Revelation 21 (BOLCB2)

1 Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te. 2 Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye. 3 Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango. 4 Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. » 5 Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki : « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. »Alobaki lisusu : « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. » 6 Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi. 7 Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai. 8 Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. » 9 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. » 10 Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi ; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. 11 Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali. 12 Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango. 13 Bikuke misato ezalaki na ngambo ya este, misato na ngambo ya nor, misato na ngambo ya sude, mpe misato na ngambo ya weste. 14 Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango. 15 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango. 16 Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba : ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda. 17 Anjelu amekaki mpe kovimba ya mir kolanda ndenge bato basalaka : ezalaki na bametele pene tuku motoba na mitano. 18 Mir yango etongamaki na jasipe, mpe engumba ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala. 19 Babambaki mabanga ya talo ya ndenge na ndenge na miboko ya mir ya engumba yango : babambaki jasipe na moboko ya liboso, safiri na moboko ya mibale, shalisedwane na moboko ya misato, emerode na moboko ya minei, 20 saridwane na moboko ya mitano, korinaline na moboko ya motoba, krizolite na moboko ya sambo, berili na moboko ya mwambe, topaze na moboko ya libwa, krizopraze na moboko ya zomi, tirikwaze na moboko ya zomi na moko, mpe ametisite na moboko ya zomi na mibale. 21 Bikuke wana zomi na mibale ezalaki lokola mayaka zomi na mibale ; ekuke moko na moko esalemaki na liyaka moko. Balabala monene ya engumba yango ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala. 22 Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango. 23 Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango. 24 Bikolo ekotambola na pole na yango, mpe bakonzi ya mokili bakomema nkembo na bango kati na engumba. 25 Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te. 26 Bakomemela engumba yango nkembo mpe lokumu ya bikolo. 27 Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.

In Other Versions

Revelation 21 in the ANGEFD

Revelation 21 in the ANTPNG2D

Revelation 21 in the AS21

Revelation 21 in the BAGH

Revelation 21 in the BBPNG

Revelation 21 in the BBT1E

Revelation 21 in the BDS

Revelation 21 in the BEV

Revelation 21 in the BHAD

Revelation 21 in the BIB

Revelation 21 in the BLPT

Revelation 21 in the BNT

Revelation 21 in the BNTABOOT

Revelation 21 in the BNTLV

Revelation 21 in the BOATCB

Revelation 21 in the BOATCB2

Revelation 21 in the BOBCV

Revelation 21 in the BOCNT

Revelation 21 in the BOECS

Revelation 21 in the BOGWICC

Revelation 21 in the BOHCB

Revelation 21 in the BOHCV

Revelation 21 in the BOHLNT

Revelation 21 in the BOHNTLTAL

Revelation 21 in the BOICB

Revelation 21 in the BOILNTAP

Revelation 21 in the BOITCV

Revelation 21 in the BOKCV

Revelation 21 in the BOKCV2

Revelation 21 in the BOKHWOG

Revelation 21 in the BOKSSV

Revelation 21 in the BOLCB

Revelation 21 in the BOMCV

Revelation 21 in the BONAV

Revelation 21 in the BONCB

Revelation 21 in the BONLT

Revelation 21 in the BONUT2

Revelation 21 in the BOPLNT

Revelation 21 in the BOSCB

Revelation 21 in the BOSNC

Revelation 21 in the BOTLNT

Revelation 21 in the BOVCB

Revelation 21 in the BOYCB

Revelation 21 in the BPBB

Revelation 21 in the BPH

Revelation 21 in the BSB

Revelation 21 in the CCB

Revelation 21 in the CUV

Revelation 21 in the CUVS

Revelation 21 in the DBT

Revelation 21 in the DGDNT

Revelation 21 in the DHNT

Revelation 21 in the DNT

Revelation 21 in the ELBE

Revelation 21 in the EMTV

Revelation 21 in the ESV

Revelation 21 in the FBV

Revelation 21 in the FEB

Revelation 21 in the GGMNT

Revelation 21 in the GNT

Revelation 21 in the HARY

Revelation 21 in the HNT

Revelation 21 in the IRVA

Revelation 21 in the IRVB

Revelation 21 in the IRVG

Revelation 21 in the IRVH

Revelation 21 in the IRVK

Revelation 21 in the IRVM

Revelation 21 in the IRVM2

Revelation 21 in the IRVO

Revelation 21 in the IRVP

Revelation 21 in the IRVT

Revelation 21 in the IRVT2

Revelation 21 in the IRVU

Revelation 21 in the ISVN

Revelation 21 in the JSNT

Revelation 21 in the KAPI

Revelation 21 in the KBT1ETNIK

Revelation 21 in the KBV

Revelation 21 in the KJV

Revelation 21 in the KNFD

Revelation 21 in the LBA

Revelation 21 in the LBLA

Revelation 21 in the LNT

Revelation 21 in the LSV

Revelation 21 in the MAAL

Revelation 21 in the MBV

Revelation 21 in the MBV2

Revelation 21 in the MHNT

Revelation 21 in the MKNFD

Revelation 21 in the MNG

Revelation 21 in the MNT

Revelation 21 in the MNT2

Revelation 21 in the MRS1T

Revelation 21 in the NAA

Revelation 21 in the NASB

Revelation 21 in the NBLA

Revelation 21 in the NBS

Revelation 21 in the NBVTP

Revelation 21 in the NET2

Revelation 21 in the NIV11

Revelation 21 in the NNT

Revelation 21 in the NNT2

Revelation 21 in the NNT3

Revelation 21 in the PDDPT

Revelation 21 in the PFNT

Revelation 21 in the RMNT

Revelation 21 in the SBIAS

Revelation 21 in the SBIBS

Revelation 21 in the SBIBS2

Revelation 21 in the SBICS

Revelation 21 in the SBIDS

Revelation 21 in the SBIGS

Revelation 21 in the SBIHS

Revelation 21 in the SBIIS

Revelation 21 in the SBIIS2

Revelation 21 in the SBIIS3

Revelation 21 in the SBIKS

Revelation 21 in the SBIKS2

Revelation 21 in the SBIMS

Revelation 21 in the SBIOS

Revelation 21 in the SBIPS

Revelation 21 in the SBISS

Revelation 21 in the SBITS

Revelation 21 in the SBITS2

Revelation 21 in the SBITS3

Revelation 21 in the SBITS4

Revelation 21 in the SBIUS

Revelation 21 in the SBIVS

Revelation 21 in the SBT

Revelation 21 in the SBT1E

Revelation 21 in the SCHL

Revelation 21 in the SNT

Revelation 21 in the SUSU

Revelation 21 in the SUSU2

Revelation 21 in the SYNO

Revelation 21 in the TBIAOTANT

Revelation 21 in the TBT1E

Revelation 21 in the TBT1E2

Revelation 21 in the TFTIP

Revelation 21 in the TFTU

Revelation 21 in the TGNTATF3T

Revelation 21 in the THAI

Revelation 21 in the TNFD

Revelation 21 in the TNT

Revelation 21 in the TNTIK

Revelation 21 in the TNTIL

Revelation 21 in the TNTIN

Revelation 21 in the TNTIP

Revelation 21 in the TNTIZ

Revelation 21 in the TOMA

Revelation 21 in the TTENT

Revelation 21 in the UBG

Revelation 21 in the UGV

Revelation 21 in the UGV2

Revelation 21 in the UGV3

Revelation 21 in the VBL

Revelation 21 in the VDCC

Revelation 21 in the YALU

Revelation 21 in the YAPE

Revelation 21 in the YBVTP

Revelation 21 in the ZBP