Hebrews 12 (BOLCB2)

1 Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso. 2 Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe. 3 Bokundolaka mozindo ya Ye oyo akangaki motema liboso ya basumuki oyo bazalaki konyokola Ye, mpo ete bobungisa te molende mpe mpiko na bino. 4 Na etumba na bino ya kotelemela masumu, nanu bobundi te kino kondima ata kokufa. 5 Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana :« Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo,mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo. 6 Pamba te Nkolo apamelaka moto oyo Ye alingaka,apesaka etumbu na moto nyonsooyo Ye ayebaka lokola mwana na Ye. » 7 Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ? 8 Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te. 9 Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ? 10 Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye. 11 Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia. 12 Yango wana, bolendisa maboko na bino, oyo ebandi kolemba mpe bokembisa mabolongo na bino, oyo ekomi kolenga. 13 Bosala banzela ya alima mpo na makolo na bino, mpo ete lokolo ya tengu-tengu elongwa te, kasi ebika nde. 14 Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu. 15 Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino. 16 Bosenzelaka ete moto moko te atambola na bomoi ya pite to atiola Nzambe lokola Ezawu oyo atekaki bokulutu na ye likolo ya biloko ya kolia. 17 Boyebi malamu ete, na sima, tango alingaki kokitana na lipamboli kowuta na tata na ye, azangelaki yango, pamba te alongaki te kobongola mokano ya tata na ye atako asengaki lipamboli yango na kolela. 18 Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi, 19 pene ya lokito ya kelelo to mpe pene ya mongongo oyo ezali kobimisa maloba na lolenge ete bato oyo bayokaki maloba yango basengaki ete bayoka lisusu te ata liloba moko, 20 pamba te babangaki mitindo oyo epesamaki : « Moto nyonso oyo akosimba ngomba, ezala soki ezali nyama, bakoboma ye to yango na mabanga. » 21 Mpo na somo makasi ya makambo oyo amonaki, Moyize agangaki : « Nazali kolenga na somo ! » 22 Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela, 23 pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo ; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso ; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka ; 24 pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele. 25 Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ? 26 Ye oyo mongongo na Ye eningisaki mokili na tango ya kala apesi lelo elaka oyo : « Na mbala oyo lisusu, nakoningisa kaka mabele te, kasi nakoningisa mpe Likolo. » 27 Maloba oyo « na mbala oyo lisusu » elakisi ete biloko oyo ekoki koningana elimwe mpo ete oyo eninganaka te etikala mpo na libela. 28 Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye : na botosi mpe na kobanga. 29 Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.

In Other Versions

Hebrews 12 in the ANGEFD

Hebrews 12 in the ANTPNG2D

Hebrews 12 in the AS21

Hebrews 12 in the BAGH

Hebrews 12 in the BBPNG

Hebrews 12 in the BBT1E

Hebrews 12 in the BDS

Hebrews 12 in the BEV

Hebrews 12 in the BHAD

Hebrews 12 in the BIB

Hebrews 12 in the BLPT

Hebrews 12 in the BNT

Hebrews 12 in the BNTABOOT

Hebrews 12 in the BNTLV

Hebrews 12 in the BOATCB

Hebrews 12 in the BOATCB2

Hebrews 12 in the BOBCV

Hebrews 12 in the BOCNT

Hebrews 12 in the BOECS

Hebrews 12 in the BOGWICC

Hebrews 12 in the BOHCB

Hebrews 12 in the BOHCV

Hebrews 12 in the BOHLNT

Hebrews 12 in the BOHNTLTAL

Hebrews 12 in the BOICB

Hebrews 12 in the BOILNTAP

Hebrews 12 in the BOITCV

Hebrews 12 in the BOKCV

Hebrews 12 in the BOKCV2

Hebrews 12 in the BOKHWOG

Hebrews 12 in the BOKSSV

Hebrews 12 in the BOLCB

Hebrews 12 in the BOMCV

Hebrews 12 in the BONAV

Hebrews 12 in the BONCB

Hebrews 12 in the BONLT

Hebrews 12 in the BONUT2

Hebrews 12 in the BOPLNT

Hebrews 12 in the BOSCB

Hebrews 12 in the BOSNC

Hebrews 12 in the BOTLNT

Hebrews 12 in the BOVCB

Hebrews 12 in the BOYCB

Hebrews 12 in the BPBB

Hebrews 12 in the BPH

Hebrews 12 in the BSB

Hebrews 12 in the CCB

Hebrews 12 in the CUV

Hebrews 12 in the CUVS

Hebrews 12 in the DBT

Hebrews 12 in the DGDNT

Hebrews 12 in the DHNT

Hebrews 12 in the DNT

Hebrews 12 in the ELBE

Hebrews 12 in the EMTV

Hebrews 12 in the ESV

Hebrews 12 in the FBV

Hebrews 12 in the FEB

Hebrews 12 in the GGMNT

Hebrews 12 in the GNT

Hebrews 12 in the HARY

Hebrews 12 in the HNT

Hebrews 12 in the IRVA

Hebrews 12 in the IRVB

Hebrews 12 in the IRVG

Hebrews 12 in the IRVH

Hebrews 12 in the IRVK

Hebrews 12 in the IRVM

Hebrews 12 in the IRVM2

Hebrews 12 in the IRVO

Hebrews 12 in the IRVP

Hebrews 12 in the IRVT

Hebrews 12 in the IRVT2

Hebrews 12 in the IRVU

Hebrews 12 in the ISVN

Hebrews 12 in the JSNT

Hebrews 12 in the KAPI

Hebrews 12 in the KBT1ETNIK

Hebrews 12 in the KBV

Hebrews 12 in the KJV

Hebrews 12 in the KNFD

Hebrews 12 in the LBA

Hebrews 12 in the LBLA

Hebrews 12 in the LNT

Hebrews 12 in the LSV

Hebrews 12 in the MAAL

Hebrews 12 in the MBV

Hebrews 12 in the MBV2

Hebrews 12 in the MHNT

Hebrews 12 in the MKNFD

Hebrews 12 in the MNG

Hebrews 12 in the MNT

Hebrews 12 in the MNT2

Hebrews 12 in the MRS1T

Hebrews 12 in the NAA

Hebrews 12 in the NASB

Hebrews 12 in the NBLA

Hebrews 12 in the NBS

Hebrews 12 in the NBVTP

Hebrews 12 in the NET2

Hebrews 12 in the NIV11

Hebrews 12 in the NNT

Hebrews 12 in the NNT2

Hebrews 12 in the NNT3

Hebrews 12 in the PDDPT

Hebrews 12 in the PFNT

Hebrews 12 in the RMNT

Hebrews 12 in the SBIAS

Hebrews 12 in the SBIBS

Hebrews 12 in the SBIBS2

Hebrews 12 in the SBICS

Hebrews 12 in the SBIDS

Hebrews 12 in the SBIGS

Hebrews 12 in the SBIHS

Hebrews 12 in the SBIIS

Hebrews 12 in the SBIIS2

Hebrews 12 in the SBIIS3

Hebrews 12 in the SBIKS

Hebrews 12 in the SBIKS2

Hebrews 12 in the SBIMS

Hebrews 12 in the SBIOS

Hebrews 12 in the SBIPS

Hebrews 12 in the SBISS

Hebrews 12 in the SBITS

Hebrews 12 in the SBITS2

Hebrews 12 in the SBITS3

Hebrews 12 in the SBITS4

Hebrews 12 in the SBIUS

Hebrews 12 in the SBIVS

Hebrews 12 in the SBT

Hebrews 12 in the SBT1E

Hebrews 12 in the SCHL

Hebrews 12 in the SNT

Hebrews 12 in the SUSU

Hebrews 12 in the SUSU2

Hebrews 12 in the SYNO

Hebrews 12 in the TBIAOTANT

Hebrews 12 in the TBT1E

Hebrews 12 in the TBT1E2

Hebrews 12 in the TFTIP

Hebrews 12 in the TFTU

Hebrews 12 in the TGNTATF3T

Hebrews 12 in the THAI

Hebrews 12 in the TNFD

Hebrews 12 in the TNT

Hebrews 12 in the TNTIK

Hebrews 12 in the TNTIL

Hebrews 12 in the TNTIN

Hebrews 12 in the TNTIP

Hebrews 12 in the TNTIZ

Hebrews 12 in the TOMA

Hebrews 12 in the TTENT

Hebrews 12 in the UBG

Hebrews 12 in the UGV

Hebrews 12 in the UGV2

Hebrews 12 in the UGV3

Hebrews 12 in the VBL

Hebrews 12 in the VDCC

Hebrews 12 in the YALU

Hebrews 12 in the YAPE

Hebrews 12 in the YBVTP

Hebrews 12 in the ZBP