Galatians 3 (BOLCB2)

1 Oh bato ya Galatia, bozali penza babolole ! Nani aloki bino ? Balimbolelaki bino polele ndenge nini babakaki Yesu-Klisto na ekulusu. 2 Nalingi kotuna bino motuna moko kaka : « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? » 3 Ndenge nini bokoki kokoma babolole boye ? Ndenge nini bino oyo bobandaki na Molimo bozali sik’oyo kosukisa na mosuni ? 4 Boni, bomonaki kaka pasi ya pamba, soki penza ezalaki mpe mpo na pamba ? 5 Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? 6 Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akomisaki ye moto ya sembo. 7 Boye, boyeba malamu ete ezali kaka bato oyo bazali na kondima kati na Nzambe nde bazali bana ya Abrayami. 8 Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. » 9 Boye, bato oyo bazali na kondima bazali ya kopambolama elongo na Abrayami, moto na kondima. 10 Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. » 11 Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima. 12 Nzokande, Mobeko ewuti na kondima te, pamba te ekomama : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. » 13 Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. » 14 Asalaki bongo mpo ete, kati na Klisto Yesu, Bapagano bazwa mapamboli ya Abrayami, mpe mpo ete biso tozwa, na nzela ya kondima, Molimo oyo Nzambe alakaki. 15 Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama. 16 Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto. 17 Nalobi boye : « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami ; soki te, elaka ekomi eloko pamba. » 18 Pamba te soki libula ezwami na nzela ya Mobeko, wana elaka ezali lisusu na esika te. Nzokande ezali penza na nzela ya elaka nde Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Abrayami. 19 Bongo mpo na nini Mobeko ? Mobeko ebakisamaki mpo na kobimisa polele bozangi botosi ya bato, kino na boyei ya Mokitani epai ya nani Nzambe apesaki elaka. Mobeko yango epesamaki na nzela ya ba-anjelu, mpe mokumba na yango epesamaki na maboko ya moyokanisi. 20 Nzokande soki ezalaki na moyokanisi, elingi koloba ete ezalaki mpe na masanga ebele ya koyokanisa. Kasi mpo na oyo etali elaka, Nzambe azali kaka Ye moko. 21 Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango. 22 Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto. 23 Liboso ete kondima eya, tozalaki na se ya bokonzi ya Mobeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama. 24 Boye Mobeko ezalaki lokola mokengeli, ezalaki na mokumba ya komema biso epai ya Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima. 25 Lokola sik’oyo kondima eyei, tozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te. 26 Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ; 27 pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto. 28 Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto. 29 Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.

In Other Versions

Galatians 3 in the ANGEFD

Galatians 3 in the ANTPNG2D

Galatians 3 in the AS21

Galatians 3 in the BAGH

Galatians 3 in the BBPNG

Galatians 3 in the BBT1E

Galatians 3 in the BDS

Galatians 3 in the BEV

Galatians 3 in the BHAD

Galatians 3 in the BIB

Galatians 3 in the BLPT

Galatians 3 in the BNT

Galatians 3 in the BNTABOOT

Galatians 3 in the BNTLV

Galatians 3 in the BOATCB

Galatians 3 in the BOATCB2

Galatians 3 in the BOBCV

Galatians 3 in the BOCNT

Galatians 3 in the BOECS

Galatians 3 in the BOGWICC

Galatians 3 in the BOHCB

Galatians 3 in the BOHCV

Galatians 3 in the BOHLNT

Galatians 3 in the BOHNTLTAL

Galatians 3 in the BOICB

Galatians 3 in the BOILNTAP

Galatians 3 in the BOITCV

Galatians 3 in the BOKCV

Galatians 3 in the BOKCV2

Galatians 3 in the BOKHWOG

Galatians 3 in the BOKSSV

Galatians 3 in the BOLCB

Galatians 3 in the BOMCV

Galatians 3 in the BONAV

Galatians 3 in the BONCB

Galatians 3 in the BONLT

Galatians 3 in the BONUT2

Galatians 3 in the BOPLNT

Galatians 3 in the BOSCB

Galatians 3 in the BOSNC

Galatians 3 in the BOTLNT

Galatians 3 in the BOVCB

Galatians 3 in the BOYCB

Galatians 3 in the BPBB

Galatians 3 in the BPH

Galatians 3 in the BSB

Galatians 3 in the CCB

Galatians 3 in the CUV

Galatians 3 in the CUVS

Galatians 3 in the DBT

Galatians 3 in the DGDNT

Galatians 3 in the DHNT

Galatians 3 in the DNT

Galatians 3 in the ELBE

Galatians 3 in the EMTV

Galatians 3 in the ESV

Galatians 3 in the FBV

Galatians 3 in the FEB

Galatians 3 in the GGMNT

Galatians 3 in the GNT

Galatians 3 in the HARY

Galatians 3 in the HNT

Galatians 3 in the IRVA

Galatians 3 in the IRVB

Galatians 3 in the IRVG

Galatians 3 in the IRVH

Galatians 3 in the IRVK

Galatians 3 in the IRVM

Galatians 3 in the IRVM2

Galatians 3 in the IRVO

Galatians 3 in the IRVP

Galatians 3 in the IRVT

Galatians 3 in the IRVT2

Galatians 3 in the IRVU

Galatians 3 in the ISVN

Galatians 3 in the JSNT

Galatians 3 in the KAPI

Galatians 3 in the KBT1ETNIK

Galatians 3 in the KBV

Galatians 3 in the KJV

Galatians 3 in the KNFD

Galatians 3 in the LBA

Galatians 3 in the LBLA

Galatians 3 in the LNT

Galatians 3 in the LSV

Galatians 3 in the MAAL

Galatians 3 in the MBV

Galatians 3 in the MBV2

Galatians 3 in the MHNT

Galatians 3 in the MKNFD

Galatians 3 in the MNG

Galatians 3 in the MNT

Galatians 3 in the MNT2

Galatians 3 in the MRS1T

Galatians 3 in the NAA

Galatians 3 in the NASB

Galatians 3 in the NBLA

Galatians 3 in the NBS

Galatians 3 in the NBVTP

Galatians 3 in the NET2

Galatians 3 in the NIV11

Galatians 3 in the NNT

Galatians 3 in the NNT2

Galatians 3 in the NNT3

Galatians 3 in the PDDPT

Galatians 3 in the PFNT

Galatians 3 in the RMNT

Galatians 3 in the SBIAS

Galatians 3 in the SBIBS

Galatians 3 in the SBIBS2

Galatians 3 in the SBICS

Galatians 3 in the SBIDS

Galatians 3 in the SBIGS

Galatians 3 in the SBIHS

Galatians 3 in the SBIIS

Galatians 3 in the SBIIS2

Galatians 3 in the SBIIS3

Galatians 3 in the SBIKS

Galatians 3 in the SBIKS2

Galatians 3 in the SBIMS

Galatians 3 in the SBIOS

Galatians 3 in the SBIPS

Galatians 3 in the SBISS

Galatians 3 in the SBITS

Galatians 3 in the SBITS2

Galatians 3 in the SBITS3

Galatians 3 in the SBITS4

Galatians 3 in the SBIUS

Galatians 3 in the SBIVS

Galatians 3 in the SBT

Galatians 3 in the SBT1E

Galatians 3 in the SCHL

Galatians 3 in the SNT

Galatians 3 in the SUSU

Galatians 3 in the SUSU2

Galatians 3 in the SYNO

Galatians 3 in the TBIAOTANT

Galatians 3 in the TBT1E

Galatians 3 in the TBT1E2

Galatians 3 in the TFTIP

Galatians 3 in the TFTU

Galatians 3 in the TGNTATF3T

Galatians 3 in the THAI

Galatians 3 in the TNFD

Galatians 3 in the TNT

Galatians 3 in the TNTIK

Galatians 3 in the TNTIL

Galatians 3 in the TNTIN

Galatians 3 in the TNTIP

Galatians 3 in the TNTIZ

Galatians 3 in the TOMA

Galatians 3 in the TTENT

Galatians 3 in the UBG

Galatians 3 in the UGV

Galatians 3 in the UGV2

Galatians 3 in the UGV3

Galatians 3 in the VBL

Galatians 3 in the VDCC

Galatians 3 in the YALU

Galatians 3 in the YAPE

Galatians 3 in the YBVTP

Galatians 3 in the ZBP