Revelation 16 (BOLCB2)
1 Bongo nayokaki mongongo moko monene kobima wuta na Tempelo mpe koloba na ba-anjelu sambo : « Bokende kosopa na mokili bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. » 2 Anjelu ya liboso akendeki mpe asopaki kopo na ye na mokili, mpe bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na banzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. 3 Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei ; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki. 4 Anjelu ya misato asopaki kopo na ye na bibale mpe na bitima ya mayi, mpe mayi ekomaki makila. 5 Bongo nayokaki anjelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi koloba :« Oh Mosantu, Yo oyo ozali mpe ozalaki,ozali penza sembo,mpo ete okati bongo na bosembo na Yo ! 6 Mpo ete basopaki makila ya basantumpe ya basakoli na Yo,mpe opesi bango makila mpo ete bamelandenge ekoki mpo na bango. » 7 Bongo nayokaki etumbelo koloba :« Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo ! » 8 Anjelu ya minei asopaki kopo na ye na likolo ya moyi, mpe moyi ezwaki ndingisa ya kozikisa bato na nzela ya moto na yango. 9 Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo. 10 Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi, 11 bafingaki Nzambe ya Lola mpo na pasi mpe bapota na bango ya minene. Kasi baboyaki kaka kotika misala na bango ya mabe. 12 Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema. 13 Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo kobima longwa na monoko ya dalagona, na monoko ya nyama mpe na monoko ya mosakoli ya lokuta. 14 Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. 15 Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso. 16 Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona. 17 Anjelu ya sambo asopaki kopo na ye kati na mopepe, mpe mongongo moko ya monene kowuta na Kiti ya Bokonzi ebimaki longwa na Tempelo mpe elobaki : « Ekokisami ! » 18 Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi ; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili. 19 Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi. 20 Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te. 21 Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.
In Other Versions
Revelation 16 in the ANGEFD
Revelation 16 in the ANTPNG2D
Revelation 16 in the AS21
Revelation 16 in the BAGH
Revelation 16 in the BBPNG
Revelation 16 in the BBT1E
Revelation 16 in the BDS
Revelation 16 in the BEV
Revelation 16 in the BHAD
Revelation 16 in the BIB
Revelation 16 in the BLPT
Revelation 16 in the BNT
Revelation 16 in the BNTABOOT
Revelation 16 in the BNTLV
Revelation 16 in the BOATCB
Revelation 16 in the BOATCB2
Revelation 16 in the BOBCV
Revelation 16 in the BOCNT
Revelation 16 in the BOECS
Revelation 16 in the BOGWICC
Revelation 16 in the BOHCB
Revelation 16 in the BOHCV
Revelation 16 in the BOHLNT
Revelation 16 in the BOHNTLTAL
Revelation 16 in the BOICB
Revelation 16 in the BOILNTAP
Revelation 16 in the BOITCV
Revelation 16 in the BOKCV
Revelation 16 in the BOKCV2
Revelation 16 in the BOKHWOG
Revelation 16 in the BOKSSV
Revelation 16 in the BOLCB
Revelation 16 in the BOMCV
Revelation 16 in the BONAV
Revelation 16 in the BONCB
Revelation 16 in the BONLT
Revelation 16 in the BONUT2
Revelation 16 in the BOPLNT
Revelation 16 in the BOSCB
Revelation 16 in the BOSNC
Revelation 16 in the BOTLNT
Revelation 16 in the BOVCB
Revelation 16 in the BOYCB
Revelation 16 in the BPBB
Revelation 16 in the BPH
Revelation 16 in the BSB
Revelation 16 in the CCB
Revelation 16 in the CUV
Revelation 16 in the CUVS
Revelation 16 in the DBT
Revelation 16 in the DGDNT
Revelation 16 in the DHNT
Revelation 16 in the DNT
Revelation 16 in the ELBE
Revelation 16 in the EMTV
Revelation 16 in the ESV
Revelation 16 in the FBV
Revelation 16 in the FEB
Revelation 16 in the GGMNT
Revelation 16 in the GNT
Revelation 16 in the HARY
Revelation 16 in the HNT
Revelation 16 in the IRVA
Revelation 16 in the IRVB
Revelation 16 in the IRVG
Revelation 16 in the IRVH
Revelation 16 in the IRVK
Revelation 16 in the IRVM
Revelation 16 in the IRVM2
Revelation 16 in the IRVO
Revelation 16 in the IRVP
Revelation 16 in the IRVT
Revelation 16 in the IRVT2
Revelation 16 in the IRVU
Revelation 16 in the ISVN
Revelation 16 in the JSNT
Revelation 16 in the KAPI
Revelation 16 in the KBT1ETNIK
Revelation 16 in the KBV
Revelation 16 in the KJV
Revelation 16 in the KNFD
Revelation 16 in the LBA
Revelation 16 in the LBLA
Revelation 16 in the LNT
Revelation 16 in the LSV
Revelation 16 in the MAAL
Revelation 16 in the MBV
Revelation 16 in the MBV2
Revelation 16 in the MHNT
Revelation 16 in the MKNFD
Revelation 16 in the MNG
Revelation 16 in the MNT
Revelation 16 in the MNT2
Revelation 16 in the MRS1T
Revelation 16 in the NAA
Revelation 16 in the NASB
Revelation 16 in the NBLA
Revelation 16 in the NBS
Revelation 16 in the NBVTP
Revelation 16 in the NET2
Revelation 16 in the NIV11
Revelation 16 in the NNT
Revelation 16 in the NNT2
Revelation 16 in the NNT3
Revelation 16 in the PDDPT
Revelation 16 in the PFNT
Revelation 16 in the RMNT
Revelation 16 in the SBIAS
Revelation 16 in the SBIBS
Revelation 16 in the SBIBS2
Revelation 16 in the SBICS
Revelation 16 in the SBIDS
Revelation 16 in the SBIGS
Revelation 16 in the SBIHS
Revelation 16 in the SBIIS
Revelation 16 in the SBIIS2
Revelation 16 in the SBIIS3
Revelation 16 in the SBIKS
Revelation 16 in the SBIKS2
Revelation 16 in the SBIMS
Revelation 16 in the SBIOS
Revelation 16 in the SBIPS
Revelation 16 in the SBISS
Revelation 16 in the SBITS
Revelation 16 in the SBITS2
Revelation 16 in the SBITS3
Revelation 16 in the SBITS4
Revelation 16 in the SBIUS
Revelation 16 in the SBIVS
Revelation 16 in the SBT
Revelation 16 in the SBT1E
Revelation 16 in the SCHL
Revelation 16 in the SNT
Revelation 16 in the SUSU
Revelation 16 in the SUSU2
Revelation 16 in the SYNO
Revelation 16 in the TBIAOTANT
Revelation 16 in the TBT1E
Revelation 16 in the TBT1E2
Revelation 16 in the TFTIP
Revelation 16 in the TFTU
Revelation 16 in the TGNTATF3T
Revelation 16 in the THAI
Revelation 16 in the TNFD
Revelation 16 in the TNT
Revelation 16 in the TNTIK
Revelation 16 in the TNTIL
Revelation 16 in the TNTIN
Revelation 16 in the TNTIP
Revelation 16 in the TNTIZ
Revelation 16 in the TOMA
Revelation 16 in the TTENT
Revelation 16 in the UBG
Revelation 16 in the UGV
Revelation 16 in the UGV2
Revelation 16 in the UGV3
Revelation 16 in the VBL
Revelation 16 in the VDCC
Revelation 16 in the YALU
Revelation 16 in the YAPE
Revelation 16 in the YBVTP
Revelation 16 in the ZBP