Exodus 15 (BOLCB2)

1 Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe :Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe,mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye !Azindisi mpunda mpe motambolisina yango kati na ebale monene. 2 Yawe azali makasi na ngai,azali solo loyembo na ngai,azali mobikisi na ngai,azali Nzambe na ngai,nakokumisa Ye ;azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye. 3 Yawe azali elombe ya bitumba ;Kombo na Ye ezali Yawe. 4 Azindisi na ebale monene,bashar mpe mampinga ya Faraon ;abwaki na ebale monene ya barozo,bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema. 5 Mozindo ya mayi ezipi bango,bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga. 6 Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe,emonisi nguya na Yo ;loboko na Yo ya mobali, oh Yawe,enyati monguna. 7 Na monene ya nguya na Yo,obebisi batelemeli na Yo ;na kanda na Yo, otombokeli bango,mpe baziki lokola matiti. 8 Na pema ya zolo na Yo,mayi ekabwani,bambonge etelemi lokola mir,mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene. 9 Monguna amilobelaki :« Nakolanda bango kino nakokanga bango,molimo na ngai ekotondana biloko oyo nakobotola ;nakobimisa mopanga na ngai,mpe loboko na ngai ekobebisa bango. » 10 Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo,mpe ebale monene ezipi bango.Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi. 11 Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ?Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu,somo, mpe abongi na lokumu,mpe asalaka makambo ya kokamwa ? 12 Osembolaki loboko na Yo ya mobali,mpe mabele emeli bango. 13 Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli.Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule. 14 Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga,somo ekangaki bato ya Filisitia. 15 Bakambi ya Edomi bakomi na somo,bankumu ya Moabi bakomi kolenga,bato ya Kanana balembi nzoto. 16 Kobanga mpe somo ekweyeli bango.Na nguya ya loboko na Yo,bakomi bababa lokola libangakino bato na Yo, oh Yawe, balekaki,kino bato oyo osikolaki balekaki. 17 Okomema bango mpe okovandisa bangona ngomba na Yo, esika oyo obongisaki,oh Nkolo, mpo na kovanda,Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki. 18 Yawe akotikala mokonzi libela na libela ! 19 Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe. 20 Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina. 21 Miriami ayembaki elongo na bango :« Boyembela Yawe,pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ;azindisi na ebale monene,mpunda mpe motambolisi na yango. » 22 Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te. 23 Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara. 24 Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? » 25 Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela.Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango. 26 Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. » 27 Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.

In Other Versions

Exodus 15 in the ANGEFD

Exodus 15 in the ANTPNG2D

Exodus 15 in the AS21

Exodus 15 in the BAGH

Exodus 15 in the BBPNG

Exodus 15 in the BBT1E

Exodus 15 in the BDS

Exodus 15 in the BEV

Exodus 15 in the BHAD

Exodus 15 in the BIB

Exodus 15 in the BLPT

Exodus 15 in the BNT

Exodus 15 in the BNTABOOT

Exodus 15 in the BNTLV

Exodus 15 in the BOATCB

Exodus 15 in the BOATCB2

Exodus 15 in the BOBCV

Exodus 15 in the BOCNT

Exodus 15 in the BOECS

Exodus 15 in the BOGWICC

Exodus 15 in the BOHCB

Exodus 15 in the BOHCV

Exodus 15 in the BOHLNT

Exodus 15 in the BOHNTLTAL

Exodus 15 in the BOICB

Exodus 15 in the BOILNTAP

Exodus 15 in the BOITCV

Exodus 15 in the BOKCV

Exodus 15 in the BOKCV2

Exodus 15 in the BOKHWOG

Exodus 15 in the BOKSSV

Exodus 15 in the BOLCB

Exodus 15 in the BOMCV

Exodus 15 in the BONAV

Exodus 15 in the BONCB

Exodus 15 in the BONLT

Exodus 15 in the BONUT2

Exodus 15 in the BOPLNT

Exodus 15 in the BOSCB

Exodus 15 in the BOSNC

Exodus 15 in the BOTLNT

Exodus 15 in the BOVCB

Exodus 15 in the BOYCB

Exodus 15 in the BPBB

Exodus 15 in the BPH

Exodus 15 in the BSB

Exodus 15 in the CCB

Exodus 15 in the CUV

Exodus 15 in the CUVS

Exodus 15 in the DBT

Exodus 15 in the DGDNT

Exodus 15 in the DHNT

Exodus 15 in the DNT

Exodus 15 in the ELBE

Exodus 15 in the EMTV

Exodus 15 in the ESV

Exodus 15 in the FBV

Exodus 15 in the FEB

Exodus 15 in the GGMNT

Exodus 15 in the GNT

Exodus 15 in the HARY

Exodus 15 in the HNT

Exodus 15 in the IRVA

Exodus 15 in the IRVB

Exodus 15 in the IRVG

Exodus 15 in the IRVH

Exodus 15 in the IRVK

Exodus 15 in the IRVM

Exodus 15 in the IRVM2

Exodus 15 in the IRVO

Exodus 15 in the IRVP

Exodus 15 in the IRVT

Exodus 15 in the IRVT2

Exodus 15 in the IRVU

Exodus 15 in the ISVN

Exodus 15 in the JSNT

Exodus 15 in the KAPI

Exodus 15 in the KBT1ETNIK

Exodus 15 in the KBV

Exodus 15 in the KJV

Exodus 15 in the KNFD

Exodus 15 in the LBA

Exodus 15 in the LBLA

Exodus 15 in the LNT

Exodus 15 in the LSV

Exodus 15 in the MAAL

Exodus 15 in the MBV

Exodus 15 in the MBV2

Exodus 15 in the MHNT

Exodus 15 in the MKNFD

Exodus 15 in the MNG

Exodus 15 in the MNT

Exodus 15 in the MNT2

Exodus 15 in the MRS1T

Exodus 15 in the NAA

Exodus 15 in the NASB

Exodus 15 in the NBLA

Exodus 15 in the NBS

Exodus 15 in the NBVTP

Exodus 15 in the NET2

Exodus 15 in the NIV11

Exodus 15 in the NNT

Exodus 15 in the NNT2

Exodus 15 in the NNT3

Exodus 15 in the PDDPT

Exodus 15 in the PFNT

Exodus 15 in the RMNT

Exodus 15 in the SBIAS

Exodus 15 in the SBIBS

Exodus 15 in the SBIBS2

Exodus 15 in the SBICS

Exodus 15 in the SBIDS

Exodus 15 in the SBIGS

Exodus 15 in the SBIHS

Exodus 15 in the SBIIS

Exodus 15 in the SBIIS2

Exodus 15 in the SBIIS3

Exodus 15 in the SBIKS

Exodus 15 in the SBIKS2

Exodus 15 in the SBIMS

Exodus 15 in the SBIOS

Exodus 15 in the SBIPS

Exodus 15 in the SBISS

Exodus 15 in the SBITS

Exodus 15 in the SBITS2

Exodus 15 in the SBITS3

Exodus 15 in the SBITS4

Exodus 15 in the SBIUS

Exodus 15 in the SBIVS

Exodus 15 in the SBT

Exodus 15 in the SBT1E

Exodus 15 in the SCHL

Exodus 15 in the SNT

Exodus 15 in the SUSU

Exodus 15 in the SUSU2

Exodus 15 in the SYNO

Exodus 15 in the TBIAOTANT

Exodus 15 in the TBT1E

Exodus 15 in the TBT1E2

Exodus 15 in the TFTIP

Exodus 15 in the TFTU

Exodus 15 in the TGNTATF3T

Exodus 15 in the THAI

Exodus 15 in the TNFD

Exodus 15 in the TNT

Exodus 15 in the TNTIK

Exodus 15 in the TNTIL

Exodus 15 in the TNTIN

Exodus 15 in the TNTIP

Exodus 15 in the TNTIZ

Exodus 15 in the TOMA

Exodus 15 in the TTENT

Exodus 15 in the UBG

Exodus 15 in the UGV

Exodus 15 in the UGV2

Exodus 15 in the UGV3

Exodus 15 in the VBL

Exodus 15 in the VDCC

Exodus 15 in the YALU

Exodus 15 in the YAPE

Exodus 15 in the YBVTP

Exodus 15 in the ZBP