Jeremiah 23 (BOLCB2)

1 « Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe. 2 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe, 3 « Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele. 4 Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe. 5 « Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe,« nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi,mokonzi oyo akokamba na bwanya,oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo. 6 Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama,mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia.Tala kombo oyo bakobengela ye :Yawe azali Bosembo na biso. 7 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; › 8 kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. » 9 Na tina na basakoli :Motema na ngai ebukani kati na ngai,mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga.Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga,lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye,likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule. 10 Pamba te mokili etondi na kindumba,mokili ekomi na matanga.Likolo ya bilakeli mabe,matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki,basakoli bakomi kolanda nzela mabempe bakomi na molende ya kosalakaka makambo oyo esengeli te. 11 « Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe ;ezala kati na Tempelo na Ngai,nazali komona misala na bango ya mabe, »elobi Yawe. 12 « Yango wana, nzela na bango ekokomamoselu mpe molili ;bakobengana bango kino na mboka ya molilimpe kuna bakokweya.Nakotindela bango pasi,tango oyo nakopesa bango etumbu, »elobi Yawe. 13 « Namoni makambo ya nkelekati na basakoli ya Samari :bazali kosakola na kombo ya nzambe Balampe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela. 14 Namoni lisusu makambo ya nkelekati na basakoli ya Yelusalemi :bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta,bazali kolendisa bato oyo basalaka mabempo ete batika te misala na bango ya mabe.Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome,bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. » 15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli :« Nakoleisa bango bilei ya bololompe nakomelisa bango mayi ya ngenge,pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusaleminde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. » 16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Boyoka te makambo oyo basakolibazali kosakola epai na bino ! 17 Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai :‹ Yawe alobi : Bokozala malamu ! ›Mpe na bato oyo balandakamakanisi mabe ya mitema na bango :‹ Mabe moko te ekokomela bino ! › 18 Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe ? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye ? 19 Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki !Kanda na Ye epeli lokola moto,bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe. 20 Kanda ya Yawe ekokita tekino ekokokisa malamu-malamu penzamabongisi ya motema na Ye !Bokozwa mayele ya kososola yango malamuna mikolo oyo ekoya. 21 Natindaki basakoli wana te,kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ;nalobaki na bango likambo moko te,kasi tala bango wana bazali kosakola ! 22 Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai,balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai,mpe bato na Ngai balingaki kotikabanzela mpe misala na bango ya mabe ! 23 Boni, bokanisi ete Ngai Nzambe namonaka kaka pene,kasi namonaka mosika te ? »elobi Yawe. 24 « Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku,bongo Ngai nazanga komona ye ? »elobi Yawe.« Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? »elobi Yawe. 25 « Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! › 26 Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango ? 27 Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ? 28 Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ; 29 « boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe. 30 « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe ; 31 « solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe, 32 « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe. 33 « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? ›Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. › 34 Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu. 35 Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye : ‹ Eyano nini Yawe apesi ? Yawe alobi nini ? › 36 Kasi bosengeli lisusu te koloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso ! 37 Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana : ‹ Eyano nini Yawe apesi yo ? › to ‹ Yawe alobi nini ? › 38 Nzokande, soki bolobi lisusu : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola bosalelaka maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino : ‹ Boloba te : Tala liloba oyo Yawe alobi ! › 39 mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ; 40 nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »

In Other Versions

Jeremiah 23 in the ANGEFD

Jeremiah 23 in the ANTPNG2D

Jeremiah 23 in the AS21

Jeremiah 23 in the BAGH

Jeremiah 23 in the BBPNG

Jeremiah 23 in the BBT1E

Jeremiah 23 in the BDS

Jeremiah 23 in the BEV

Jeremiah 23 in the BHAD

Jeremiah 23 in the BIB

Jeremiah 23 in the BLPT

Jeremiah 23 in the BNT

Jeremiah 23 in the BNTABOOT

Jeremiah 23 in the BNTLV

Jeremiah 23 in the BOATCB

Jeremiah 23 in the BOATCB2

Jeremiah 23 in the BOBCV

Jeremiah 23 in the BOCNT

Jeremiah 23 in the BOECS

Jeremiah 23 in the BOGWICC

Jeremiah 23 in the BOHCB

Jeremiah 23 in the BOHCV

Jeremiah 23 in the BOHLNT

Jeremiah 23 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 23 in the BOICB

Jeremiah 23 in the BOILNTAP

Jeremiah 23 in the BOITCV

Jeremiah 23 in the BOKCV

Jeremiah 23 in the BOKCV2

Jeremiah 23 in the BOKHWOG

Jeremiah 23 in the BOKSSV

Jeremiah 23 in the BOLCB

Jeremiah 23 in the BOMCV

Jeremiah 23 in the BONAV

Jeremiah 23 in the BONCB

Jeremiah 23 in the BONLT

Jeremiah 23 in the BONUT2

Jeremiah 23 in the BOPLNT

Jeremiah 23 in the BOSCB

Jeremiah 23 in the BOSNC

Jeremiah 23 in the BOTLNT

Jeremiah 23 in the BOVCB

Jeremiah 23 in the BOYCB

Jeremiah 23 in the BPBB

Jeremiah 23 in the BPH

Jeremiah 23 in the BSB

Jeremiah 23 in the CCB

Jeremiah 23 in the CUV

Jeremiah 23 in the CUVS

Jeremiah 23 in the DBT

Jeremiah 23 in the DGDNT

Jeremiah 23 in the DHNT

Jeremiah 23 in the DNT

Jeremiah 23 in the ELBE

Jeremiah 23 in the EMTV

Jeremiah 23 in the ESV

Jeremiah 23 in the FBV

Jeremiah 23 in the FEB

Jeremiah 23 in the GGMNT

Jeremiah 23 in the GNT

Jeremiah 23 in the HARY

Jeremiah 23 in the HNT

Jeremiah 23 in the IRVA

Jeremiah 23 in the IRVB

Jeremiah 23 in the IRVG

Jeremiah 23 in the IRVH

Jeremiah 23 in the IRVK

Jeremiah 23 in the IRVM

Jeremiah 23 in the IRVM2

Jeremiah 23 in the IRVO

Jeremiah 23 in the IRVP

Jeremiah 23 in the IRVT

Jeremiah 23 in the IRVT2

Jeremiah 23 in the IRVU

Jeremiah 23 in the ISVN

Jeremiah 23 in the JSNT

Jeremiah 23 in the KAPI

Jeremiah 23 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 23 in the KBV

Jeremiah 23 in the KJV

Jeremiah 23 in the KNFD

Jeremiah 23 in the LBA

Jeremiah 23 in the LBLA

Jeremiah 23 in the LNT

Jeremiah 23 in the LSV

Jeremiah 23 in the MAAL

Jeremiah 23 in the MBV

Jeremiah 23 in the MBV2

Jeremiah 23 in the MHNT

Jeremiah 23 in the MKNFD

Jeremiah 23 in the MNG

Jeremiah 23 in the MNT

Jeremiah 23 in the MNT2

Jeremiah 23 in the MRS1T

Jeremiah 23 in the NAA

Jeremiah 23 in the NASB

Jeremiah 23 in the NBLA

Jeremiah 23 in the NBS

Jeremiah 23 in the NBVTP

Jeremiah 23 in the NET2

Jeremiah 23 in the NIV11

Jeremiah 23 in the NNT

Jeremiah 23 in the NNT2

Jeremiah 23 in the NNT3

Jeremiah 23 in the PDDPT

Jeremiah 23 in the PFNT

Jeremiah 23 in the RMNT

Jeremiah 23 in the SBIAS

Jeremiah 23 in the SBIBS

Jeremiah 23 in the SBIBS2

Jeremiah 23 in the SBICS

Jeremiah 23 in the SBIDS

Jeremiah 23 in the SBIGS

Jeremiah 23 in the SBIHS

Jeremiah 23 in the SBIIS

Jeremiah 23 in the SBIIS2

Jeremiah 23 in the SBIIS3

Jeremiah 23 in the SBIKS

Jeremiah 23 in the SBIKS2

Jeremiah 23 in the SBIMS

Jeremiah 23 in the SBIOS

Jeremiah 23 in the SBIPS

Jeremiah 23 in the SBISS

Jeremiah 23 in the SBITS

Jeremiah 23 in the SBITS2

Jeremiah 23 in the SBITS3

Jeremiah 23 in the SBITS4

Jeremiah 23 in the SBIUS

Jeremiah 23 in the SBIVS

Jeremiah 23 in the SBT

Jeremiah 23 in the SBT1E

Jeremiah 23 in the SCHL

Jeremiah 23 in the SNT

Jeremiah 23 in the SUSU

Jeremiah 23 in the SUSU2

Jeremiah 23 in the SYNO

Jeremiah 23 in the TBIAOTANT

Jeremiah 23 in the TBT1E

Jeremiah 23 in the TBT1E2

Jeremiah 23 in the TFTIP

Jeremiah 23 in the TFTU

Jeremiah 23 in the TGNTATF3T

Jeremiah 23 in the THAI

Jeremiah 23 in the TNFD

Jeremiah 23 in the TNT

Jeremiah 23 in the TNTIK

Jeremiah 23 in the TNTIL

Jeremiah 23 in the TNTIN

Jeremiah 23 in the TNTIP

Jeremiah 23 in the TNTIZ

Jeremiah 23 in the TOMA

Jeremiah 23 in the TTENT

Jeremiah 23 in the UBG

Jeremiah 23 in the UGV

Jeremiah 23 in the UGV2

Jeremiah 23 in the UGV3

Jeremiah 23 in the VBL

Jeremiah 23 in the VDCC

Jeremiah 23 in the YALU

Jeremiah 23 in the YAPE

Jeremiah 23 in the YBVTP

Jeremiah 23 in the ZBP