James 2 (BOLCB2)

1 Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo. 2 Ndakisa : soki moto moko akoti kati na ndako na bino ya mayangani, alata penza bilamba ya talo mpe lopete ya wolo ; bongo mobola mpe akoti, alata bilamba na ye ya bobola. 3 Soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya talo mpe bolobi na ye : « Tala esika ya kitoko oyo ebongisami mpo na yo, » kasi bolobi na mobola : « Yo, kende kotelema kuna » to « vanda awa na mabele, na se ya enyatelo makolo na ngai ; » 4 boni, wana boponi bilongi te kati na bino, mpe bokomi te koyekola bato na nzela ya makanisi mabe ? 5 Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ? 6 Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ? 7 Ezali bango te bato babebisaka lokumu ya kombo kitoko oyo Nzambe apesa bino ? 8 Soki bozali kokokisa Mobeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, » wana bozali kosala malamu. 9 Kasi soki bozali kopona-pona bilongi, bozali kosala masumu, mpe Mobeko ezali kokweyisa bino mpo ete bozali kotosa yango te. 10 Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso. 11 Solo, Ye oyo alobaki : « Okosalaka ekobo te, » alobaki lisusu : « Okobomaka te. » Nzokande soki osali ekobo te, kasi obomi moto, yeba ete obuki mibeko nyonso. 12 Boye, tika ete bolobaka mpe bosalaka makambo lokola bato oyo bayebi malamu ete bakosambisama kolanda mibeko oyo ememaka bato na bonsomi. 13 Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama. 14 Bandeko na ngai, tina nini ezali na moto ya koloba ete azali na kondima, soki azali kolakisa yango te na misala ? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye ? 15 Ndakisa : soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo, 16 bongo moko kati na bino alobi na ye : « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini ? 17 Ezali mpe bongo mpo na kondima : soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa. 18 Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai. 19 Ondimaka ete Nzambe azali kaka moko ? Osalaka malamu ! Kasi milimo mabe mpe endimaka ete Nzambe azali kaka moko, mpe elengaka. 20 Oh zoba ya moto ! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba ? 21 Tala, Abrayami, tata na biso, atangamaki lokola moto ya sembo mpo na misala, pamba te abonzaki Izaki, mwana na ye ya mobali, na likolo ya etumbelo. 22 Tala ndenge kondima mpe misala na ye ezalaki kosala elongo ; mpe na nzela ya misala yango, kondima na ye ekomaki ya kokoka. 23 Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi : « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. » 24 Bomoni malamu sik’oyo ete Nzambe akomisaka moto sembo kolanda misala ya moto, kasi mpo na kondima kaka te. 25 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba : Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele. 26 Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.

In Other Versions

James 2 in the ANGEFD

James 2 in the ANTPNG2D

James 2 in the AS21

James 2 in the BAGH

James 2 in the BBPNG

James 2 in the BBT1E

James 2 in the BDS

James 2 in the BEV

James 2 in the BHAD

James 2 in the BIB

James 2 in the BLPT

James 2 in the BNT

James 2 in the BNTABOOT

James 2 in the BNTLV

James 2 in the BOATCB

James 2 in the BOATCB2

James 2 in the BOBCV

James 2 in the BOCNT

James 2 in the BOECS

James 2 in the BOGWICC

James 2 in the BOHCB

James 2 in the BOHCV

James 2 in the BOHLNT

James 2 in the BOHNTLTAL

James 2 in the BOICB

James 2 in the BOILNTAP

James 2 in the BOITCV

James 2 in the BOKCV

James 2 in the BOKCV2

James 2 in the BOKHWOG

James 2 in the BOKSSV

James 2 in the BOLCB

James 2 in the BOMCV

James 2 in the BONAV

James 2 in the BONCB

James 2 in the BONLT

James 2 in the BONUT2

James 2 in the BOPLNT

James 2 in the BOSCB

James 2 in the BOSNC

James 2 in the BOTLNT

James 2 in the BOVCB

James 2 in the BOYCB

James 2 in the BPBB

James 2 in the BPH

James 2 in the BSB

James 2 in the CCB

James 2 in the CUV

James 2 in the CUVS

James 2 in the DBT

James 2 in the DGDNT

James 2 in the DHNT

James 2 in the DNT

James 2 in the ELBE

James 2 in the EMTV

James 2 in the ESV

James 2 in the FBV

James 2 in the FEB

James 2 in the GGMNT

James 2 in the GNT

James 2 in the HARY

James 2 in the HNT

James 2 in the IRVA

James 2 in the IRVB

James 2 in the IRVG

James 2 in the IRVH

James 2 in the IRVK

James 2 in the IRVM

James 2 in the IRVM2

James 2 in the IRVO

James 2 in the IRVP

James 2 in the IRVT

James 2 in the IRVT2

James 2 in the IRVU

James 2 in the ISVN

James 2 in the JSNT

James 2 in the KAPI

James 2 in the KBT1ETNIK

James 2 in the KBV

James 2 in the KJV

James 2 in the KNFD

James 2 in the LBA

James 2 in the LBLA

James 2 in the LNT

James 2 in the LSV

James 2 in the MAAL

James 2 in the MBV

James 2 in the MBV2

James 2 in the MHNT

James 2 in the MKNFD

James 2 in the MNG

James 2 in the MNT

James 2 in the MNT2

James 2 in the MRS1T

James 2 in the NAA

James 2 in the NASB

James 2 in the NBLA

James 2 in the NBS

James 2 in the NBVTP

James 2 in the NET2

James 2 in the NIV11

James 2 in the NNT

James 2 in the NNT2

James 2 in the NNT3

James 2 in the PDDPT

James 2 in the PFNT

James 2 in the RMNT

James 2 in the SBIAS

James 2 in the SBIBS

James 2 in the SBIBS2

James 2 in the SBICS

James 2 in the SBIDS

James 2 in the SBIGS

James 2 in the SBIHS

James 2 in the SBIIS

James 2 in the SBIIS2

James 2 in the SBIIS3

James 2 in the SBIKS

James 2 in the SBIKS2

James 2 in the SBIMS

James 2 in the SBIOS

James 2 in the SBIPS

James 2 in the SBISS

James 2 in the SBITS

James 2 in the SBITS2

James 2 in the SBITS3

James 2 in the SBITS4

James 2 in the SBIUS

James 2 in the SBIVS

James 2 in the SBT

James 2 in the SBT1E

James 2 in the SCHL

James 2 in the SNT

James 2 in the SUSU

James 2 in the SUSU2

James 2 in the SYNO

James 2 in the TBIAOTANT

James 2 in the TBT1E

James 2 in the TBT1E2

James 2 in the TFTIP

James 2 in the TFTU

James 2 in the TGNTATF3T

James 2 in the THAI

James 2 in the TNFD

James 2 in the TNT

James 2 in the TNTIK

James 2 in the TNTIL

James 2 in the TNTIN

James 2 in the TNTIP

James 2 in the TNTIZ

James 2 in the TOMA

James 2 in the TTENT

James 2 in the UBG

James 2 in the UGV

James 2 in the UGV2

James 2 in the UGV3

James 2 in the VBL

James 2 in the VDCC

James 2 in the YALU

James 2 in the YAPE

James 2 in the YBVTP

James 2 in the ZBP