Ephesians 4 (BOLCB2)

1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi : 2 bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi ; boyikanaka mpiko kati na bolingo, 3 bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino. 4 Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko. 5 Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko. 6 Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso ; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso. 7 Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki. 8 Yango wana Nzambe alobi :« Tango amataki na likolo,amemaki bakangamimpe apesaki makabo epai na bato. » 9 Nzokande, « amataki na likolo » elingi koloba penza nini ? Elingi kaka koloba ete, liboso, akitaki kino na se ya mabele. 10 Ye oyo akitaki na se ya mabele, ezali kaka Ye wana oyo amataki na likolo koleka Likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba. 11 Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi, 12 mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu. 13 Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka. 14 Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe. 15 Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto. 16 Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki. 17 Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina. 18 Pamba te molili ezipi mayele na bango mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka, mpo ete bazangi boyebi mpe bazali mitema mabanga. 19 Lokola babungisa bomoto na bango, bamipesaki na makambo ya soni mpo na kosala na lokoso makambo nyonso ya bosoto. 20 Kasi bino boyekolaki Klisto ndenge wana te, 21 soki ya solo ezalaki penza Ye nde boyokaki tango bateyaki bino solo oyo ezali kati na Yesu 22 mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta, 23 mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika, 24 mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo. 25 Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko. 26 Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma. 27 Bopesaka na Satana nzela te. 28 Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga. 29 Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango. 30 Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama. 31 Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe. 32 Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.

In Other Versions

Ephesians 4 in the ANGEFD

Ephesians 4 in the ANTPNG2D

Ephesians 4 in the AS21

Ephesians 4 in the BAGH

Ephesians 4 in the BBPNG

Ephesians 4 in the BBT1E

Ephesians 4 in the BDS

Ephesians 4 in the BEV

Ephesians 4 in the BHAD

Ephesians 4 in the BIB

Ephesians 4 in the BLPT

Ephesians 4 in the BNT

Ephesians 4 in the BNTABOOT

Ephesians 4 in the BNTLV

Ephesians 4 in the BOATCB

Ephesians 4 in the BOATCB2

Ephesians 4 in the BOBCV

Ephesians 4 in the BOCNT

Ephesians 4 in the BOECS

Ephesians 4 in the BOGWICC

Ephesians 4 in the BOHCB

Ephesians 4 in the BOHCV

Ephesians 4 in the BOHLNT

Ephesians 4 in the BOHNTLTAL

Ephesians 4 in the BOICB

Ephesians 4 in the BOILNTAP

Ephesians 4 in the BOITCV

Ephesians 4 in the BOKCV

Ephesians 4 in the BOKCV2

Ephesians 4 in the BOKHWOG

Ephesians 4 in the BOKSSV

Ephesians 4 in the BOLCB

Ephesians 4 in the BOMCV

Ephesians 4 in the BONAV

Ephesians 4 in the BONCB

Ephesians 4 in the BONLT

Ephesians 4 in the BONUT2

Ephesians 4 in the BOPLNT

Ephesians 4 in the BOSCB

Ephesians 4 in the BOSNC

Ephesians 4 in the BOTLNT

Ephesians 4 in the BOVCB

Ephesians 4 in the BOYCB

Ephesians 4 in the BPBB

Ephesians 4 in the BPH

Ephesians 4 in the BSB

Ephesians 4 in the CCB

Ephesians 4 in the CUV

Ephesians 4 in the CUVS

Ephesians 4 in the DBT

Ephesians 4 in the DGDNT

Ephesians 4 in the DHNT

Ephesians 4 in the DNT

Ephesians 4 in the ELBE

Ephesians 4 in the EMTV

Ephesians 4 in the ESV

Ephesians 4 in the FBV

Ephesians 4 in the FEB

Ephesians 4 in the GGMNT

Ephesians 4 in the GNT

Ephesians 4 in the HARY

Ephesians 4 in the HNT

Ephesians 4 in the IRVA

Ephesians 4 in the IRVB

Ephesians 4 in the IRVG

Ephesians 4 in the IRVH

Ephesians 4 in the IRVK

Ephesians 4 in the IRVM

Ephesians 4 in the IRVM2

Ephesians 4 in the IRVO

Ephesians 4 in the IRVP

Ephesians 4 in the IRVT

Ephesians 4 in the IRVT2

Ephesians 4 in the IRVU

Ephesians 4 in the ISVN

Ephesians 4 in the JSNT

Ephesians 4 in the KAPI

Ephesians 4 in the KBT1ETNIK

Ephesians 4 in the KBV

Ephesians 4 in the KJV

Ephesians 4 in the KNFD

Ephesians 4 in the LBA

Ephesians 4 in the LBLA

Ephesians 4 in the LNT

Ephesians 4 in the LSV

Ephesians 4 in the MAAL

Ephesians 4 in the MBV

Ephesians 4 in the MBV2

Ephesians 4 in the MHNT

Ephesians 4 in the MKNFD

Ephesians 4 in the MNG

Ephesians 4 in the MNT

Ephesians 4 in the MNT2

Ephesians 4 in the MRS1T

Ephesians 4 in the NAA

Ephesians 4 in the NASB

Ephesians 4 in the NBLA

Ephesians 4 in the NBS

Ephesians 4 in the NBVTP

Ephesians 4 in the NET2

Ephesians 4 in the NIV11

Ephesians 4 in the NNT

Ephesians 4 in the NNT2

Ephesians 4 in the NNT3

Ephesians 4 in the PDDPT

Ephesians 4 in the PFNT

Ephesians 4 in the RMNT

Ephesians 4 in the SBIAS

Ephesians 4 in the SBIBS

Ephesians 4 in the SBIBS2

Ephesians 4 in the SBICS

Ephesians 4 in the SBIDS

Ephesians 4 in the SBIGS

Ephesians 4 in the SBIHS

Ephesians 4 in the SBIIS

Ephesians 4 in the SBIIS2

Ephesians 4 in the SBIIS3

Ephesians 4 in the SBIKS

Ephesians 4 in the SBIKS2

Ephesians 4 in the SBIMS

Ephesians 4 in the SBIOS

Ephesians 4 in the SBIPS

Ephesians 4 in the SBISS

Ephesians 4 in the SBITS

Ephesians 4 in the SBITS2

Ephesians 4 in the SBITS3

Ephesians 4 in the SBITS4

Ephesians 4 in the SBIUS

Ephesians 4 in the SBIVS

Ephesians 4 in the SBT

Ephesians 4 in the SBT1E

Ephesians 4 in the SCHL

Ephesians 4 in the SNT

Ephesians 4 in the SUSU

Ephesians 4 in the SUSU2

Ephesians 4 in the SYNO

Ephesians 4 in the TBIAOTANT

Ephesians 4 in the TBT1E

Ephesians 4 in the TBT1E2

Ephesians 4 in the TFTIP

Ephesians 4 in the TFTU

Ephesians 4 in the TGNTATF3T

Ephesians 4 in the THAI

Ephesians 4 in the TNFD

Ephesians 4 in the TNT

Ephesians 4 in the TNTIK

Ephesians 4 in the TNTIL

Ephesians 4 in the TNTIN

Ephesians 4 in the TNTIP

Ephesians 4 in the TNTIZ

Ephesians 4 in the TOMA

Ephesians 4 in the TTENT

Ephesians 4 in the UBG

Ephesians 4 in the UGV

Ephesians 4 in the UGV2

Ephesians 4 in the UGV3

Ephesians 4 in the VBL

Ephesians 4 in the VDCC

Ephesians 4 in the YALU

Ephesians 4 in the YAPE

Ephesians 4 in the YBVTP

Ephesians 4 in the ZBP