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye. 8 Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. » 9 Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani. 10 Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga. 11 Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! » 12 Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe 13 epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei. 14 Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe. 15 Azalaki koloba : « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. » 16 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. 17 Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. » 18 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. 19 Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye ; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango. 20 Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu. 21 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. 22 Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki. 23 Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga : 24 — Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe ! 25 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo. 26 Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga. 27 Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana :— Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye ! 28 Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile. 29 Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre. 30 Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele ; mbala moko, bapesaki Ye sango. 31 Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei. 32 Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. 33 Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako ; 34 bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali. 35 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela. 36 Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu. 37 Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye :— Bato nyonso bazali koluka Yo. 38 Kasi Ye azongiselaki bango : — Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango. 39 Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe. 40 Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu :— Soki olingi, komisa ngai peto. 41 Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. 42 Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto. 43 Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye : 44 — Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te ; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki. 45 Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.

In Other Versions

Mark 1 in the ANGEFD

Mark 1 in the ANTPNG2D

Mark 1 in the AS21

Mark 1 in the BAGH

Mark 1 in the BBPNG

Mark 1 in the BBT1E

Mark 1 in the BDS

Mark 1 in the BEV

Mark 1 in the BHAD

Mark 1 in the BIB

Mark 1 in the BLPT

Mark 1 in the BNT

Mark 1 in the BNTABOOT

Mark 1 in the BNTLV

Mark 1 in the BOATCB

Mark 1 in the BOATCB2

Mark 1 in the BOBCV

Mark 1 in the BOCNT

Mark 1 in the BOECS

Mark 1 in the BOGWICC

Mark 1 in the BOHCB

Mark 1 in the BOHCV

Mark 1 in the BOHLNT

Mark 1 in the BOHNTLTAL

Mark 1 in the BOICB

Mark 1 in the BOILNTAP

Mark 1 in the BOITCV

Mark 1 in the BOKCV

Mark 1 in the BOKCV2

Mark 1 in the BOKHWOG

Mark 1 in the BOKSSV

Mark 1 in the BOLCB

Mark 1 in the BOMCV

Mark 1 in the BONAV

Mark 1 in the BONCB

Mark 1 in the BONLT

Mark 1 in the BONUT2

Mark 1 in the BOPLNT

Mark 1 in the BOSCB

Mark 1 in the BOSNC

Mark 1 in the BOTLNT

Mark 1 in the BOVCB

Mark 1 in the BOYCB

Mark 1 in the BPBB

Mark 1 in the BPH

Mark 1 in the BSB

Mark 1 in the CCB

Mark 1 in the CUV

Mark 1 in the CUVS

Mark 1 in the DBT

Mark 1 in the DGDNT

Mark 1 in the DHNT

Mark 1 in the DNT

Mark 1 in the ELBE

Mark 1 in the EMTV

Mark 1 in the ESV

Mark 1 in the FBV

Mark 1 in the FEB

Mark 1 in the GGMNT

Mark 1 in the GNT

Mark 1 in the HARY

Mark 1 in the HNT

Mark 1 in the IRVA

Mark 1 in the IRVB

Mark 1 in the IRVG

Mark 1 in the IRVH

Mark 1 in the IRVK

Mark 1 in the IRVM

Mark 1 in the IRVM2

Mark 1 in the IRVO

Mark 1 in the IRVP

Mark 1 in the IRVT

Mark 1 in the IRVT2

Mark 1 in the IRVU

Mark 1 in the ISVN

Mark 1 in the JSNT

Mark 1 in the KAPI

Mark 1 in the KBT1ETNIK

Mark 1 in the KBV

Mark 1 in the KJV

Mark 1 in the KNFD

Mark 1 in the LBA

Mark 1 in the LBLA

Mark 1 in the LNT

Mark 1 in the LSV

Mark 1 in the MAAL

Mark 1 in the MBV

Mark 1 in the MBV2

Mark 1 in the MHNT

Mark 1 in the MKNFD

Mark 1 in the MNG

Mark 1 in the MNT

Mark 1 in the MNT2

Mark 1 in the MRS1T

Mark 1 in the NAA

Mark 1 in the NASB

Mark 1 in the NBLA

Mark 1 in the NBS

Mark 1 in the NBVTP

Mark 1 in the NET2

Mark 1 in the NIV11

Mark 1 in the NNT

Mark 1 in the NNT2

Mark 1 in the NNT3

Mark 1 in the PDDPT

Mark 1 in the PFNT

Mark 1 in the RMNT

Mark 1 in the SBIAS

Mark 1 in the SBIBS

Mark 1 in the SBIBS2

Mark 1 in the SBICS

Mark 1 in the SBIDS

Mark 1 in the SBIGS

Mark 1 in the SBIHS

Mark 1 in the SBIIS

Mark 1 in the SBIIS2

Mark 1 in the SBIIS3

Mark 1 in the SBIKS

Mark 1 in the SBIKS2

Mark 1 in the SBIMS

Mark 1 in the SBIOS

Mark 1 in the SBIPS

Mark 1 in the SBISS

Mark 1 in the SBITS

Mark 1 in the SBITS2

Mark 1 in the SBITS3

Mark 1 in the SBITS4

Mark 1 in the SBIUS

Mark 1 in the SBIVS

Mark 1 in the SBT

Mark 1 in the SBT1E

Mark 1 in the SCHL

Mark 1 in the SNT

Mark 1 in the SUSU

Mark 1 in the SUSU2

Mark 1 in the SYNO

Mark 1 in the TBIAOTANT

Mark 1 in the TBT1E

Mark 1 in the TBT1E2

Mark 1 in the TFTIP

Mark 1 in the TFTU

Mark 1 in the TGNTATF3T

Mark 1 in the THAI

Mark 1 in the TNFD

Mark 1 in the TNT

Mark 1 in the TNTIK

Mark 1 in the TNTIL

Mark 1 in the TNTIN

Mark 1 in the TNTIP

Mark 1 in the TNTIZ

Mark 1 in the TOMA

Mark 1 in the TTENT

Mark 1 in the UBG

Mark 1 in the UGV

Mark 1 in the UGV2

Mark 1 in the UGV3

Mark 1 in the VBL

Mark 1 in the VDCC

Mark 1 in the YALU

Mark 1 in the YAPE

Mark 1 in the YBVTP

Mark 1 in the ZBP