Jeremiah 13 (BOLCB2)
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. » 2 Boye, nasombaki mokaba, ndenge Yawe atindaki ngai mpe nalataki yango na loketo na ngai. 3 Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale : 4 « Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. » 5 Boye nakendeki kobomba mokaba yango na Perati, ndenge Yawe alobaki na ngai. 6 Sima na mikolo ebele, Yawe alobaki na ngai lisusu : « Kende kokamata mokaba oyo nalobaki na yo ete obomba na Perati. » 7 Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango ; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te. 8 Bongo Yawe alobaki na ngai : 9 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi. 10 Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango ; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te. 11 Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. › 12 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? › 13 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi. 14 Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › » 15 Boyoka malamu mpe bosala keba !Bosala lolendo te,pamba te ezali Yawe nde alobi. 16 Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino,liboso ete amemela bino molili,liboso ete makolo na bino ebeta mabakuna bangomba oyo ezipami na molili.Bino bozali kozela pole,kasi Ye akobongola yango molili makasi. 17 Soki boyoki te,nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino,nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli,pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu. 18 Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi :« Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi,pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. » 19 Bingumba ya sude ekokangama,mpe moto moko te akokoka kofungola yango.Bato nyonso ya Yuda bakokende na bowumbu,bango nyonso penza bakokende. 20 Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala,bato bazali koya wuta na nor !Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela,mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ? 21 Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasina se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki.Okokoma na pasi telokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ? 22 Mpe soki omituni :« Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? »Ezali mpo na ebele ya masumu na yonde bapasolaki yo bilambampe bazokisaki nzoto na yo. 23 Boni, moto mwindo akoki solo kobongolaposo ya nzoto na ye ?Nkoyi ekoki kolongola penzamatono ya poso ya nzoto na yango ?Bokokoka kosala malamu te,bino bato oyo bomesana kosala mabe. 24 « Nakopanza bino lokola matiti ya kokawukaoyo mopepe ya esobe ememaka. 25 Yango nde etumbu na yo,mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe,« pamba te bobosanaki Ngaimpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta. 26 Nakotombola yo bilamba kino na elongimpo ete bato bamona bolumbu na yo. 27 Namoni bondumba na yompe posa na yo ya kosangisa nzoto ;ekobo na yo ezali na soni ata moke te.Namoni banzambe na yo ya bikekona likolo ya bangomba mpe kati na bilanga.Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te !Kino tango nini okozala mbindo ? »
In Other Versions
Jeremiah 13 in the ANGEFD
Jeremiah 13 in the ANTPNG2D
Jeremiah 13 in the AS21
Jeremiah 13 in the BAGH
Jeremiah 13 in the BBPNG
Jeremiah 13 in the BBT1E
Jeremiah 13 in the BDS
Jeremiah 13 in the BEV
Jeremiah 13 in the BHAD
Jeremiah 13 in the BIB
Jeremiah 13 in the BLPT
Jeremiah 13 in the BNT
Jeremiah 13 in the BNTABOOT
Jeremiah 13 in the BNTLV
Jeremiah 13 in the BOATCB
Jeremiah 13 in the BOATCB2
Jeremiah 13 in the BOBCV
Jeremiah 13 in the BOCNT
Jeremiah 13 in the BOECS
Jeremiah 13 in the BOGWICC
Jeremiah 13 in the BOHCB
Jeremiah 13 in the BOHCV
Jeremiah 13 in the BOHLNT
Jeremiah 13 in the BOHNTLTAL
Jeremiah 13 in the BOICB
Jeremiah 13 in the BOILNTAP
Jeremiah 13 in the BOITCV
Jeremiah 13 in the BOKCV
Jeremiah 13 in the BOKCV2
Jeremiah 13 in the BOKHWOG
Jeremiah 13 in the BOKSSV
Jeremiah 13 in the BOLCB
Jeremiah 13 in the BOMCV
Jeremiah 13 in the BONAV
Jeremiah 13 in the BONCB
Jeremiah 13 in the BONLT
Jeremiah 13 in the BONUT2
Jeremiah 13 in the BOPLNT
Jeremiah 13 in the BOSCB
Jeremiah 13 in the BOSNC
Jeremiah 13 in the BOTLNT
Jeremiah 13 in the BOVCB
Jeremiah 13 in the BOYCB
Jeremiah 13 in the BPBB
Jeremiah 13 in the BPH
Jeremiah 13 in the BSB
Jeremiah 13 in the CCB
Jeremiah 13 in the CUV
Jeremiah 13 in the CUVS
Jeremiah 13 in the DBT
Jeremiah 13 in the DGDNT
Jeremiah 13 in the DHNT
Jeremiah 13 in the DNT
Jeremiah 13 in the ELBE
Jeremiah 13 in the EMTV
Jeremiah 13 in the ESV
Jeremiah 13 in the FBV
Jeremiah 13 in the FEB
Jeremiah 13 in the GGMNT
Jeremiah 13 in the GNT
Jeremiah 13 in the HARY
Jeremiah 13 in the HNT
Jeremiah 13 in the IRVA
Jeremiah 13 in the IRVB
Jeremiah 13 in the IRVG
Jeremiah 13 in the IRVH
Jeremiah 13 in the IRVK
Jeremiah 13 in the IRVM
Jeremiah 13 in the IRVM2
Jeremiah 13 in the IRVO
Jeremiah 13 in the IRVP
Jeremiah 13 in the IRVT
Jeremiah 13 in the IRVT2
Jeremiah 13 in the IRVU
Jeremiah 13 in the ISVN
Jeremiah 13 in the JSNT
Jeremiah 13 in the KAPI
Jeremiah 13 in the KBT1ETNIK
Jeremiah 13 in the KBV
Jeremiah 13 in the KJV
Jeremiah 13 in the KNFD
Jeremiah 13 in the LBA
Jeremiah 13 in the LBLA
Jeremiah 13 in the LNT
Jeremiah 13 in the LSV
Jeremiah 13 in the MAAL
Jeremiah 13 in the MBV
Jeremiah 13 in the MBV2
Jeremiah 13 in the MHNT
Jeremiah 13 in the MKNFD
Jeremiah 13 in the MNG
Jeremiah 13 in the MNT
Jeremiah 13 in the MNT2
Jeremiah 13 in the MRS1T
Jeremiah 13 in the NAA
Jeremiah 13 in the NASB
Jeremiah 13 in the NBLA
Jeremiah 13 in the NBS
Jeremiah 13 in the NBVTP
Jeremiah 13 in the NET2
Jeremiah 13 in the NIV11
Jeremiah 13 in the NNT
Jeremiah 13 in the NNT2
Jeremiah 13 in the NNT3
Jeremiah 13 in the PDDPT
Jeremiah 13 in the PFNT
Jeremiah 13 in the RMNT
Jeremiah 13 in the SBIAS
Jeremiah 13 in the SBIBS
Jeremiah 13 in the SBIBS2
Jeremiah 13 in the SBICS
Jeremiah 13 in the SBIDS
Jeremiah 13 in the SBIGS
Jeremiah 13 in the SBIHS
Jeremiah 13 in the SBIIS
Jeremiah 13 in the SBIIS2
Jeremiah 13 in the SBIIS3
Jeremiah 13 in the SBIKS
Jeremiah 13 in the SBIKS2
Jeremiah 13 in the SBIMS
Jeremiah 13 in the SBIOS
Jeremiah 13 in the SBIPS
Jeremiah 13 in the SBISS
Jeremiah 13 in the SBITS
Jeremiah 13 in the SBITS2
Jeremiah 13 in the SBITS3
Jeremiah 13 in the SBITS4
Jeremiah 13 in the SBIUS
Jeremiah 13 in the SBIVS
Jeremiah 13 in the SBT
Jeremiah 13 in the SBT1E
Jeremiah 13 in the SCHL
Jeremiah 13 in the SNT
Jeremiah 13 in the SUSU
Jeremiah 13 in the SUSU2
Jeremiah 13 in the SYNO
Jeremiah 13 in the TBIAOTANT
Jeremiah 13 in the TBT1E
Jeremiah 13 in the TBT1E2
Jeremiah 13 in the TFTIP
Jeremiah 13 in the TFTU
Jeremiah 13 in the TGNTATF3T
Jeremiah 13 in the THAI
Jeremiah 13 in the TNFD
Jeremiah 13 in the TNT
Jeremiah 13 in the TNTIK
Jeremiah 13 in the TNTIL
Jeremiah 13 in the TNTIN
Jeremiah 13 in the TNTIP
Jeremiah 13 in the TNTIZ
Jeremiah 13 in the TOMA
Jeremiah 13 in the TTENT
Jeremiah 13 in the UBG
Jeremiah 13 in the UGV
Jeremiah 13 in the UGV2
Jeremiah 13 in the UGV3
Jeremiah 13 in the VBL
Jeremiah 13 in the VDCC
Jeremiah 13 in the YALU
Jeremiah 13 in the YAPE
Jeremiah 13 in the YBVTP
Jeremiah 13 in the ZBP