Isaiah 30 (BOLCB2)

1 « Mawa na bana ya mito makasi, »elobi Yawe :« basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai tempe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te,mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu ; 2 mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito,na kozanga kotuna toli na Ngai,mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraonmpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito ! 3 Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimelaekokomela bino soni,mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi. 4 Ata bakalaka na bango bazali na Tsoanimpe bantoma na bango bakomi na Anesi, 5 bango nyonso bakoyoka kaka sonina miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te,oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te,kasi bobele soni mpe kotiolama. » 6 Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi :Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga,mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi,ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka,bantoma bazali komema bozwi na bangona mikongo ya ba-ane,bomengo na bango na mikongo ya bashamo,epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bangoata litomba moko te : 7 ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozalapenza na tina moko te ;yango wana, napesi yango kombo « Rahavi. » 8 Kende sik’oyo, koma makambo oyona etando ya libanga liboso na bango,koma yango na buku mokompo ete na mikolo oyo ekoya,ezala lokola litatoli ya libela na libela. 9 Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta,bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ; 10 balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, »mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te,boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso,bosakolela biso makambo ya lokuta. 11 Botika nzela wana,bobima penza na nzela wanampe botika kotungisa bisompo na Mosantu ya Isalaele ! » 12 Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi :« Lokola bobwaki maloba oyo,lokola bokangami na monyokolimpe na mokosi oyo bozali kotiela motema, 13 lisumu oyo ekokoma mpo na binolokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu,bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata. 14 Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki,ekopanzana penza nye na mawa te ;bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yangompo na kozwela likala ya moto na mbabolato mpo na kotokela mayi na libulu. » 15 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe,Mosantu ya Isalaele, alobi :« Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimiande bokozwa lobiko na bino ;ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikyande bokozwa makasi na bino ;kasi bino, bolingi bongo te. 16 Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; ›solo, bokokima nde !Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; ›solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu ! 17 Bato nkoto moko bakokimana mangungu ya moto moko kaka ;mpe na mangungu ya bato mitano,bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendelena songe ya ngomba,mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. » 18 Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu,atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa.Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo :Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye ! 19 Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi,bokolela lisusu te.Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ;tango kaka akoyoka, akoyanola bino. 20 Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi,mpe mayi na tango ya minyoko ;moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te,kasi miso na bino moko ekomona ye. 21 Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobalito na ngambo ya loboko ya mwasi,matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo :« Tala nzela yango oyo ! » 22 Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palatampe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ;bokobwaka yango mosikandenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza,mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! » 23 Boye, akotindela yo lisusu mvulampo na milona oyo okolona na mabele,mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi.Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene. 24 Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilangaekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu. 25 Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana,bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse. 26 Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi,mpe pole ya moyi ekongenga makasikoleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo,na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Yempe akobikisa yango. 27 Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ;kanda na Ye ezali kopela lokola motoelongo na lipata ya molinga ya moto makasi ;bibebu na Ye etondi na kanda,mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka. 28 Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi,ebale oyo etondi kino na kingo.Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi,akotia na mbanga ya bato ebendeoyo batiaka na minoko ya bampundampo ete emema bango na libunga. 29 Mpo na bino, bokoyemba banzembolokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule ;mitema na bino ekotonda na esengolokola bato oyo bazali kobeta flitempo na kokende na Ngomba ya Yawe,na Libanga ya Isalaele. 30 Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembompe akomonisa bango nguya ya loboko na Yekati na kanda makasi na Ye,kati na moto oyo ebomaka,kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga. 31 Mongongo ya Yawe ekokweyisa Asiri,mpe akobeta bango na lingenda na Ye ya bokonzi. 32 Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bangofimbu na Ye ya kosambisa,ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda,ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Yempo na kobundisa bango. 33 Babongisaki wuta kala Tofeti,babongisaki yango nde mpo na mokonzi ;basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monenempo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele.Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolonde ekopelisa yango.

In Other Versions

Isaiah 30 in the ANGEFD

Isaiah 30 in the ANTPNG2D

Isaiah 30 in the AS21

Isaiah 30 in the BAGH

Isaiah 30 in the BBPNG

Isaiah 30 in the BBT1E

Isaiah 30 in the BDS

Isaiah 30 in the BEV

Isaiah 30 in the BHAD

Isaiah 30 in the BIB

Isaiah 30 in the BLPT

Isaiah 30 in the BNT

Isaiah 30 in the BNTABOOT

Isaiah 30 in the BNTLV

Isaiah 30 in the BOATCB

Isaiah 30 in the BOATCB2

Isaiah 30 in the BOBCV

Isaiah 30 in the BOCNT

Isaiah 30 in the BOECS

Isaiah 30 in the BOGWICC

Isaiah 30 in the BOHCB

Isaiah 30 in the BOHCV

Isaiah 30 in the BOHLNT

Isaiah 30 in the BOHNTLTAL

Isaiah 30 in the BOICB

Isaiah 30 in the BOILNTAP

Isaiah 30 in the BOITCV

Isaiah 30 in the BOKCV

Isaiah 30 in the BOKCV2

Isaiah 30 in the BOKHWOG

Isaiah 30 in the BOKSSV

Isaiah 30 in the BOLCB

Isaiah 30 in the BOMCV

Isaiah 30 in the BONAV

Isaiah 30 in the BONCB

Isaiah 30 in the BONLT

Isaiah 30 in the BONUT2

Isaiah 30 in the BOPLNT

Isaiah 30 in the BOSCB

Isaiah 30 in the BOSNC

Isaiah 30 in the BOTLNT

Isaiah 30 in the BOVCB

Isaiah 30 in the BOYCB

Isaiah 30 in the BPBB

Isaiah 30 in the BPH

Isaiah 30 in the BSB

Isaiah 30 in the CCB

Isaiah 30 in the CUV

Isaiah 30 in the CUVS

Isaiah 30 in the DBT

Isaiah 30 in the DGDNT

Isaiah 30 in the DHNT

Isaiah 30 in the DNT

Isaiah 30 in the ELBE

Isaiah 30 in the EMTV

Isaiah 30 in the ESV

Isaiah 30 in the FBV

Isaiah 30 in the FEB

Isaiah 30 in the GGMNT

Isaiah 30 in the GNT

Isaiah 30 in the HARY

Isaiah 30 in the HNT

Isaiah 30 in the IRVA

Isaiah 30 in the IRVB

Isaiah 30 in the IRVG

Isaiah 30 in the IRVH

Isaiah 30 in the IRVK

Isaiah 30 in the IRVM

Isaiah 30 in the IRVM2

Isaiah 30 in the IRVO

Isaiah 30 in the IRVP

Isaiah 30 in the IRVT

Isaiah 30 in the IRVT2

Isaiah 30 in the IRVU

Isaiah 30 in the ISVN

Isaiah 30 in the JSNT

Isaiah 30 in the KAPI

Isaiah 30 in the KBT1ETNIK

Isaiah 30 in the KBV

Isaiah 30 in the KJV

Isaiah 30 in the KNFD

Isaiah 30 in the LBA

Isaiah 30 in the LBLA

Isaiah 30 in the LNT

Isaiah 30 in the LSV

Isaiah 30 in the MAAL

Isaiah 30 in the MBV

Isaiah 30 in the MBV2

Isaiah 30 in the MHNT

Isaiah 30 in the MKNFD

Isaiah 30 in the MNG

Isaiah 30 in the MNT

Isaiah 30 in the MNT2

Isaiah 30 in the MRS1T

Isaiah 30 in the NAA

Isaiah 30 in the NASB

Isaiah 30 in the NBLA

Isaiah 30 in the NBS

Isaiah 30 in the NBVTP

Isaiah 30 in the NET2

Isaiah 30 in the NIV11

Isaiah 30 in the NNT

Isaiah 30 in the NNT2

Isaiah 30 in the NNT3

Isaiah 30 in the PDDPT

Isaiah 30 in the PFNT

Isaiah 30 in the RMNT

Isaiah 30 in the SBIAS

Isaiah 30 in the SBIBS

Isaiah 30 in the SBIBS2

Isaiah 30 in the SBICS

Isaiah 30 in the SBIDS

Isaiah 30 in the SBIGS

Isaiah 30 in the SBIHS

Isaiah 30 in the SBIIS

Isaiah 30 in the SBIIS2

Isaiah 30 in the SBIIS3

Isaiah 30 in the SBIKS

Isaiah 30 in the SBIKS2

Isaiah 30 in the SBIMS

Isaiah 30 in the SBIOS

Isaiah 30 in the SBIPS

Isaiah 30 in the SBISS

Isaiah 30 in the SBITS

Isaiah 30 in the SBITS2

Isaiah 30 in the SBITS3

Isaiah 30 in the SBITS4

Isaiah 30 in the SBIUS

Isaiah 30 in the SBIVS

Isaiah 30 in the SBT

Isaiah 30 in the SBT1E

Isaiah 30 in the SCHL

Isaiah 30 in the SNT

Isaiah 30 in the SUSU

Isaiah 30 in the SUSU2

Isaiah 30 in the SYNO

Isaiah 30 in the TBIAOTANT

Isaiah 30 in the TBT1E

Isaiah 30 in the TBT1E2

Isaiah 30 in the TFTIP

Isaiah 30 in the TFTU

Isaiah 30 in the TGNTATF3T

Isaiah 30 in the THAI

Isaiah 30 in the TNFD

Isaiah 30 in the TNT

Isaiah 30 in the TNTIK

Isaiah 30 in the TNTIL

Isaiah 30 in the TNTIN

Isaiah 30 in the TNTIP

Isaiah 30 in the TNTIZ

Isaiah 30 in the TOMA

Isaiah 30 in the TTENT

Isaiah 30 in the UBG

Isaiah 30 in the UGV

Isaiah 30 in the UGV2

Isaiah 30 in the UGV3

Isaiah 30 in the VBL

Isaiah 30 in the VDCC

Isaiah 30 in the YALU

Isaiah 30 in the YAPE

Isaiah 30 in the YBVTP

Isaiah 30 in the ZBP