Isaiah 5 (BOLCB2)

1 Nakoyemba loyembo mpo na molingami na ngai,loyembo ya molingami na ngai mpo na elanga na ye ya vino.Molingami na ngai azalaki na elanga moko ya vinokati na mabele kitoko oyo ezalaka na mopanzi ya ngomba ; 2 abalolaki mabele, alongolaki mabanga,mpe alonaki vino ya kitoko koleka ;atongaki kuna ndako molayi ya bakengelimpe atimolaki ekamolelo ya vino.Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko,kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe ! 3 Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda,bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino ! 4 Nasala penza eloko nini, mpo na elanga na ngai ya vino,oyo natikala nanu kosalela yango te ?Mpo na nini eboteli ngai bambuma ya mabe,tango ngai nakanisaki ete ekobotela ngai bambuma ya malamu ? 5 Sik’oyo, nakoloba na bino makambooyo nakosala na elanga na ngai ya vino :Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ;nakotobola madusu kati na bamir na yango,mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango. 6 Nakokomisa yango esobe :kati na yango, bakolongola lisusu te,ezala mabanga to matiti ;bongo banzube mpe basende ekokola kuna.Nakopesa mitindo na mapataete enokisela yango lisusu mvula te. 7 Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga,ezali nde libota ya Isalaele,mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye.Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ;makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi. 8 Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako,elanga pembeni ya elanga,kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili ! 9 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :« Solo, bandako minene ekotikala pamba,bandako kitoko ekozanga bato ya kovanda kati na yango. 10 Pamba te elanga ya vino ya ba-ekitare mibaleekobimisa kaka bisangala minei ya vino,bakilo nkama mibale na tuku mibale ya milona ya bleekobimisa kaka bakilo tuku mibale na mibale. » 11 Mawa na bato oyo balamukaka na tongo-tongompo na kowumela liboso ya masanga ya vino kino na butu,kino tango bakolangwa masanga ! 12 Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino,bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango,kasi bakanisaka te mosala na Yawempe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye. 13 Yango wana, bato na Ngai bakokende na bowumbumpo na kozanga boyebi ;bato na bango ya lokumu bakokufa na nzala,mpe bato pamba bakokufa na posa ya mayi. 14 Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasimpe ekofungola monoko na yango makasi ;bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzelamoko mpe na loyenge na bango. 15 Moto akokitisama,bato ya mokili bakoyokisama soni,mpe bilongi ya bato ya lolendo ekotala na se. 16 Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga,akonetolama na nzela ya bosembo na Ye,mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Yena nzela ya boyengebene na Ye. 17 Bameme ekokoma kolia matitilokola nde ezali kati na elanga na yango moko,bapaya bakozwa bomengo oyo bazwi bakotika. 18 Mawa na bato oyo babendaka masumuna basinga ya makambo ya lokuta,mpe mabe lokola nde bazali kobenda shario na basheni ! 19 Mawa na bato oyo balobaka :« Tika ete Nzambe asala noki,tika ete asala na lombangu mosala na Yempo ete tomona yango !Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisamampo ete tokoka koyeba yango ! » 20 Mawa na bato oyo babengaka mabe malamumpe malamu mabe,oyo bamonaka molili lokola polempe pole lokola molili,oyo bamonaka bololo lokola elengimpe elengi lokola bololo ! 21 Mawa na bato oyo bamimonakalokola bato ya bwanya na miso na bango moko,mpe na bato oyo bamimonakalokola bato ya mayele na miso na bango moko ! 22 Mawa na bato oyo bakenda sangoya komela vino mpe ya kosangisa masanga ya makasi : 23 bazwaka kanyaka mpo na kolongisa moto mabempe bazangisaka na moto ya sembo bosembo na ye ! 24 Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti,mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto,ndenge wana mpe misisa na bango ekopolampe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu,pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga,mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele. 25 Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye,asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ;bangomba eningani,bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala.Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te,loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama. 26 Yawe atomboli bendelempo na bikolo oyo ezali mosika,azali kobeta piololo mpo na kobengabato oyo bazali na suka ya mokili :tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki ! 27 Moko te kati na bango asili kolemba nzoto to abeti libaku,moko te azali konimba to kolala pongi.Moko te alongoli mokaba na ye na loketo,singa moko te ya basapato na bango etikali kokatana. 28 Bambanzi na bango ezali songe,batolotolo na bango nyonso ebendana makasi ;makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga,bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi. 29 Koganga na bango ezali lokola koganga ya bankosi :bagangaka lokola bana nkosi,bagangaka soki bakangi nyama na bango,bamemaka yango na esika ya kimia,mpe moto moko te akokaka kobotola bango yango. 30 Na mokolo wana, bakoganga likolo na bangolokola makelele ya ebale monene.Mpe soki moto atali kati na mokili,akomona molili mpe minyoko :pole ekozipama na se ya mapata.

In Other Versions

Isaiah 5 in the ANGEFD

Isaiah 5 in the ANTPNG2D

Isaiah 5 in the AS21

Isaiah 5 in the BAGH

Isaiah 5 in the BBPNG

Isaiah 5 in the BBT1E

Isaiah 5 in the BDS

Isaiah 5 in the BEV

Isaiah 5 in the BHAD

Isaiah 5 in the BIB

Isaiah 5 in the BLPT

Isaiah 5 in the BNT

Isaiah 5 in the BNTABOOT

Isaiah 5 in the BNTLV

Isaiah 5 in the BOATCB

Isaiah 5 in the BOATCB2

Isaiah 5 in the BOBCV

Isaiah 5 in the BOCNT

Isaiah 5 in the BOECS

Isaiah 5 in the BOGWICC

Isaiah 5 in the BOHCB

Isaiah 5 in the BOHCV

Isaiah 5 in the BOHLNT

Isaiah 5 in the BOHNTLTAL

Isaiah 5 in the BOICB

Isaiah 5 in the BOILNTAP

Isaiah 5 in the BOITCV

Isaiah 5 in the BOKCV

Isaiah 5 in the BOKCV2

Isaiah 5 in the BOKHWOG

Isaiah 5 in the BOKSSV

Isaiah 5 in the BOLCB

Isaiah 5 in the BOMCV

Isaiah 5 in the BONAV

Isaiah 5 in the BONCB

Isaiah 5 in the BONLT

Isaiah 5 in the BONUT2

Isaiah 5 in the BOPLNT

Isaiah 5 in the BOSCB

Isaiah 5 in the BOSNC

Isaiah 5 in the BOTLNT

Isaiah 5 in the BOVCB

Isaiah 5 in the BOYCB

Isaiah 5 in the BPBB

Isaiah 5 in the BPH

Isaiah 5 in the BSB

Isaiah 5 in the CCB

Isaiah 5 in the CUV

Isaiah 5 in the CUVS

Isaiah 5 in the DBT

Isaiah 5 in the DGDNT

Isaiah 5 in the DHNT

Isaiah 5 in the DNT

Isaiah 5 in the ELBE

Isaiah 5 in the EMTV

Isaiah 5 in the ESV

Isaiah 5 in the FBV

Isaiah 5 in the FEB

Isaiah 5 in the GGMNT

Isaiah 5 in the GNT

Isaiah 5 in the HARY

Isaiah 5 in the HNT

Isaiah 5 in the IRVA

Isaiah 5 in the IRVB

Isaiah 5 in the IRVG

Isaiah 5 in the IRVH

Isaiah 5 in the IRVK

Isaiah 5 in the IRVM

Isaiah 5 in the IRVM2

Isaiah 5 in the IRVO

Isaiah 5 in the IRVP

Isaiah 5 in the IRVT

Isaiah 5 in the IRVT2

Isaiah 5 in the IRVU

Isaiah 5 in the ISVN

Isaiah 5 in the JSNT

Isaiah 5 in the KAPI

Isaiah 5 in the KBT1ETNIK

Isaiah 5 in the KBV

Isaiah 5 in the KJV

Isaiah 5 in the KNFD

Isaiah 5 in the LBA

Isaiah 5 in the LBLA

Isaiah 5 in the LNT

Isaiah 5 in the LSV

Isaiah 5 in the MAAL

Isaiah 5 in the MBV

Isaiah 5 in the MBV2

Isaiah 5 in the MHNT

Isaiah 5 in the MKNFD

Isaiah 5 in the MNG

Isaiah 5 in the MNT

Isaiah 5 in the MNT2

Isaiah 5 in the MRS1T

Isaiah 5 in the NAA

Isaiah 5 in the NASB

Isaiah 5 in the NBLA

Isaiah 5 in the NBS

Isaiah 5 in the NBVTP

Isaiah 5 in the NET2

Isaiah 5 in the NIV11

Isaiah 5 in the NNT

Isaiah 5 in the NNT2

Isaiah 5 in the NNT3

Isaiah 5 in the PDDPT

Isaiah 5 in the PFNT

Isaiah 5 in the RMNT

Isaiah 5 in the SBIAS

Isaiah 5 in the SBIBS

Isaiah 5 in the SBIBS2

Isaiah 5 in the SBICS

Isaiah 5 in the SBIDS

Isaiah 5 in the SBIGS

Isaiah 5 in the SBIHS

Isaiah 5 in the SBIIS

Isaiah 5 in the SBIIS2

Isaiah 5 in the SBIIS3

Isaiah 5 in the SBIKS

Isaiah 5 in the SBIKS2

Isaiah 5 in the SBIMS

Isaiah 5 in the SBIOS

Isaiah 5 in the SBIPS

Isaiah 5 in the SBISS

Isaiah 5 in the SBITS

Isaiah 5 in the SBITS2

Isaiah 5 in the SBITS3

Isaiah 5 in the SBITS4

Isaiah 5 in the SBIUS

Isaiah 5 in the SBIVS

Isaiah 5 in the SBT

Isaiah 5 in the SBT1E

Isaiah 5 in the SCHL

Isaiah 5 in the SNT

Isaiah 5 in the SUSU

Isaiah 5 in the SUSU2

Isaiah 5 in the SYNO

Isaiah 5 in the TBIAOTANT

Isaiah 5 in the TBT1E

Isaiah 5 in the TBT1E2

Isaiah 5 in the TFTIP

Isaiah 5 in the TFTU

Isaiah 5 in the TGNTATF3T

Isaiah 5 in the THAI

Isaiah 5 in the TNFD

Isaiah 5 in the TNT

Isaiah 5 in the TNTIK

Isaiah 5 in the TNTIL

Isaiah 5 in the TNTIN

Isaiah 5 in the TNTIP

Isaiah 5 in the TNTIZ

Isaiah 5 in the TOMA

Isaiah 5 in the TTENT

Isaiah 5 in the UBG

Isaiah 5 in the UGV

Isaiah 5 in the UGV2

Isaiah 5 in the UGV3

Isaiah 5 in the VBL

Isaiah 5 in the VDCC

Isaiah 5 in the YALU

Isaiah 5 in the YAPE

Isaiah 5 in the YBVTP

Isaiah 5 in the ZBP