Hebrews 7 (BOLCB2)

1 Melishisedeki azalaki mokonzi ya Salemi mpe Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo. Ezali Melishisedeki nde akendeki kokutana na Abrayami, wana Abrayami azali kozonga sima na ye kolonga bakonzi ; mpe ezali Melishisedeki nde apambolaki Abrayami. 2 Abrayami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.Kombo ya Melishisedeki elakisi « mokonzi ya bosembo. » Azali lisusu mokonzi ya Salemi ; elingi koloba : mokonzi ya kimia. 3 Azalaki na tata te, mama te, bakoko te, mokolo ya mbotama te, mpe mokolo ya kufa te ; azalaki lokola Mwana na Nzambe, mpe azali Nganga-Nzambe mpo na libela. 4 Botala ndenge nini Melishisedeki azalaki moto monene mpo ete ezala Abrayami, koko na biso, apesa ye eteni ya zomi ya bomengo na ye ya bitumba ! 5 Solo, Mibeko ya Moyize etindaki bana ya Levi, oyo bakomi Banganga-Nzambe kozwa biteni ya zomi epai ya bandeko na bango, bato ya Isalaele, oyo bazali mpe bato ya libota ya Abrayami. 6 Kasi Melishisedeki oyo azalaki kutu moto ya libota ya Levi te azwaki eteni ya zomi ya Abrayami, mpe apambolaki moto oyo Nzambe apesaki bilaka. 7 Nzokande, tembe ezali te ete ezali moto oyo azali na se nde azwaka lipamboli kowuta na moto oyo aleki ye. 8 Botala lisusu : na ngambo moko, ezali bato oyo bakufaka nde bazali kozwa biteni ya zomi ; kasi na ngambo mosusu, kolanda Makomi, ezali moto na bomoi. 9 Boye, na mokuse, tokoki koloba ete Levi oyo azwaka biteni ya zomi afutaki eteni ya zomi epai ya Melishisedeki na nzela ya Abrayami ; 10 pamba te, tango Melishisedeki akutanaki na Abrayami, Levi azalaki nanu kati na mokongo ya koko na ye, Abrayami. 11 Boye, soki bato oyo bazwaki mobeko bakokaki kokoma ya kokoka na nzela ya bonganga-Nzambe ya Balevi, mpo na nini kotia Nganga-Nzambe mosusu, kolanda molongo ya Melishisedeki, kasi kolanda molongo ya Aron te ? 12 Nzokande, lokola bonganga-Nzambe ebongwani, mobeko mpe esengeli kobongwana. 13 Pamba te makambo yango etali Nganga-Nzambe oyo azali ya libota ya Levi te, kasi ya libota oyo moto na yango moko te atikala kosala na etumbelo. 14 Toyebi malamu ete Nkolo na biso azali ya libota ya Yuda, mpe Moyize atikalaki koloba eloko moko te na tina na bonganga-Nzambe ya libota ya Yuda. 15 Likambo oyo tozali kolobela ekomi lisusu polele koleka awa Nganga-Nzambe mosusu abimi, Nganga-Nzambe oyo akokani na Melishisedeki ; 16 akomi Nganga-Nzambe kolanda mibeko ya bomoto te, kasi kolanda nguya ya bomoi oyo ezali na suka te. 17 Pamba te, tala litatoli oyo baloba na tina na Ye :« Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela,kolanda molongo ya Melishisedeki. » 18 Boye, Nzambe alongolaki mobeko ya liboso mpo ete ezalaki makasi te mpe ezalaki na tina te. 19 Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe. 20 Makambo wana nyonso esalemaki na nzela ya seleka oyo Nzambe akataki. Nzokande, mpo na Balevi, Nzambe akataki ata seleka te mpo ete bakoma Banganga-Nzambe. 21 Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye :« Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te :‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › » 22 Ezali na nzela ya seleka yango nde Yesu akoma ndanga ya boyokani oyo eleki motuya. 23 Mpe lisusu, Banganga-Nzambe bazalaki kokitana ebele, pamba te kufa ezalaki kopekisa bango kosala mosala na bango libela na libela. 24 Kasi mpo ete Yesu azali na bomoi seko na seko, Bonganga-Nzambe na Ye ezali mpo na libela. 25 Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango. 26 Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo, 27 azali na posa te, lokola bakonzi mosusu ya Banganga-Nzambe, ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo mpo na masumu na Ye moko liboso, mpe, na sima, mpo na masumu ya bato, pamba te atumbaki mbeka yango mpo na masumu na bango mbala moko mpo na libela tango amikabaki Ye moko. 28 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.

In Other Versions

Hebrews 7 in the ANGEFD

Hebrews 7 in the ANTPNG2D

Hebrews 7 in the AS21

Hebrews 7 in the BAGH

Hebrews 7 in the BBPNG

Hebrews 7 in the BBT1E

Hebrews 7 in the BDS

Hebrews 7 in the BEV

Hebrews 7 in the BHAD

Hebrews 7 in the BIB

Hebrews 7 in the BLPT

Hebrews 7 in the BNT

Hebrews 7 in the BNTABOOT

Hebrews 7 in the BNTLV

Hebrews 7 in the BOATCB

Hebrews 7 in the BOATCB2

Hebrews 7 in the BOBCV

Hebrews 7 in the BOCNT

Hebrews 7 in the BOECS

Hebrews 7 in the BOGWICC

Hebrews 7 in the BOHCB

Hebrews 7 in the BOHCV

Hebrews 7 in the BOHLNT

Hebrews 7 in the BOHNTLTAL

Hebrews 7 in the BOICB

Hebrews 7 in the BOILNTAP

Hebrews 7 in the BOITCV

Hebrews 7 in the BOKCV

Hebrews 7 in the BOKCV2

Hebrews 7 in the BOKHWOG

Hebrews 7 in the BOKSSV

Hebrews 7 in the BOLCB

Hebrews 7 in the BOMCV

Hebrews 7 in the BONAV

Hebrews 7 in the BONCB

Hebrews 7 in the BONLT

Hebrews 7 in the BONUT2

Hebrews 7 in the BOPLNT

Hebrews 7 in the BOSCB

Hebrews 7 in the BOSNC

Hebrews 7 in the BOTLNT

Hebrews 7 in the BOVCB

Hebrews 7 in the BOYCB

Hebrews 7 in the BPBB

Hebrews 7 in the BPH

Hebrews 7 in the BSB

Hebrews 7 in the CCB

Hebrews 7 in the CUV

Hebrews 7 in the CUVS

Hebrews 7 in the DBT

Hebrews 7 in the DGDNT

Hebrews 7 in the DHNT

Hebrews 7 in the DNT

Hebrews 7 in the ELBE

Hebrews 7 in the EMTV

Hebrews 7 in the ESV

Hebrews 7 in the FBV

Hebrews 7 in the FEB

Hebrews 7 in the GGMNT

Hebrews 7 in the GNT

Hebrews 7 in the HARY

Hebrews 7 in the HNT

Hebrews 7 in the IRVA

Hebrews 7 in the IRVB

Hebrews 7 in the IRVG

Hebrews 7 in the IRVH

Hebrews 7 in the IRVK

Hebrews 7 in the IRVM

Hebrews 7 in the IRVM2

Hebrews 7 in the IRVO

Hebrews 7 in the IRVP

Hebrews 7 in the IRVT

Hebrews 7 in the IRVT2

Hebrews 7 in the IRVU

Hebrews 7 in the ISVN

Hebrews 7 in the JSNT

Hebrews 7 in the KAPI

Hebrews 7 in the KBT1ETNIK

Hebrews 7 in the KBV

Hebrews 7 in the KJV

Hebrews 7 in the KNFD

Hebrews 7 in the LBA

Hebrews 7 in the LBLA

Hebrews 7 in the LNT

Hebrews 7 in the LSV

Hebrews 7 in the MAAL

Hebrews 7 in the MBV

Hebrews 7 in the MBV2

Hebrews 7 in the MHNT

Hebrews 7 in the MKNFD

Hebrews 7 in the MNG

Hebrews 7 in the MNT

Hebrews 7 in the MNT2

Hebrews 7 in the MRS1T

Hebrews 7 in the NAA

Hebrews 7 in the NASB

Hebrews 7 in the NBLA

Hebrews 7 in the NBS

Hebrews 7 in the NBVTP

Hebrews 7 in the NET2

Hebrews 7 in the NIV11

Hebrews 7 in the NNT

Hebrews 7 in the NNT2

Hebrews 7 in the NNT3

Hebrews 7 in the PDDPT

Hebrews 7 in the PFNT

Hebrews 7 in the RMNT

Hebrews 7 in the SBIAS

Hebrews 7 in the SBIBS

Hebrews 7 in the SBIBS2

Hebrews 7 in the SBICS

Hebrews 7 in the SBIDS

Hebrews 7 in the SBIGS

Hebrews 7 in the SBIHS

Hebrews 7 in the SBIIS

Hebrews 7 in the SBIIS2

Hebrews 7 in the SBIIS3

Hebrews 7 in the SBIKS

Hebrews 7 in the SBIKS2

Hebrews 7 in the SBIMS

Hebrews 7 in the SBIOS

Hebrews 7 in the SBIPS

Hebrews 7 in the SBISS

Hebrews 7 in the SBITS

Hebrews 7 in the SBITS2

Hebrews 7 in the SBITS3

Hebrews 7 in the SBITS4

Hebrews 7 in the SBIUS

Hebrews 7 in the SBIVS

Hebrews 7 in the SBT

Hebrews 7 in the SBT1E

Hebrews 7 in the SCHL

Hebrews 7 in the SNT

Hebrews 7 in the SUSU

Hebrews 7 in the SUSU2

Hebrews 7 in the SYNO

Hebrews 7 in the TBIAOTANT

Hebrews 7 in the TBT1E

Hebrews 7 in the TBT1E2

Hebrews 7 in the TFTIP

Hebrews 7 in the TFTU

Hebrews 7 in the TGNTATF3T

Hebrews 7 in the THAI

Hebrews 7 in the TNFD

Hebrews 7 in the TNT

Hebrews 7 in the TNTIK

Hebrews 7 in the TNTIL

Hebrews 7 in the TNTIN

Hebrews 7 in the TNTIP

Hebrews 7 in the TNTIZ

Hebrews 7 in the TOMA

Hebrews 7 in the TTENT

Hebrews 7 in the UBG

Hebrews 7 in the UGV

Hebrews 7 in the UGV2

Hebrews 7 in the UGV3

Hebrews 7 in the VBL

Hebrews 7 in the VDCC

Hebrews 7 in the YALU

Hebrews 7 in the YAPE

Hebrews 7 in the YBVTP

Hebrews 7 in the ZBP