2 Thessalonians 2 (BOLCB2)
1 Bandeko, mpo na oyo etali boyei ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe bosangani na biso epai na Ye, tozali kosenga na bino boye : 2 bopesaka na mobulu nzela te ya kokota na pete kati na makanisi na bino to tika ete mitema na bino etungisamaka te likolo na emoniseli, liloba to mokanda oyo bato bakoki koloba na tina na yango ete ewuti epai na biso mpe ezali koloba ete mokolo ya Nkolo esili kokoma. 3 Tika ete moko te akosa bino ; pamba te liboso ete mokolo yango ekoma, bato basengeli nanu kobwaka kondima, mpe motomboki oyo abongisami mpo na libebi asengeli nanu komonana. 4 Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe. 5 Boni, bobosani ete nazalaki koyebisa bino makambo yango tango nazalaki elongo na bino ? 6 Nzokande boyebi sik’oyo nini ezali kokanga ye nzela mpo ete amonisama te na tango na ye. 7 Pamba te nguya ya botomboki, oyo ebombama esili kobanda kosala ; kasi esengeli ete Ye oyo, kino sik’oyo, azali kokanga ye nzela ya komimonisa alongwa 8 mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye. 9 Motomboki yango akoya na nguya ya Satana mpe akosala bikamwa ya lolenge nyonso, bilembo, misala minene ya lokuta 10 mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango. 11 Yango wana Nzambe atindeli bango molimo ya libunga mpo ete bandima makambo ya lokuta, 12 mpe mpo ete bato nyonso oyo baboyaki kondimela solo kasi basepelaki na mabe bazwa etumbu. 13 Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo. 14 Na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, Nzambe abengaki bino mpo ete bozwa lobiko mpe nkembo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto. 15 Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bobatela malamu malakisi oyo toteyaki bino, ezala na nzela ya maloba to na nzela ya mokanda. 16 Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu, 17 balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso !
In Other Versions
2 Thessalonians 2 in the ANGEFD
2 Thessalonians 2 in the ANTPNG2D
2 Thessalonians 2 in the BBPNG
2 Thessalonians 2 in the BBT1E
2 Thessalonians 2 in the BNTABOOT
2 Thessalonians 2 in the BNTLV
2 Thessalonians 2 in the BOATCB
2 Thessalonians 2 in the BOATCB2
2 Thessalonians 2 in the BOBCV
2 Thessalonians 2 in the BOCNT
2 Thessalonians 2 in the BOECS
2 Thessalonians 2 in the BOGWICC
2 Thessalonians 2 in the BOHCB
2 Thessalonians 2 in the BOHCV
2 Thessalonians 2 in the BOHLNT
2 Thessalonians 2 in the BOHNTLTAL
2 Thessalonians 2 in the BOICB
2 Thessalonians 2 in the BOILNTAP
2 Thessalonians 2 in the BOITCV
2 Thessalonians 2 in the BOKCV
2 Thessalonians 2 in the BOKCV2
2 Thessalonians 2 in the BOKHWOG
2 Thessalonians 2 in the BOKSSV
2 Thessalonians 2 in the BOLCB
2 Thessalonians 2 in the BOMCV
2 Thessalonians 2 in the BONAV
2 Thessalonians 2 in the BONCB
2 Thessalonians 2 in the BONLT
2 Thessalonians 2 in the BONUT2
2 Thessalonians 2 in the BOPLNT
2 Thessalonians 2 in the BOSCB
2 Thessalonians 2 in the BOSNC
2 Thessalonians 2 in the BOTLNT
2 Thessalonians 2 in the BOVCB
2 Thessalonians 2 in the BOYCB
2 Thessalonians 2 in the DGDNT
2 Thessalonians 2 in the GGMNT
2 Thessalonians 2 in the IRVM2
2 Thessalonians 2 in the IRVT2
2 Thessalonians 2 in the KBT1ETNIK
2 Thessalonians 2 in the MKNFD
2 Thessalonians 2 in the MRS1T
2 Thessalonians 2 in the NBVTP
2 Thessalonians 2 in the NIV11
2 Thessalonians 2 in the PDDPT
2 Thessalonians 2 in the SBIAS
2 Thessalonians 2 in the SBIBS
2 Thessalonians 2 in the SBIBS2
2 Thessalonians 2 in the SBICS
2 Thessalonians 2 in the SBIDS
2 Thessalonians 2 in the SBIGS
2 Thessalonians 2 in the SBIHS
2 Thessalonians 2 in the SBIIS
2 Thessalonians 2 in the SBIIS2
2 Thessalonians 2 in the SBIIS3
2 Thessalonians 2 in the SBIKS
2 Thessalonians 2 in the SBIKS2
2 Thessalonians 2 in the SBIMS
2 Thessalonians 2 in the SBIOS
2 Thessalonians 2 in the SBIPS
2 Thessalonians 2 in the SBISS
2 Thessalonians 2 in the SBITS
2 Thessalonians 2 in the SBITS2
2 Thessalonians 2 in the SBITS3
2 Thessalonians 2 in the SBITS4
2 Thessalonians 2 in the SBIUS
2 Thessalonians 2 in the SBIVS
2 Thessalonians 2 in the SBT1E
2 Thessalonians 2 in the SUSU2
2 Thessalonians 2 in the TBIAOTANT
2 Thessalonians 2 in the TBT1E
2 Thessalonians 2 in the TBT1E2
2 Thessalonians 2 in the TFTIP
2 Thessalonians 2 in the TGNTATF3T
2 Thessalonians 2 in the TNTIK
2 Thessalonians 2 in the TNTIL
2 Thessalonians 2 in the TNTIN
2 Thessalonians 2 in the TNTIP
2 Thessalonians 2 in the TNTIZ
2 Thessalonians 2 in the TTENT