Psalms 131 (BOLCB2)
1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te,miso na ngai ezali na posa makasi te ;namipesaka te na makambo oyo eleki ya minenempe eleki pasi mpo na ngai. 2 Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngaimpe namitungisaki telokola mwana moke elongo na mama na ye.Nazali na kimia lokola mwanaoyo mama alongola na mabele. 3 Isalaele, tia elikya kati na Yawekobanda sik’oyo mpe libela na libela.