Acts 5 (BOLCB2)

1 Nzokande, ezalaki na moto moko na kombo Ananiasi. Atekaki eteni ya mabele na ye na boyokani na Safira, mwasi na ye. 2 Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango. 3 Boye, Petelo atunaki ye :— Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ? 4 Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te ? Mpe sima na koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi ? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye ? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe ! 5 Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo. 6 Boye, bilenge mibali bayaki, bazipaki nzoto na ye mpe bamemaki yango libanda mpo na kokunda yango. 7 Sima na ngonga pene misato, mwasi ya Ananiasi akotaki, kasi ayebaki te likambo oyo ewutaki kosalema. 8 Petelo atunaki ye :— Yebisa ngai, ezali na talo wana nde yo mpe Ananiasi botekaki elanga wana ?Safira azongisaki :— Ezali bongo, etekamaki Kaka na talo wana. 9 Petelo alobaki na ye :— Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo. 10 Kaka na tango yango, akweyaki liboso ya Petelo mpe akufaki. Boye tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendeki kokunda ye pembeni ya mobali na ye. 11 Somo monene etondisaki Lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango. 12 Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo. 13 Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi. 14 Nzokande, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango. 15 Bongo, bazalaki komema babeli na babalabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Petelo akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango. 16 Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zingazinga bazalaki kosangana na Yelusalemi ; bazalaki komema babeli na bango mpe bato oyo bazalaki kotungisama na milimo ya mbindo ; mpe bango nyonso bazalaki kobikisama. 17 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya Basaduseo, batondaki na zuwa. 18 Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene. 19 Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango : 20 — Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika. 21 Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita-Monene—lisanga mobimba ya bakambi ya bana ya Isalaele—mpe bapesaki mitindo ete bakende kozwa bantoma na boloko. 22 Kasi tango bakengeli bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bazongaki mpe balobaki : 23 — Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke ; kasi tango tofungoli yango, tomoni ata moto moko te na kati. 24 Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini. 25 Bongo moto moko ayaki koyebisa bango :— Boyoka ! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato. 26 Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga. 27 Wana bamemaki bango, batiaki bango liboso ya Likita-Monene, mpe mokonzi ya Banganga-Nzambe abandaki kotuna bango mituna. 28 Alobaki :— Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana. 29 Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki :— Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te ! 30 Nzambe ya bakoko na biso asekwisaki Yesu kati na bakufi, Yesu oyo bino bobomaki mpe bobakaki na nzete. 31 Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango. 32 Biso, tozali batatoli ya makambo oyo ; ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka Ye azali motatoli ya makambo yango. 33 Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma. 34 Kasi Mofarizeo Gamalieli, molakisi ya Mobeko mpe moto ya lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita-Monene mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke. 35 Alobaki na bango :— Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo. 36 Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo Teodasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki. 37 Sima na ye, tango tozalaki kotanga motango ya bato kati na mokili, moto moko mpe lisusu na kombo Yuda, moto ya Galile, abimaki mpe amemaki bato ebele na botomboki. Ye mpe lisusu babomaki ye, bongo bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki. 38 Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai : Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende ! Pamba te soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela. 39 Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli, 40 babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende. 41 Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu. 42 Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.

In Other Versions

Acts 5 in the ANGEFD

Acts 5 in the ANTPNG2D

Acts 5 in the AS21

Acts 5 in the BAGH

Acts 5 in the BBPNG

Acts 5 in the BBT1E

Acts 5 in the BDS

Acts 5 in the BEV

Acts 5 in the BHAD

Acts 5 in the BIB

Acts 5 in the BLPT

Acts 5 in the BNT

Acts 5 in the BNTABOOT

Acts 5 in the BNTLV

Acts 5 in the BOATCB

Acts 5 in the BOATCB2

Acts 5 in the BOBCV

Acts 5 in the BOCNT

Acts 5 in the BOECS

Acts 5 in the BOGWICC

Acts 5 in the BOHCB

Acts 5 in the BOHCV

Acts 5 in the BOHLNT

Acts 5 in the BOHNTLTAL

Acts 5 in the BOICB

Acts 5 in the BOILNTAP

Acts 5 in the BOITCV

Acts 5 in the BOKCV

Acts 5 in the BOKCV2

Acts 5 in the BOKHWOG

Acts 5 in the BOKSSV

Acts 5 in the BOLCB

Acts 5 in the BOMCV

Acts 5 in the BONAV

Acts 5 in the BONCB

Acts 5 in the BONLT

Acts 5 in the BONUT2

Acts 5 in the BOPLNT

Acts 5 in the BOSCB

Acts 5 in the BOSNC

Acts 5 in the BOTLNT

Acts 5 in the BOVCB

Acts 5 in the BOYCB

Acts 5 in the BPBB

Acts 5 in the BPH

Acts 5 in the BSB

Acts 5 in the CCB

Acts 5 in the CUV

Acts 5 in the CUVS

Acts 5 in the DBT

Acts 5 in the DGDNT

Acts 5 in the DHNT

Acts 5 in the DNT

Acts 5 in the ELBE

Acts 5 in the EMTV

Acts 5 in the ESV

Acts 5 in the FBV

Acts 5 in the FEB

Acts 5 in the GGMNT

Acts 5 in the GNT

Acts 5 in the HARY

Acts 5 in the HNT

Acts 5 in the IRVA

Acts 5 in the IRVB

Acts 5 in the IRVG

Acts 5 in the IRVH

Acts 5 in the IRVK

Acts 5 in the IRVM

Acts 5 in the IRVM2

Acts 5 in the IRVO

Acts 5 in the IRVP

Acts 5 in the IRVT

Acts 5 in the IRVT2

Acts 5 in the IRVU

Acts 5 in the ISVN

Acts 5 in the JSNT

Acts 5 in the KAPI

Acts 5 in the KBT1ETNIK

Acts 5 in the KBV

Acts 5 in the KJV

Acts 5 in the KNFD

Acts 5 in the LBA

Acts 5 in the LBLA

Acts 5 in the LNT

Acts 5 in the LSV

Acts 5 in the MAAL

Acts 5 in the MBV

Acts 5 in the MBV2

Acts 5 in the MHNT

Acts 5 in the MKNFD

Acts 5 in the MNG

Acts 5 in the MNT

Acts 5 in the MNT2

Acts 5 in the MRS1T

Acts 5 in the NAA

Acts 5 in the NASB

Acts 5 in the NBLA

Acts 5 in the NBS

Acts 5 in the NBVTP

Acts 5 in the NET2

Acts 5 in the NIV11

Acts 5 in the NNT

Acts 5 in the NNT2

Acts 5 in the NNT3

Acts 5 in the PDDPT

Acts 5 in the PFNT

Acts 5 in the RMNT

Acts 5 in the SBIAS

Acts 5 in the SBIBS

Acts 5 in the SBIBS2

Acts 5 in the SBICS

Acts 5 in the SBIDS

Acts 5 in the SBIGS

Acts 5 in the SBIHS

Acts 5 in the SBIIS

Acts 5 in the SBIIS2

Acts 5 in the SBIIS3

Acts 5 in the SBIKS

Acts 5 in the SBIKS2

Acts 5 in the SBIMS

Acts 5 in the SBIOS

Acts 5 in the SBIPS

Acts 5 in the SBISS

Acts 5 in the SBITS

Acts 5 in the SBITS2

Acts 5 in the SBITS3

Acts 5 in the SBITS4

Acts 5 in the SBIUS

Acts 5 in the SBIVS

Acts 5 in the SBT

Acts 5 in the SBT1E

Acts 5 in the SCHL

Acts 5 in the SNT

Acts 5 in the SUSU

Acts 5 in the SUSU2

Acts 5 in the SYNO

Acts 5 in the TBIAOTANT

Acts 5 in the TBT1E

Acts 5 in the TBT1E2

Acts 5 in the TFTIP

Acts 5 in the TFTU

Acts 5 in the TGNTATF3T

Acts 5 in the THAI

Acts 5 in the TNFD

Acts 5 in the TNT

Acts 5 in the TNTIK

Acts 5 in the TNTIL

Acts 5 in the TNTIN

Acts 5 in the TNTIP

Acts 5 in the TNTIZ

Acts 5 in the TOMA

Acts 5 in the TTENT

Acts 5 in the UBG

Acts 5 in the UGV

Acts 5 in the UGV2

Acts 5 in the UGV3

Acts 5 in the VBL

Acts 5 in the VDCC

Acts 5 in the YALU

Acts 5 in the YAPE

Acts 5 in the YBVTP

Acts 5 in the ZBP