Mark 6 (BOLCB2)

1 Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama. 2 Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani.Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki : « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Nani apesi ye bwanya ya boye ? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso ? 3 Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? »Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye. 4 Yesu alobaki na bango : « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. » 5 Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko. 6 Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango.Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya. 7 Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe. 8 Alobaki na bango : « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. »Alobaki na bango : « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino. 9 Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te. 10 Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa. 11 Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino ; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. » 12 Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema. 13 Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta. 14 Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi.Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! » 15 Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! »Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! » 16 Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! » 17 Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki. 18 Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. » 19 Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te, 20 pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye. 21 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile. 22 Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi :— Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango ! 23 Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye :— Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai. 24 Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye :— Mama, nasenga nini ?Mama na ye azongisaki :— Senga moto ya Yoane Mobatisi. 25 Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :— Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. 26 Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango. 27 Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane, 28 amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye. 29 Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko. 30 Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki. 31 Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. » 32 Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama. 33 Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende. 34 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele. 35 Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye :— Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe ! 36 Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga. 37 Kasi Yesu azongisaki : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.Bayekoli balobaki na Ye :— Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ? 38 Yesu atunaki bango : — Mapa boni bozali na yango ? Bokende nanu kotala.Bakendeki kotala mpe balobaki :— Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale. 39 Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu. 40 Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano. 41 Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. 42 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. 43 Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. 44 Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano. 45 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato. 46 Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela. 47 Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale ; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili, 48 amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. 49 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga. 50 Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango.Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! » 51 Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza, 52 pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama. 53 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo. 54 Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu. 55 Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna. 56 Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.

In Other Versions

Mark 6 in the ANGEFD

Mark 6 in the ANTPNG2D

Mark 6 in the AS21

Mark 6 in the BAGH

Mark 6 in the BBPNG

Mark 6 in the BBT1E

Mark 6 in the BDS

Mark 6 in the BEV

Mark 6 in the BHAD

Mark 6 in the BIB

Mark 6 in the BLPT

Mark 6 in the BNT

Mark 6 in the BNTABOOT

Mark 6 in the BNTLV

Mark 6 in the BOATCB

Mark 6 in the BOATCB2

Mark 6 in the BOBCV

Mark 6 in the BOCNT

Mark 6 in the BOECS

Mark 6 in the BOGWICC

Mark 6 in the BOHCB

Mark 6 in the BOHCV

Mark 6 in the BOHLNT

Mark 6 in the BOHNTLTAL

Mark 6 in the BOICB

Mark 6 in the BOILNTAP

Mark 6 in the BOITCV

Mark 6 in the BOKCV

Mark 6 in the BOKCV2

Mark 6 in the BOKHWOG

Mark 6 in the BOKSSV

Mark 6 in the BOLCB

Mark 6 in the BOMCV

Mark 6 in the BONAV

Mark 6 in the BONCB

Mark 6 in the BONLT

Mark 6 in the BONUT2

Mark 6 in the BOPLNT

Mark 6 in the BOSCB

Mark 6 in the BOSNC

Mark 6 in the BOTLNT

Mark 6 in the BOVCB

Mark 6 in the BOYCB

Mark 6 in the BPBB

Mark 6 in the BPH

Mark 6 in the BSB

Mark 6 in the CCB

Mark 6 in the CUV

Mark 6 in the CUVS

Mark 6 in the DBT

Mark 6 in the DGDNT

Mark 6 in the DHNT

Mark 6 in the DNT

Mark 6 in the ELBE

Mark 6 in the EMTV

Mark 6 in the ESV

Mark 6 in the FBV

Mark 6 in the FEB

Mark 6 in the GGMNT

Mark 6 in the GNT

Mark 6 in the HARY

Mark 6 in the HNT

Mark 6 in the IRVA

Mark 6 in the IRVB

Mark 6 in the IRVG

Mark 6 in the IRVH

Mark 6 in the IRVK

Mark 6 in the IRVM

Mark 6 in the IRVM2

Mark 6 in the IRVO

Mark 6 in the IRVP

Mark 6 in the IRVT

Mark 6 in the IRVT2

Mark 6 in the IRVU

Mark 6 in the ISVN

Mark 6 in the JSNT

Mark 6 in the KAPI

Mark 6 in the KBT1ETNIK

Mark 6 in the KBV

Mark 6 in the KJV

Mark 6 in the KNFD

Mark 6 in the LBA

Mark 6 in the LBLA

Mark 6 in the LNT

Mark 6 in the LSV

Mark 6 in the MAAL

Mark 6 in the MBV

Mark 6 in the MBV2

Mark 6 in the MHNT

Mark 6 in the MKNFD

Mark 6 in the MNG

Mark 6 in the MNT

Mark 6 in the MNT2

Mark 6 in the MRS1T

Mark 6 in the NAA

Mark 6 in the NASB

Mark 6 in the NBLA

Mark 6 in the NBS

Mark 6 in the NBVTP

Mark 6 in the NET2

Mark 6 in the NIV11

Mark 6 in the NNT

Mark 6 in the NNT2

Mark 6 in the NNT3

Mark 6 in the PDDPT

Mark 6 in the PFNT

Mark 6 in the RMNT

Mark 6 in the SBIAS

Mark 6 in the SBIBS

Mark 6 in the SBIBS2

Mark 6 in the SBICS

Mark 6 in the SBIDS

Mark 6 in the SBIGS

Mark 6 in the SBIHS

Mark 6 in the SBIIS

Mark 6 in the SBIIS2

Mark 6 in the SBIIS3

Mark 6 in the SBIKS

Mark 6 in the SBIKS2

Mark 6 in the SBIMS

Mark 6 in the SBIOS

Mark 6 in the SBIPS

Mark 6 in the SBISS

Mark 6 in the SBITS

Mark 6 in the SBITS2

Mark 6 in the SBITS3

Mark 6 in the SBITS4

Mark 6 in the SBIUS

Mark 6 in the SBIVS

Mark 6 in the SBT

Mark 6 in the SBT1E

Mark 6 in the SCHL

Mark 6 in the SNT

Mark 6 in the SUSU

Mark 6 in the SUSU2

Mark 6 in the SYNO

Mark 6 in the TBIAOTANT

Mark 6 in the TBT1E

Mark 6 in the TBT1E2

Mark 6 in the TFTIP

Mark 6 in the TFTU

Mark 6 in the TGNTATF3T

Mark 6 in the THAI

Mark 6 in the TNFD

Mark 6 in the TNT

Mark 6 in the TNTIK

Mark 6 in the TNTIL

Mark 6 in the TNTIN

Mark 6 in the TNTIP

Mark 6 in the TNTIZ

Mark 6 in the TOMA

Mark 6 in the TTENT

Mark 6 in the UBG

Mark 6 in the UGV

Mark 6 in the UGV2

Mark 6 in the UGV3

Mark 6 in the VBL

Mark 6 in the VDCC

Mark 6 in the YALU

Mark 6 in the YAPE

Mark 6 in the YBVTP

Mark 6 in the ZBP