Acts 7 (BOLCB2)

1 Bongo, mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki ye :— Boni, makambo oyo bafundeli yo ezali ya solo ? 2 Etieni azongisaki :— Batata mpe bandeko, boyoka ngai ! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abrayami tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende kovanda na Sharani. 3 Boye, Nzambe alobaki na ye : « Longwa na mokili na yo mpe na libota na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo ! » 4 Boye, alongwaki na mokili ya Chalide mpe akendeki kovanda na mokili ya Sharani. Sima na kufa ya tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, mokili oyo bino bozali kovanda sik’oyo. 5 Apesaki ye mabele moko te awa, ezala ata mwa eteni. Kasi Nzambe apesaki ye elaka, ye elongo na bakitani na ye sima na ye, ete bakozwa mokili lokola libula, atako, na tango wana, Abrayami azalaki nanu na mwana te. 6 Tala makambo oyo Nzambe alobaki : « Bakitani na ye bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya ; bakokomisa bango bawumbu mpe bakonyokola bango mibu nkama minei. » 7 Kasi Nzambe alobaki lisusu : « Nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu. Mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango mpe bakosambela Ngai na esika oyo. » 8 Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye ; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga. 9 Lokola bakoko na biso bayokelaki Jozefi likunya, batekaki ye mpo ete azala mowumbu na Ejipito. Kasi Nzambe azalaki na ye elongo 10 mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba. 11 Nzokande, nzala moko ya makasi ekotaki na Ejipito mobimba mpe na Kanana, ememaki pasi penza, bongo bakoko na biso bazalaki lisusu na eloko ya kolia te. 12 Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, atindaki bakoko na biso mbala ya liboso. 13 Na mbala ya mibale, Jozefi amilakisaki epai ya bandeko na ye, bongo Faraon ayaki koyeba libota ya Jozefi. 14 Bongo, Jozefi atindaki ete bakende kozwa tata na ye Jakobi elongo na bandeko na ye nyonso. Bango nyonso bazalaki bato tuku sambo na mitano. 15 Boye, Jakobi akendeki kovanda na Ejipito epai wapi ye elongo na bakoko na biso bakufaki. 16 Bamemaki banzoto na bango na engumba ya Sishemi mpe bakundaki yango kati na kunda oyo Abrayami asombaki na mbongo epai ya bana ya Amori, tata ya Sishemi. 17 Wana tango oyo Nzambe alingaki kokokisa elaka oyo apesaki na Abrayami ekomaki pene, motango ya bato na biso, kati na Ejipito, ekomaki ebele penza, 18 kino mokonzi mosusu, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito. 19 Na mayele mabe, mokonzi yango anyokolaki bakoko na biso kino kotinda bango na makasi ete babwaka bana na bango oyo babotami sika mpo ete bakufa. 20 Ezalaki na tango wana nde Moyize abotamaki. Nzambe asalaki ye kitoko mingi. Babatelaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye. 21 Wana baboti na ye batiaki ye libanda, mwana mwasi ya Faraon azwaki ye mpe abokolaki ye lokola mwana na ye penza. 22 Bayekolisaki Moyize na bwanya nyonso ya bato ya Ejipito, mpe akomaki moto na nguya na maloba mpe na misala. 23 Tango Moyize akokisaki mibu tuku minei, azwaki mokano ya kokende kotala bandeko na ye, bana ya Isalaele. 24 Awa amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moto ya ekolo na ye, akotelaki moto ya Isalaele, azongisaki mabe na mabe epai ya moto ya Ejipito mpe abomaki ye. 25 Moyize akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe azali kosalela ye mpo na kopesa bango lobiko, kasi basosolaki yango te. 26 Mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bana ya Isalaele mibale kobunda. Bongo amekaki kozongisa boyokani kati na bango ; alobaki na bango : « Ah baninga na ngai, bozali bandeko ; mpo na nini bozali kosalana mabe ? » 27 Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye atindikaki Moyize mpe alobaki : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? 28 Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito lobi ? » 29 Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madiani epai wapi avandaki lokola mopaya mpe abotaki bana mibale ya mibali. 30 Sima na mibu tuku minei, anjelu moko abimelaki Moyize kati na esobe, pene ya ngomba Sinai, kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete oyo ezalaki kopela. 31 Tango Moyize amonaki yango, akamwaki makasi. Mpe awa azalaki kopusana mpo na kotala yango malamu, ayokaki mongongo ya Nkolo koloba : 32 « Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. » Moyize alengaki na somo mpe akokaki kutu kotala te. 33 Bongo, Nkolo alobaki na ye : « Longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule. 34 Namoni minyoko ya bato na Ngai kati na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sik’oyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito. » 35 Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete. 36 Abimisaki bango na mokili ya Ejipito, na nzela ya bikamwa mpe ya bilembo minene oyo asalaki kuna, na ebale monene ya Motane mpe na esobe, mibu tuku minei. 37 Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bana ya Isalaele : « Nzambe akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino. » 38 Azalaki kati na mayangani oyo bakoko na biso basanganaki na esobe ; ye nde azalaki molobeli, kati na bakoko na biso mpe anjelu oyo asololaki na ye, na ngomba Sinai epai wapi azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso. 39 Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye ; batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito. 40 Balobaki na Aron : « Salela biso banzambe oyo bakotambola liboso na biso. Pamba te toyebi te soki makambo nini ekomeli Moyize oyo abimisaki biso na mokili ya Ejipito ! » 41 Ezalaki na mikolo wana nde basalaki nzambe ya ekeko, na lolenge ya mwana ngombe ; babonzelaki nzambe yango ya ekeko mbeka mpe basalaki feti mpo na lokumu ya misala ya maboko na bango. 42 Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango kosambela mampinga ya likolo, ndenge ekomama kati na buku ya basakoli :« Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbekampe kopesa Ngai makabona mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe ? 43 Bomemaki nde ndako ya kapo ya Molokimpe monzoto ya nzambe na bino Rofa,banzambe ya bikeko oyo bosalaki mpo na kogumbamela !Yango wana, nakotinda bino na bowumbu,mosika koleka Babiloni ! » 44 Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki. 45 Sima na kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya Bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi ; 46 oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako. 47 Kasi Salomo nde moto atongelaki ye ndako. 48 Nzokande, Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka te kati na bandako oyo bato batonga, ndenge kaka mosakoli aloba : 49 « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi,mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai.Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai,elobi Nkolo,to esika ya bopemi ya ndenge nini penzabokoki kobongisela Ngai ? 50 Boni, ezali loboko na Ngai tende esalaki biloko wana nyonso ? » 51 Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu ! 52 Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma, 53 bino bato oyo bozwaki Mobeko ya Nzambe na nzela ya ba-anjelu, kasi botosaki yango te. 54 Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni. 55 Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. 56 Alobaki :— Botala, namoni Likolo efungwami mpe Mwana na moto atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe ! 57 Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye, 58 bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo Saulo. 59 Wana bazalaki kobamba ye mabanga, Etieni azalaki kosambela na koloba :— Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai ! 60 Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi :— Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te !Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.

In Other Versions

Acts 7 in the ANGEFD

Acts 7 in the ANTPNG2D

Acts 7 in the AS21

Acts 7 in the BAGH

Acts 7 in the BBPNG

Acts 7 in the BBT1E

Acts 7 in the BDS

Acts 7 in the BEV

Acts 7 in the BHAD

Acts 7 in the BIB

Acts 7 in the BLPT

Acts 7 in the BNT

Acts 7 in the BNTABOOT

Acts 7 in the BNTLV

Acts 7 in the BOATCB

Acts 7 in the BOATCB2

Acts 7 in the BOBCV

Acts 7 in the BOCNT

Acts 7 in the BOECS

Acts 7 in the BOGWICC

Acts 7 in the BOHCB

Acts 7 in the BOHCV

Acts 7 in the BOHLNT

Acts 7 in the BOHNTLTAL

Acts 7 in the BOICB

Acts 7 in the BOILNTAP

Acts 7 in the BOITCV

Acts 7 in the BOKCV

Acts 7 in the BOKCV2

Acts 7 in the BOKHWOG

Acts 7 in the BOKSSV

Acts 7 in the BOLCB

Acts 7 in the BOMCV

Acts 7 in the BONAV

Acts 7 in the BONCB

Acts 7 in the BONLT

Acts 7 in the BONUT2

Acts 7 in the BOPLNT

Acts 7 in the BOSCB

Acts 7 in the BOSNC

Acts 7 in the BOTLNT

Acts 7 in the BOVCB

Acts 7 in the BOYCB

Acts 7 in the BPBB

Acts 7 in the BPH

Acts 7 in the BSB

Acts 7 in the CCB

Acts 7 in the CUV

Acts 7 in the CUVS

Acts 7 in the DBT

Acts 7 in the DGDNT

Acts 7 in the DHNT

Acts 7 in the DNT

Acts 7 in the ELBE

Acts 7 in the EMTV

Acts 7 in the ESV

Acts 7 in the FBV

Acts 7 in the FEB

Acts 7 in the GGMNT

Acts 7 in the GNT

Acts 7 in the HARY

Acts 7 in the HNT

Acts 7 in the IRVA

Acts 7 in the IRVB

Acts 7 in the IRVG

Acts 7 in the IRVH

Acts 7 in the IRVK

Acts 7 in the IRVM

Acts 7 in the IRVM2

Acts 7 in the IRVO

Acts 7 in the IRVP

Acts 7 in the IRVT

Acts 7 in the IRVT2

Acts 7 in the IRVU

Acts 7 in the ISVN

Acts 7 in the JSNT

Acts 7 in the KAPI

Acts 7 in the KBT1ETNIK

Acts 7 in the KBV

Acts 7 in the KJV

Acts 7 in the KNFD

Acts 7 in the LBA

Acts 7 in the LBLA

Acts 7 in the LNT

Acts 7 in the LSV

Acts 7 in the MAAL

Acts 7 in the MBV

Acts 7 in the MBV2

Acts 7 in the MHNT

Acts 7 in the MKNFD

Acts 7 in the MNG

Acts 7 in the MNT

Acts 7 in the MNT2

Acts 7 in the MRS1T

Acts 7 in the NAA

Acts 7 in the NASB

Acts 7 in the NBLA

Acts 7 in the NBS

Acts 7 in the NBVTP

Acts 7 in the NET2

Acts 7 in the NIV11

Acts 7 in the NNT

Acts 7 in the NNT2

Acts 7 in the NNT3

Acts 7 in the PDDPT

Acts 7 in the PFNT

Acts 7 in the RMNT

Acts 7 in the SBIAS

Acts 7 in the SBIBS

Acts 7 in the SBIBS2

Acts 7 in the SBICS

Acts 7 in the SBIDS

Acts 7 in the SBIGS

Acts 7 in the SBIHS

Acts 7 in the SBIIS

Acts 7 in the SBIIS2

Acts 7 in the SBIIS3

Acts 7 in the SBIKS

Acts 7 in the SBIKS2

Acts 7 in the SBIMS

Acts 7 in the SBIOS

Acts 7 in the SBIPS

Acts 7 in the SBISS

Acts 7 in the SBITS

Acts 7 in the SBITS2

Acts 7 in the SBITS3

Acts 7 in the SBITS4

Acts 7 in the SBIUS

Acts 7 in the SBIVS

Acts 7 in the SBT

Acts 7 in the SBT1E

Acts 7 in the SCHL

Acts 7 in the SNT

Acts 7 in the SUSU

Acts 7 in the SUSU2

Acts 7 in the SYNO

Acts 7 in the TBIAOTANT

Acts 7 in the TBT1E

Acts 7 in the TBT1E2

Acts 7 in the TFTIP

Acts 7 in the TFTU

Acts 7 in the TGNTATF3T

Acts 7 in the THAI

Acts 7 in the TNFD

Acts 7 in the TNT

Acts 7 in the TNTIK

Acts 7 in the TNTIL

Acts 7 in the TNTIN

Acts 7 in the TNTIP

Acts 7 in the TNTIZ

Acts 7 in the TOMA

Acts 7 in the TTENT

Acts 7 in the UBG

Acts 7 in the UGV

Acts 7 in the UGV2

Acts 7 in the UGV3

Acts 7 in the VBL

Acts 7 in the VDCC

Acts 7 in the YALU

Acts 7 in the YAPE

Acts 7 in the YBVTP

Acts 7 in the ZBP