2 Chronicles 23 (BOLCB2)

1 Na mobu ya sambo, Nganga-Nzambe Yeoyada alongolaki kobanga mpe azwaki mokano ya kosala boyokani elongo na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : Azaria, mwana mobali ya Yeroami ; Isimaeli, mwana mobali ya Yoanani ; Azaria, mwana mobali ya Obedi ; Maaseya, mwana mobali ya Adaya ; mpe Elishafati, mwana mobali ya Zikiri. 2 Batambolaki kati na Yuda mpe basangisaki Balevi elongo na bakonzi ya mabota ya Isalaele, oyo bawutaki na bingumba nyonso. Tango bayaki na Yelusalemi, 3 lisanga mobimba esalaki boyokani elongo na mokonzi kati na Tempelo ya Nzambe. Yeoyada alobaki na bango : « Mwana mobali ya mokonzi asengeli kokonza lokola mokonzi, kolanda elaka oyo Yawe apesaki na tina na bakitani ya Davidi. 4 Sik’oyo, tala ndenge bokosala : ‹ kati na bandambo misato ya lisanga na bino Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakosala na mokolo ya Saba, ndambo ya liboso bakokengela bikuke, 5 ndambo ya mibale bakokengela ndako ya mokonzi, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke ya Yesodi. Bato nyonso bakozala kati na mapango ya Tempelo ya Yawe. 6 Moko te asengeli kokota kati na Tempelo ya Yawe longola kaka Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakozala na mosala, pamba te bazali bule. Bato nyonso oyo batikali basengeli kotosa mobeko ya Yawe. 7 Balevi bakozingela mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko. Moto mosusu oyo akomeka kokota na Tempelo ya Yawe, basengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. › » 8 Balevi mpe bato nyonso ya Yuda basalaki ndenge kaka Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango ya Saba, pamba te Nganga-Nzambe Yeoyada apemisaki ndambo moko te. 9 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga, banguba minene mpe banguba mike ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe. 10 Atiaki bato nyonso zingazinga ya mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo. 11 Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! » 12 Tango Atali ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki kopota mbangu mpe kobetela mokonzi maboko, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe, 13 atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo ; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki :— Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! 14 Nganga-Nzambe Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko mpe alobaki na bango :— Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye !Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! » 15 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna. 16 Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe. 17 Bato nyonso bakendeki na ndako ya nzambe Bala, babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. 18 Yeoyada apesaki mosala ya kokengela Tempelo ya Yawe epai ya Banganga-Nzambe Balevi oyo Davidi apesaki mosala ya Tempelo ya Yawe, mpo na kotumba mbeka epai na Yawe, ndenge ekomama kati na mibeko ya Moyize, na esengo mpe na koyemba banzembo, ndenge Davidi atindaki. 19 Atiaki lisusu bakengeli na bikuke ya Tempelo ya Yawe mpo na kopekisa moto nyonso ya mbindo kokota kuna. 20 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya lokumu, bakambi ya bato mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya likolo. Mpe kuna, bavandisaki ye na kiti ya bokonzi. 21 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga.

In Other Versions

2 Chronicles 23 in the ANGEFD

2 Chronicles 23 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 23 in the AS21

2 Chronicles 23 in the BAGH

2 Chronicles 23 in the BBPNG

2 Chronicles 23 in the BBT1E

2 Chronicles 23 in the BDS

2 Chronicles 23 in the BEV

2 Chronicles 23 in the BHAD

2 Chronicles 23 in the BIB

2 Chronicles 23 in the BLPT

2 Chronicles 23 in the BNT

2 Chronicles 23 in the BNTABOOT

2 Chronicles 23 in the BNTLV

2 Chronicles 23 in the BOATCB

2 Chronicles 23 in the BOATCB2

2 Chronicles 23 in the BOBCV

2 Chronicles 23 in the BOCNT

2 Chronicles 23 in the BOECS

2 Chronicles 23 in the BOGWICC

2 Chronicles 23 in the BOHCB

2 Chronicles 23 in the BOHCV

2 Chronicles 23 in the BOHLNT

2 Chronicles 23 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 23 in the BOICB

2 Chronicles 23 in the BOILNTAP

2 Chronicles 23 in the BOITCV

2 Chronicles 23 in the BOKCV

2 Chronicles 23 in the BOKCV2

2 Chronicles 23 in the BOKHWOG

2 Chronicles 23 in the BOKSSV

2 Chronicles 23 in the BOLCB

2 Chronicles 23 in the BOMCV

2 Chronicles 23 in the BONAV

2 Chronicles 23 in the BONCB

2 Chronicles 23 in the BONLT

2 Chronicles 23 in the BONUT2

2 Chronicles 23 in the BOPLNT

2 Chronicles 23 in the BOSCB

2 Chronicles 23 in the BOSNC

2 Chronicles 23 in the BOTLNT

2 Chronicles 23 in the BOVCB

2 Chronicles 23 in the BOYCB

2 Chronicles 23 in the BPBB

2 Chronicles 23 in the BPH

2 Chronicles 23 in the BSB

2 Chronicles 23 in the CCB

2 Chronicles 23 in the CUV

2 Chronicles 23 in the CUVS

2 Chronicles 23 in the DBT

2 Chronicles 23 in the DGDNT

2 Chronicles 23 in the DHNT

2 Chronicles 23 in the DNT

2 Chronicles 23 in the ELBE

2 Chronicles 23 in the EMTV

2 Chronicles 23 in the ESV

2 Chronicles 23 in the FBV

2 Chronicles 23 in the FEB

2 Chronicles 23 in the GGMNT

2 Chronicles 23 in the GNT

2 Chronicles 23 in the HARY

2 Chronicles 23 in the HNT

2 Chronicles 23 in the IRVA

2 Chronicles 23 in the IRVB

2 Chronicles 23 in the IRVG

2 Chronicles 23 in the IRVH

2 Chronicles 23 in the IRVK

2 Chronicles 23 in the IRVM

2 Chronicles 23 in the IRVM2

2 Chronicles 23 in the IRVO

2 Chronicles 23 in the IRVP

2 Chronicles 23 in the IRVT

2 Chronicles 23 in the IRVT2

2 Chronicles 23 in the IRVU

2 Chronicles 23 in the ISVN

2 Chronicles 23 in the JSNT

2 Chronicles 23 in the KAPI

2 Chronicles 23 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 23 in the KBV

2 Chronicles 23 in the KJV

2 Chronicles 23 in the KNFD

2 Chronicles 23 in the LBA

2 Chronicles 23 in the LBLA

2 Chronicles 23 in the LNT

2 Chronicles 23 in the LSV

2 Chronicles 23 in the MAAL

2 Chronicles 23 in the MBV

2 Chronicles 23 in the MBV2

2 Chronicles 23 in the MHNT

2 Chronicles 23 in the MKNFD

2 Chronicles 23 in the MNG

2 Chronicles 23 in the MNT

2 Chronicles 23 in the MNT2

2 Chronicles 23 in the MRS1T

2 Chronicles 23 in the NAA

2 Chronicles 23 in the NASB

2 Chronicles 23 in the NBLA

2 Chronicles 23 in the NBS

2 Chronicles 23 in the NBVTP

2 Chronicles 23 in the NET2

2 Chronicles 23 in the NIV11

2 Chronicles 23 in the NNT

2 Chronicles 23 in the NNT2

2 Chronicles 23 in the NNT3

2 Chronicles 23 in the PDDPT

2 Chronicles 23 in the PFNT

2 Chronicles 23 in the RMNT

2 Chronicles 23 in the SBIAS

2 Chronicles 23 in the SBIBS

2 Chronicles 23 in the SBIBS2

2 Chronicles 23 in the SBICS

2 Chronicles 23 in the SBIDS

2 Chronicles 23 in the SBIGS

2 Chronicles 23 in the SBIHS

2 Chronicles 23 in the SBIIS

2 Chronicles 23 in the SBIIS2

2 Chronicles 23 in the SBIIS3

2 Chronicles 23 in the SBIKS

2 Chronicles 23 in the SBIKS2

2 Chronicles 23 in the SBIMS

2 Chronicles 23 in the SBIOS

2 Chronicles 23 in the SBIPS

2 Chronicles 23 in the SBISS

2 Chronicles 23 in the SBITS

2 Chronicles 23 in the SBITS2

2 Chronicles 23 in the SBITS3

2 Chronicles 23 in the SBITS4

2 Chronicles 23 in the SBIUS

2 Chronicles 23 in the SBIVS

2 Chronicles 23 in the SBT

2 Chronicles 23 in the SBT1E

2 Chronicles 23 in the SCHL

2 Chronicles 23 in the SNT

2 Chronicles 23 in the SUSU

2 Chronicles 23 in the SUSU2

2 Chronicles 23 in the SYNO

2 Chronicles 23 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 23 in the TBT1E

2 Chronicles 23 in the TBT1E2

2 Chronicles 23 in the TFTIP

2 Chronicles 23 in the TFTU

2 Chronicles 23 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 23 in the THAI

2 Chronicles 23 in the TNFD

2 Chronicles 23 in the TNT

2 Chronicles 23 in the TNTIK

2 Chronicles 23 in the TNTIL

2 Chronicles 23 in the TNTIN

2 Chronicles 23 in the TNTIP

2 Chronicles 23 in the TNTIZ

2 Chronicles 23 in the TOMA

2 Chronicles 23 in the TTENT

2 Chronicles 23 in the UBG

2 Chronicles 23 in the UGV

2 Chronicles 23 in the UGV2

2 Chronicles 23 in the UGV3

2 Chronicles 23 in the VBL

2 Chronicles 23 in the VDCC

2 Chronicles 23 in the YALU

2 Chronicles 23 in the YAPE

2 Chronicles 23 in the YBVTP

2 Chronicles 23 in the ZBP