Psalms 121 (BOLCB2)
1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :lisungi na ngai ekowuta wapi ? 2 Lisungi na ngai ewutaka na Yaweoyo akela likolo mpe mabele. 3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ;Ye oyo abatelaka yo animbaka te. 4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaeleanimbaka te mpe alalaka pongi te ! 5 Yawe azali mobateli na yo ;Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali,lokola elili oyo ebatelaka yo. 6 Ezala na moyi to na butu,moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te ! 7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso,akobatela bomoi na yo ; 8 Yawe akobatela kokendempe kozonga na yo,sik’oyo mpe libela na libela.