Acts 14 (BOLCB2)

1 Na engumba Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendeki, lokola momesano, na ndako ya mayangani ya Bayuda ; bateyaki kuna, mpe bato ebele, Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi. 2 Kasi Bayuda oyo baboyaki kondimela batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokela bandeko. 3 Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo ; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene. 4 Bato ya engumba yango bakabwanaki : ndambo bazalaki sima na Bayuda, mpe ndambo mosusu, sima na bantoma. 5 Bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda, elongo na bakambi na bango, bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga ; 6 kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likawoni : Listre, Derbe mpe bazingazinga na yango. 7 Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya Sango Malamu. 8 Kati na engumba Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye, atikala kotambola te. 9 Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama 10 mpe alobaki na ye na mongongo makasi :— Telema ngwi na makolo na yo !Mbala moko, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola. 11 Tango ebele ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na lokota ya bato ya Likawoni :— Banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso ! 12 Kombo oyo babengaki na yango Barnabasi ezali « Zewusi, » mpe kombo oyo babengaki na yango Polo ezali « Erimesi, » pamba te Polo nde azalaki koloba. 13 Nganga-nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki na libanda ya ekuke ya engumba, amemaki na bikuke ya engumba bangombe ya mibali elata bafololo mpe bililingi elingama-lingama lokola basheni, pamba te ye mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye balingaki kotumbela bango mbeka. 14 Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo, bayokaki sango ya likambo yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendeki mbangu epai ebele ya bato bazalaki na koganga : 15 — Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango. 16 Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi. 17 Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo. 18 Atako balobaki bongo, balongaki na pasi kopekisa ebele ya bato wana kobonzela bango mbeka. 19 Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi. 20 Kasi tango bayekoli bazingelaki Polo, atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo mokolo oyo elandaki, akendeki na Derbe elongo na Barnabasi. 21 Sima na Polo mpe Barnabasi koteya Sango Malamu kati na engumba wana mpe kokomisa bato ebele bayekoli, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe ; 22 bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba :— Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe. 23 Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki. 24 Sima na bango koleka etuka ya Pisidi, bakomaki na Pafili. 25 Bateyaki Liloba kati na Perje mpe, sima na yango, bakendeki na libongo ya Atalia. 26 Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa. 27 Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima. 28 Mpe bawumelaki wana tango molayi elongo na bayekoli.

In Other Versions

Acts 14 in the ANGEFD

Acts 14 in the ANTPNG2D

Acts 14 in the AS21

Acts 14 in the BAGH

Acts 14 in the BBPNG

Acts 14 in the BBT1E

Acts 14 in the BDS

Acts 14 in the BEV

Acts 14 in the BHAD

Acts 14 in the BIB

Acts 14 in the BLPT

Acts 14 in the BNT

Acts 14 in the BNTABOOT

Acts 14 in the BNTLV

Acts 14 in the BOATCB

Acts 14 in the BOATCB2

Acts 14 in the BOBCV

Acts 14 in the BOCNT

Acts 14 in the BOECS

Acts 14 in the BOGWICC

Acts 14 in the BOHCB

Acts 14 in the BOHCV

Acts 14 in the BOHLNT

Acts 14 in the BOHNTLTAL

Acts 14 in the BOICB

Acts 14 in the BOILNTAP

Acts 14 in the BOITCV

Acts 14 in the BOKCV

Acts 14 in the BOKCV2

Acts 14 in the BOKHWOG

Acts 14 in the BOKSSV

Acts 14 in the BOLCB

Acts 14 in the BOMCV

Acts 14 in the BONAV

Acts 14 in the BONCB

Acts 14 in the BONLT

Acts 14 in the BONUT2

Acts 14 in the BOPLNT

Acts 14 in the BOSCB

Acts 14 in the BOSNC

Acts 14 in the BOTLNT

Acts 14 in the BOVCB

Acts 14 in the BOYCB

Acts 14 in the BPBB

Acts 14 in the BPH

Acts 14 in the BSB

Acts 14 in the CCB

Acts 14 in the CUV

Acts 14 in the CUVS

Acts 14 in the DBT

Acts 14 in the DGDNT

Acts 14 in the DHNT

Acts 14 in the DNT

Acts 14 in the ELBE

Acts 14 in the EMTV

Acts 14 in the ESV

Acts 14 in the FBV

Acts 14 in the FEB

Acts 14 in the GGMNT

Acts 14 in the GNT

Acts 14 in the HARY

Acts 14 in the HNT

Acts 14 in the IRVA

Acts 14 in the IRVB

Acts 14 in the IRVG

Acts 14 in the IRVH

Acts 14 in the IRVK

Acts 14 in the IRVM

Acts 14 in the IRVM2

Acts 14 in the IRVO

Acts 14 in the IRVP

Acts 14 in the IRVT

Acts 14 in the IRVT2

Acts 14 in the IRVU

Acts 14 in the ISVN

Acts 14 in the JSNT

Acts 14 in the KAPI

Acts 14 in the KBT1ETNIK

Acts 14 in the KBV

Acts 14 in the KJV

Acts 14 in the KNFD

Acts 14 in the LBA

Acts 14 in the LBLA

Acts 14 in the LNT

Acts 14 in the LSV

Acts 14 in the MAAL

Acts 14 in the MBV

Acts 14 in the MBV2

Acts 14 in the MHNT

Acts 14 in the MKNFD

Acts 14 in the MNG

Acts 14 in the MNT

Acts 14 in the MNT2

Acts 14 in the MRS1T

Acts 14 in the NAA

Acts 14 in the NASB

Acts 14 in the NBLA

Acts 14 in the NBS

Acts 14 in the NBVTP

Acts 14 in the NET2

Acts 14 in the NIV11

Acts 14 in the NNT

Acts 14 in the NNT2

Acts 14 in the NNT3

Acts 14 in the PDDPT

Acts 14 in the PFNT

Acts 14 in the RMNT

Acts 14 in the SBIAS

Acts 14 in the SBIBS

Acts 14 in the SBIBS2

Acts 14 in the SBICS

Acts 14 in the SBIDS

Acts 14 in the SBIGS

Acts 14 in the SBIHS

Acts 14 in the SBIIS

Acts 14 in the SBIIS2

Acts 14 in the SBIIS3

Acts 14 in the SBIKS

Acts 14 in the SBIKS2

Acts 14 in the SBIMS

Acts 14 in the SBIOS

Acts 14 in the SBIPS

Acts 14 in the SBISS

Acts 14 in the SBITS

Acts 14 in the SBITS2

Acts 14 in the SBITS3

Acts 14 in the SBITS4

Acts 14 in the SBIUS

Acts 14 in the SBIVS

Acts 14 in the SBT

Acts 14 in the SBT1E

Acts 14 in the SCHL

Acts 14 in the SNT

Acts 14 in the SUSU

Acts 14 in the SUSU2

Acts 14 in the SYNO

Acts 14 in the TBIAOTANT

Acts 14 in the TBT1E

Acts 14 in the TBT1E2

Acts 14 in the TFTIP

Acts 14 in the TFTU

Acts 14 in the TGNTATF3T

Acts 14 in the THAI

Acts 14 in the TNFD

Acts 14 in the TNT

Acts 14 in the TNTIK

Acts 14 in the TNTIL

Acts 14 in the TNTIN

Acts 14 in the TNTIP

Acts 14 in the TNTIZ

Acts 14 in the TOMA

Acts 14 in the TTENT

Acts 14 in the UBG

Acts 14 in the UGV

Acts 14 in the UGV2

Acts 14 in the UGV3

Acts 14 in the VBL

Acts 14 in the VDCC

Acts 14 in the YALU

Acts 14 in the YAPE

Acts 14 in the YBVTP

Acts 14 in the ZBP