Romans 14 (BOLCB2)

1 Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi. 2 Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda. 3 Moto oyo aliaka bilei nyonso asengeli te kotiola moto oyo aponaka bilei, mpe moto oyo aponaka bilei asengeli te kosambisa moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye. 4 Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu ? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye. 5 Moko akanisaka ete mokolo songolo ezali bule koleka mokolo pakala, mpe mosusu akanisaka ete mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko : tika ete moto na moto kati na bango andimisama makasi na makanisi na ye. 6 Moto oyo akesenisaka mikolo asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo. Moto oyo aliaka bilei nyonso asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe ; mpe moto oyo aponaka bilei asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe. 7 Moko te kati na biso abikaka bomoi mpo na ye moko, mpe moko te akufaka mpo na ye moko. 8 Soki tozali kobika bomoi, tozali kobika yango mpo na Nkolo ; soki mpe tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tobika bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo. 9 Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi. 10 Bongo yo, mpo na nini ozali kosambisa to kotiola ndeko na yo ? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba. 11 Pamba te ekomama :« Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo,« mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai,mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. » 12 Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko. 13 Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye. 14 Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye. 15 Boye soki, likolo ya bilei, ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, wana ozali lisusu kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki. 16 Yango wana, tika ete bolamu na bino etiolama te. 17 Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu. 18 Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye. 19 Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima. 20 Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku. 21 Likambo oyo eleki malamu ezali : koboya kolia misuni, koboya komela vino, koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku. 22 Boye, batela mpo na yo moko liboso ya Nzambe, kondima oyo ozali na yango. Esengo na moto oyo amikweyisaka te na nzela ya makambo oyo andimaka ! 23 Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye ; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.

In Other Versions

Romans 14 in the ANGEFD

Romans 14 in the ANTPNG2D

Romans 14 in the AS21

Romans 14 in the BAGH

Romans 14 in the BBPNG

Romans 14 in the BBT1E

Romans 14 in the BDS

Romans 14 in the BEV

Romans 14 in the BHAD

Romans 14 in the BIB

Romans 14 in the BLPT

Romans 14 in the BNT

Romans 14 in the BNTABOOT

Romans 14 in the BNTLV

Romans 14 in the BOATCB

Romans 14 in the BOATCB2

Romans 14 in the BOBCV

Romans 14 in the BOCNT

Romans 14 in the BOECS

Romans 14 in the BOGWICC

Romans 14 in the BOHCB

Romans 14 in the BOHCV

Romans 14 in the BOHLNT

Romans 14 in the BOHNTLTAL

Romans 14 in the BOICB

Romans 14 in the BOILNTAP

Romans 14 in the BOITCV

Romans 14 in the BOKCV

Romans 14 in the BOKCV2

Romans 14 in the BOKHWOG

Romans 14 in the BOKSSV

Romans 14 in the BOLCB

Romans 14 in the BOMCV

Romans 14 in the BONAV

Romans 14 in the BONCB

Romans 14 in the BONLT

Romans 14 in the BONUT2

Romans 14 in the BOPLNT

Romans 14 in the BOSCB

Romans 14 in the BOSNC

Romans 14 in the BOTLNT

Romans 14 in the BOVCB

Romans 14 in the BOYCB

Romans 14 in the BPBB

Romans 14 in the BPH

Romans 14 in the BSB

Romans 14 in the CCB

Romans 14 in the CUV

Romans 14 in the CUVS

Romans 14 in the DBT

Romans 14 in the DGDNT

Romans 14 in the DHNT

Romans 14 in the DNT

Romans 14 in the ELBE

Romans 14 in the EMTV

Romans 14 in the ESV

Romans 14 in the FBV

Romans 14 in the FEB

Romans 14 in the GGMNT

Romans 14 in the GNT

Romans 14 in the HARY

Romans 14 in the HNT

Romans 14 in the IRVA

Romans 14 in the IRVB

Romans 14 in the IRVG

Romans 14 in the IRVH

Romans 14 in the IRVK

Romans 14 in the IRVM

Romans 14 in the IRVM2

Romans 14 in the IRVO

Romans 14 in the IRVP

Romans 14 in the IRVT

Romans 14 in the IRVT2

Romans 14 in the IRVU

Romans 14 in the ISVN

Romans 14 in the JSNT

Romans 14 in the KAPI

Romans 14 in the KBT1ETNIK

Romans 14 in the KBV

Romans 14 in the KJV

Romans 14 in the KNFD

Romans 14 in the LBA

Romans 14 in the LBLA

Romans 14 in the LNT

Romans 14 in the LSV

Romans 14 in the MAAL

Romans 14 in the MBV

Romans 14 in the MBV2

Romans 14 in the MHNT

Romans 14 in the MKNFD

Romans 14 in the MNG

Romans 14 in the MNT

Romans 14 in the MNT2

Romans 14 in the MRS1T

Romans 14 in the NAA

Romans 14 in the NASB

Romans 14 in the NBLA

Romans 14 in the NBS

Romans 14 in the NBVTP

Romans 14 in the NET2

Romans 14 in the NIV11

Romans 14 in the NNT

Romans 14 in the NNT2

Romans 14 in the NNT3

Romans 14 in the PDDPT

Romans 14 in the PFNT

Romans 14 in the RMNT

Romans 14 in the SBIAS

Romans 14 in the SBIBS

Romans 14 in the SBIBS2

Romans 14 in the SBICS

Romans 14 in the SBIDS

Romans 14 in the SBIGS

Romans 14 in the SBIHS

Romans 14 in the SBIIS

Romans 14 in the SBIIS2

Romans 14 in the SBIIS3

Romans 14 in the SBIKS

Romans 14 in the SBIKS2

Romans 14 in the SBIMS

Romans 14 in the SBIOS

Romans 14 in the SBIPS

Romans 14 in the SBISS

Romans 14 in the SBITS

Romans 14 in the SBITS2

Romans 14 in the SBITS3

Romans 14 in the SBITS4

Romans 14 in the SBIUS

Romans 14 in the SBIVS

Romans 14 in the SBT

Romans 14 in the SBT1E

Romans 14 in the SCHL

Romans 14 in the SNT

Romans 14 in the SUSU

Romans 14 in the SUSU2

Romans 14 in the SYNO

Romans 14 in the TBIAOTANT

Romans 14 in the TBT1E

Romans 14 in the TBT1E2

Romans 14 in the TFTIP

Romans 14 in the TFTU

Romans 14 in the TGNTATF3T

Romans 14 in the THAI

Romans 14 in the TNFD

Romans 14 in the TNT

Romans 14 in the TNTIK

Romans 14 in the TNTIL

Romans 14 in the TNTIN

Romans 14 in the TNTIP

Romans 14 in the TNTIZ

Romans 14 in the TOMA

Romans 14 in the TTENT

Romans 14 in the UBG

Romans 14 in the UGV

Romans 14 in the UGV2

Romans 14 in the UGV3

Romans 14 in the VBL

Romans 14 in the VDCC

Romans 14 in the YALU

Romans 14 in the YAPE

Romans 14 in the YBVTP

Romans 14 in the ZBP