Romans 4 (BOLCB2)

1 Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso ? Azwaki nini na bomoto ? 2 Soki Abrayami atangamaki lokola moto ya sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa ; kasi liboso ya Nzambe, ezali bongo te ! 3 Makomi elobi nini ? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. » 4 Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi lokola motoki na ye. 5 Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo. 6 Davidi mpe alobaki bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo na kozanga misala : 7 « Esengo na batooyo mabe na bango elimbisami,mpe masumu na bango elongwe ! 8 Esengo na motooyo Nkolo atangelaka lisumu te ! » 9 Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te ? Solo, tozali koloba : Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. 10 Esalemaki tango nini ? Esalemaki liboso na ye kokatisa ngenga to sima na ye kokatama ngenga ? Esalemaki te sima na ye kokatama ngenga ; esalemaki nde liboso na ye kokatisa ngenga. 11 Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo, 12 mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga. 13 Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bapesamelaki elaka ya kozwa mokili lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima. 14 Pamba te soki ezali bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa libula yango, wana kondima ezali lisusu na tina te mpe elaka ezali te, 15 pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te. 16 Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso, 17 kolanda ndenge ekomama : « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te. 18 Atako Abrayami akokaki lisusu te kotia elikya, kasi atiaki kaka elikya mpe andimaki ; boye akomaki tata ya bikolo ebele, kolanda ndenge Nzambe aloba mpo na ye : « Bakitani na yo bakozala ebele. » 19 Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te. 20 Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo, 21 wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye. 22 Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. 23 Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama : « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo ; » 24 ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso, 25 oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.

In Other Versions

Romans 4 in the ANGEFD

Romans 4 in the ANTPNG2D

Romans 4 in the AS21

Romans 4 in the BAGH

Romans 4 in the BBPNG

Romans 4 in the BBT1E

Romans 4 in the BDS

Romans 4 in the BEV

Romans 4 in the BHAD

Romans 4 in the BIB

Romans 4 in the BLPT

Romans 4 in the BNT

Romans 4 in the BNTABOOT

Romans 4 in the BNTLV

Romans 4 in the BOATCB

Romans 4 in the BOATCB2

Romans 4 in the BOBCV

Romans 4 in the BOCNT

Romans 4 in the BOECS

Romans 4 in the BOGWICC

Romans 4 in the BOHCB

Romans 4 in the BOHCV

Romans 4 in the BOHLNT

Romans 4 in the BOHNTLTAL

Romans 4 in the BOICB

Romans 4 in the BOILNTAP

Romans 4 in the BOITCV

Romans 4 in the BOKCV

Romans 4 in the BOKCV2

Romans 4 in the BOKHWOG

Romans 4 in the BOKSSV

Romans 4 in the BOLCB

Romans 4 in the BOMCV

Romans 4 in the BONAV

Romans 4 in the BONCB

Romans 4 in the BONLT

Romans 4 in the BONUT2

Romans 4 in the BOPLNT

Romans 4 in the BOSCB

Romans 4 in the BOSNC

Romans 4 in the BOTLNT

Romans 4 in the BOVCB

Romans 4 in the BOYCB

Romans 4 in the BPBB

Romans 4 in the BPH

Romans 4 in the BSB

Romans 4 in the CCB

Romans 4 in the CUV

Romans 4 in the CUVS

Romans 4 in the DBT

Romans 4 in the DGDNT

Romans 4 in the DHNT

Romans 4 in the DNT

Romans 4 in the ELBE

Romans 4 in the EMTV

Romans 4 in the ESV

Romans 4 in the FBV

Romans 4 in the FEB

Romans 4 in the GGMNT

Romans 4 in the GNT

Romans 4 in the HARY

Romans 4 in the HNT

Romans 4 in the IRVA

Romans 4 in the IRVB

Romans 4 in the IRVG

Romans 4 in the IRVH

Romans 4 in the IRVK

Romans 4 in the IRVM

Romans 4 in the IRVM2

Romans 4 in the IRVO

Romans 4 in the IRVP

Romans 4 in the IRVT

Romans 4 in the IRVT2

Romans 4 in the IRVU

Romans 4 in the ISVN

Romans 4 in the JSNT

Romans 4 in the KAPI

Romans 4 in the KBT1ETNIK

Romans 4 in the KBV

Romans 4 in the KJV

Romans 4 in the KNFD

Romans 4 in the LBA

Romans 4 in the LBLA

Romans 4 in the LNT

Romans 4 in the LSV

Romans 4 in the MAAL

Romans 4 in the MBV

Romans 4 in the MBV2

Romans 4 in the MHNT

Romans 4 in the MKNFD

Romans 4 in the MNG

Romans 4 in the MNT

Romans 4 in the MNT2

Romans 4 in the MRS1T

Romans 4 in the NAA

Romans 4 in the NASB

Romans 4 in the NBLA

Romans 4 in the NBS

Romans 4 in the NBVTP

Romans 4 in the NET2

Romans 4 in the NIV11

Romans 4 in the NNT

Romans 4 in the NNT2

Romans 4 in the NNT3

Romans 4 in the PDDPT

Romans 4 in the PFNT

Romans 4 in the RMNT

Romans 4 in the SBIAS

Romans 4 in the SBIBS

Romans 4 in the SBIBS2

Romans 4 in the SBICS

Romans 4 in the SBIDS

Romans 4 in the SBIGS

Romans 4 in the SBIHS

Romans 4 in the SBIIS

Romans 4 in the SBIIS2

Romans 4 in the SBIIS3

Romans 4 in the SBIKS

Romans 4 in the SBIKS2

Romans 4 in the SBIMS

Romans 4 in the SBIOS

Romans 4 in the SBIPS

Romans 4 in the SBISS

Romans 4 in the SBITS

Romans 4 in the SBITS2

Romans 4 in the SBITS3

Romans 4 in the SBITS4

Romans 4 in the SBIUS

Romans 4 in the SBIVS

Romans 4 in the SBT

Romans 4 in the SBT1E

Romans 4 in the SCHL

Romans 4 in the SNT

Romans 4 in the SUSU

Romans 4 in the SUSU2

Romans 4 in the SYNO

Romans 4 in the TBIAOTANT

Romans 4 in the TBT1E

Romans 4 in the TBT1E2

Romans 4 in the TFTIP

Romans 4 in the TFTU

Romans 4 in the TGNTATF3T

Romans 4 in the THAI

Romans 4 in the TNFD

Romans 4 in the TNT

Romans 4 in the TNTIK

Romans 4 in the TNTIL

Romans 4 in the TNTIN

Romans 4 in the TNTIP

Romans 4 in the TNTIZ

Romans 4 in the TOMA

Romans 4 in the TTENT

Romans 4 in the UBG

Romans 4 in the UGV

Romans 4 in the UGV2

Romans 4 in the UGV3

Romans 4 in the VBL

Romans 4 in the VDCC

Romans 4 in the YALU

Romans 4 in the YAPE

Romans 4 in the YBVTP

Romans 4 in the ZBP