Acts 18 (BOLCB2)

1 Sima na yango, Polo atikaki Ateni mpe akendeki na Kolinto. 2 Kuna, akutanaki na Moyuda moko, kombo na ye ezalaki « Akilasi. » Azalaki moto ya mboka Ponti. Akilasi awutaki koya kala te longwa na Itali, elongo na mwasi na ye, Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso balongwa na Rome. Boye, Polo akendeki kotala bango ; 3 mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango. 4 Mikolo nyonso ya Saba, Polo azalaki koteya kati na ndako ya mayangani mpe azalaki koluka kondimisa Bayuda mpe bato ya Grese. 5 Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto. 6 Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki :— Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya. 7 Boye, Polo atikaki bango mpe akendeki na ndako ya Titisi Yusitusi, mogumbameli ya Nzambe, oyo ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya mayangani. 8 Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani, elongo na libota na ye mobimba bazalaki na kondima epai ya Nkolo ; mpe bato mingi ya Kolinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi. 9 Mokolo moko, na butu, Nkolo alobaki na Polo kati na emoniseli : Kobanga te, koba kaka koloba, kokanga monoko te. 10 Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo. 11 Boye, Polo avandaki na Kolinto, mobu moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba na Nzambe. 12 Wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo 13 mpe bafundaki ye boye :— Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete bagumbamela Nzambe na lolenge oyo mibeko epekisa. 14 Tango kaka Polo alingaki koloba, Galioni alobaki na Bayuda :— Bino Bayuda, soki moto oyo asalaki mabe to likambo moko ya sembo te, nalingaki solo koyokela bino. 15 Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe na tina na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, wana etali kaka bino moko ; ngai naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye. 16 Boye, abenganaki bango na esambiselo. 17 Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe babetaki ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba. 18 Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi. 19 Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendeki ye moko na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda. 20 Basengaki ete awumela mwa mikolo elongo na bango, kasi Polo aboyaki. 21 Atikaki bango na koloba :— Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi.Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki. 22 Tango akomaki na Sezarea, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote ; sima, akendeki na Antioshe. 23 Sima na Polo kovanda mwa mikolo na Antioshe, alongwaki kuna mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, na kolendisa bayekoli nyonso. 24 Moyuda moko ayaki na Efeso, kombo na ye ezalaki « Apolosi. » Abotamaki na Alekizandri, ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi. 25 Bateyaki ye nzela ya Nkolo ; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane. 26 Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akilasi bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe. 27 Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Kolinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi, 28 pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.

In Other Versions

Acts 18 in the ANGEFD

Acts 18 in the ANTPNG2D

Acts 18 in the AS21

Acts 18 in the BAGH

Acts 18 in the BBPNG

Acts 18 in the BBT1E

Acts 18 in the BDS

Acts 18 in the BEV

Acts 18 in the BHAD

Acts 18 in the BIB

Acts 18 in the BLPT

Acts 18 in the BNT

Acts 18 in the BNTABOOT

Acts 18 in the BNTLV

Acts 18 in the BOATCB

Acts 18 in the BOATCB2

Acts 18 in the BOBCV

Acts 18 in the BOCNT

Acts 18 in the BOECS

Acts 18 in the BOGWICC

Acts 18 in the BOHCB

Acts 18 in the BOHCV

Acts 18 in the BOHLNT

Acts 18 in the BOHNTLTAL

Acts 18 in the BOICB

Acts 18 in the BOILNTAP

Acts 18 in the BOITCV

Acts 18 in the BOKCV

Acts 18 in the BOKCV2

Acts 18 in the BOKHWOG

Acts 18 in the BOKSSV

Acts 18 in the BOLCB

Acts 18 in the BOMCV

Acts 18 in the BONAV

Acts 18 in the BONCB

Acts 18 in the BONLT

Acts 18 in the BONUT2

Acts 18 in the BOPLNT

Acts 18 in the BOSCB

Acts 18 in the BOSNC

Acts 18 in the BOTLNT

Acts 18 in the BOVCB

Acts 18 in the BOYCB

Acts 18 in the BPBB

Acts 18 in the BPH

Acts 18 in the BSB

Acts 18 in the CCB

Acts 18 in the CUV

Acts 18 in the CUVS

Acts 18 in the DBT

Acts 18 in the DGDNT

Acts 18 in the DHNT

Acts 18 in the DNT

Acts 18 in the ELBE

Acts 18 in the EMTV

Acts 18 in the ESV

Acts 18 in the FBV

Acts 18 in the FEB

Acts 18 in the GGMNT

Acts 18 in the GNT

Acts 18 in the HARY

Acts 18 in the HNT

Acts 18 in the IRVA

Acts 18 in the IRVB

Acts 18 in the IRVG

Acts 18 in the IRVH

Acts 18 in the IRVK

Acts 18 in the IRVM

Acts 18 in the IRVM2

Acts 18 in the IRVO

Acts 18 in the IRVP

Acts 18 in the IRVT

Acts 18 in the IRVT2

Acts 18 in the IRVU

Acts 18 in the ISVN

Acts 18 in the JSNT

Acts 18 in the KAPI

Acts 18 in the KBT1ETNIK

Acts 18 in the KBV

Acts 18 in the KJV

Acts 18 in the KNFD

Acts 18 in the LBA

Acts 18 in the LBLA

Acts 18 in the LNT

Acts 18 in the LSV

Acts 18 in the MAAL

Acts 18 in the MBV

Acts 18 in the MBV2

Acts 18 in the MHNT

Acts 18 in the MKNFD

Acts 18 in the MNG

Acts 18 in the MNT

Acts 18 in the MNT2

Acts 18 in the MRS1T

Acts 18 in the NAA

Acts 18 in the NASB

Acts 18 in the NBLA

Acts 18 in the NBS

Acts 18 in the NBVTP

Acts 18 in the NET2

Acts 18 in the NIV11

Acts 18 in the NNT

Acts 18 in the NNT2

Acts 18 in the NNT3

Acts 18 in the PDDPT

Acts 18 in the PFNT

Acts 18 in the RMNT

Acts 18 in the SBIAS

Acts 18 in the SBIBS

Acts 18 in the SBIBS2

Acts 18 in the SBICS

Acts 18 in the SBIDS

Acts 18 in the SBIGS

Acts 18 in the SBIHS

Acts 18 in the SBIIS

Acts 18 in the SBIIS2

Acts 18 in the SBIIS3

Acts 18 in the SBIKS

Acts 18 in the SBIKS2

Acts 18 in the SBIMS

Acts 18 in the SBIOS

Acts 18 in the SBIPS

Acts 18 in the SBISS

Acts 18 in the SBITS

Acts 18 in the SBITS2

Acts 18 in the SBITS3

Acts 18 in the SBITS4

Acts 18 in the SBIUS

Acts 18 in the SBIVS

Acts 18 in the SBT

Acts 18 in the SBT1E

Acts 18 in the SCHL

Acts 18 in the SNT

Acts 18 in the SUSU

Acts 18 in the SUSU2

Acts 18 in the SYNO

Acts 18 in the TBIAOTANT

Acts 18 in the TBT1E

Acts 18 in the TBT1E2

Acts 18 in the TFTIP

Acts 18 in the TFTU

Acts 18 in the TGNTATF3T

Acts 18 in the THAI

Acts 18 in the TNFD

Acts 18 in the TNT

Acts 18 in the TNTIK

Acts 18 in the TNTIL

Acts 18 in the TNTIN

Acts 18 in the TNTIP

Acts 18 in the TNTIZ

Acts 18 in the TOMA

Acts 18 in the TTENT

Acts 18 in the UBG

Acts 18 in the UGV

Acts 18 in the UGV2

Acts 18 in the UGV3

Acts 18 in the VBL

Acts 18 in the VDCC

Acts 18 in the YALU

Acts 18 in the YAPE

Acts 18 in the YBVTP

Acts 18 in the ZBP