Psalms 133 (BOLCB2)
1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitokompo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko ! 2 Ezali lokola malasi ya motuyaoyo basopi na moto,bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye. 3 Ezali lokola mamwe ya Erimoni,oyo ekitaka na bangomba ya Siona.Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,mpe bomoi, mpo na libela.