Jeremiah 4 (BOLCB2)

1 « Oh Isalaele, soki okozonga,zonga epai na Ngai, »elobi Yawe,« soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngaimpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ; 2 soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo :‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambolampe ekomipesa nkembo mpo na yo. » 3 Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi :« Bokata bilanga ya sika,mpe botika kolona kati na banzube. 4 Bomibulisa mpo na Yawe,bopetola mitema na bino,bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ;noki te kanda na Ngai ekopelampe ekozikisa bino lokola motompo na mabe oyo bozali kosala ;ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango. 5 Bopanza sango na mokili ya Yuda,botatola na Yelusalemi mpe boloba :‹ Bobeta kelelo na mokili ! ›Boganga makasi mpe bobelela :‹ Bosangana, bino nyonso !Tokima na bingumba batonga makasi ! › 6 Botombola bendele mpo na kokende na Siona !Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasiwuta na nor mpe kobebisama ya somo ! » 7 Nkosi moko ebimi na ndako na yango ;mobebisi moko ya bikolo abimi.Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo.Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te. 8 Yango wana, bolata bilamba ya basaki,bosala matanga mpe bolela,pamba te kanda makasi ya Yawe elongwena mito na biso te. 9 « Na mokolo wana, »elobi Yawe,« mokonzi mpe bakalaka na ye bakolemba nzoto,Banganga-Nzambe bakoyoka somompe basakoli bakokamwa. » 10 Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. » 11 Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi : « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai ; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola. 12 Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. » 13 Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata,bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ;mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu.Mawa na biso ! Tokufi na biso ! 14 Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama.Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ? 15 Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani,ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi. 16 « Boloba yango na bikolompe botatola yango na Yelusalemi :‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya,ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda. 17 Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga,pamba te etombokelaki Ngai, › »elobi Yawe. 18 « Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango.Tala, etumbu na yo ezali bololompe ekosala pasi makasi na motema. » 19 Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh !Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi,ezali koswa makasi kati na ngai,mpe nazali kokoka kokanga monoko te,pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba. 20 Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ;mokili mobimba ekufi.Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi,mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko. 21 Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba,mpe nakoyoka makelele ya bitumba ? 22 « Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ;bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te,bayebi kaka kosala mabe,kasi bayebi kosala bolamu te. » 23 Tango natalaki mabele,namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongompe ezalaki ata na eloko moko te ;tango natalaki likolo,namonaki ete pole ezalaki lisusu te. 24 Tango natalaki bangomba,namonaki yango koningana,bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana. 25 Mpe tango natalaki malamu,namonaki lisusu ata moto moko te,mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki. 26 Tango nakobaki kotala,namonaki ete mokili oyo ezalakina mabele ya malamu ekomaki esobe ;bingumba na yango nyonso ebebisamakiliboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye. 27 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Mokili mobimba ekobebisama,kasi nakobebisa yango nyonso te. 28 Yango wana, mokili ekozala na matanga ;mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindopamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te ;lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. » 29 Bato nyonso ya engumba bakimi,kaka na makelele ya basodaoyo batambolaka likolo ya bampunda,mpe oyo babundaka na matolotolo.Bamoko babombami na bazamba,bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba ;bingumba nyonso etikali lisusu na bato te,mpe ata moto moko te atikali kuna. 30 Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ?Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ;otie bonzenga na miso na yo.Ozali komikomisa kitoko na pamba,bamakangu na yo bazali kotiola yompe bazali koluka koboma yo. 31 Nayoki makelele lokola koganga ya mwasioyo azali na pasi ya kobota,kolela ya pasi lokola mwasioyo azali kobota mwana na ye ya liboso :ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ;azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba :« Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »

In Other Versions

Jeremiah 4 in the ANGEFD

Jeremiah 4 in the ANTPNG2D

Jeremiah 4 in the AS21

Jeremiah 4 in the BAGH

Jeremiah 4 in the BBPNG

Jeremiah 4 in the BBT1E

Jeremiah 4 in the BDS

Jeremiah 4 in the BEV

Jeremiah 4 in the BHAD

Jeremiah 4 in the BIB

Jeremiah 4 in the BLPT

Jeremiah 4 in the BNT

Jeremiah 4 in the BNTABOOT

Jeremiah 4 in the BNTLV

Jeremiah 4 in the BOATCB

Jeremiah 4 in the BOATCB2

Jeremiah 4 in the BOBCV

Jeremiah 4 in the BOCNT

Jeremiah 4 in the BOECS

Jeremiah 4 in the BOGWICC

Jeremiah 4 in the BOHCB

Jeremiah 4 in the BOHCV

Jeremiah 4 in the BOHLNT

Jeremiah 4 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 4 in the BOICB

Jeremiah 4 in the BOILNTAP

Jeremiah 4 in the BOITCV

Jeremiah 4 in the BOKCV

Jeremiah 4 in the BOKCV2

Jeremiah 4 in the BOKHWOG

Jeremiah 4 in the BOKSSV

Jeremiah 4 in the BOLCB

Jeremiah 4 in the BOMCV

Jeremiah 4 in the BONAV

Jeremiah 4 in the BONCB

Jeremiah 4 in the BONLT

Jeremiah 4 in the BONUT2

Jeremiah 4 in the BOPLNT

Jeremiah 4 in the BOSCB

Jeremiah 4 in the BOSNC

Jeremiah 4 in the BOTLNT

Jeremiah 4 in the BOVCB

Jeremiah 4 in the BOYCB

Jeremiah 4 in the BPBB

Jeremiah 4 in the BPH

Jeremiah 4 in the BSB

Jeremiah 4 in the CCB

Jeremiah 4 in the CUV

Jeremiah 4 in the CUVS

Jeremiah 4 in the DBT

Jeremiah 4 in the DGDNT

Jeremiah 4 in the DHNT

Jeremiah 4 in the DNT

Jeremiah 4 in the ELBE

Jeremiah 4 in the EMTV

Jeremiah 4 in the ESV

Jeremiah 4 in the FBV

Jeremiah 4 in the FEB

Jeremiah 4 in the GGMNT

Jeremiah 4 in the GNT

Jeremiah 4 in the HARY

Jeremiah 4 in the HNT

Jeremiah 4 in the IRVA

Jeremiah 4 in the IRVB

Jeremiah 4 in the IRVG

Jeremiah 4 in the IRVH

Jeremiah 4 in the IRVK

Jeremiah 4 in the IRVM

Jeremiah 4 in the IRVM2

Jeremiah 4 in the IRVO

Jeremiah 4 in the IRVP

Jeremiah 4 in the IRVT

Jeremiah 4 in the IRVT2

Jeremiah 4 in the IRVU

Jeremiah 4 in the ISVN

Jeremiah 4 in the JSNT

Jeremiah 4 in the KAPI

Jeremiah 4 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 4 in the KBV

Jeremiah 4 in the KJV

Jeremiah 4 in the KNFD

Jeremiah 4 in the LBA

Jeremiah 4 in the LBLA

Jeremiah 4 in the LNT

Jeremiah 4 in the LSV

Jeremiah 4 in the MAAL

Jeremiah 4 in the MBV

Jeremiah 4 in the MBV2

Jeremiah 4 in the MHNT

Jeremiah 4 in the MKNFD

Jeremiah 4 in the MNG

Jeremiah 4 in the MNT

Jeremiah 4 in the MNT2

Jeremiah 4 in the MRS1T

Jeremiah 4 in the NAA

Jeremiah 4 in the NASB

Jeremiah 4 in the NBLA

Jeremiah 4 in the NBS

Jeremiah 4 in the NBVTP

Jeremiah 4 in the NET2

Jeremiah 4 in the NIV11

Jeremiah 4 in the NNT

Jeremiah 4 in the NNT2

Jeremiah 4 in the NNT3

Jeremiah 4 in the PDDPT

Jeremiah 4 in the PFNT

Jeremiah 4 in the RMNT

Jeremiah 4 in the SBIAS

Jeremiah 4 in the SBIBS

Jeremiah 4 in the SBIBS2

Jeremiah 4 in the SBICS

Jeremiah 4 in the SBIDS

Jeremiah 4 in the SBIGS

Jeremiah 4 in the SBIHS

Jeremiah 4 in the SBIIS

Jeremiah 4 in the SBIIS2

Jeremiah 4 in the SBIIS3

Jeremiah 4 in the SBIKS

Jeremiah 4 in the SBIKS2

Jeremiah 4 in the SBIMS

Jeremiah 4 in the SBIOS

Jeremiah 4 in the SBIPS

Jeremiah 4 in the SBISS

Jeremiah 4 in the SBITS

Jeremiah 4 in the SBITS2

Jeremiah 4 in the SBITS3

Jeremiah 4 in the SBITS4

Jeremiah 4 in the SBIUS

Jeremiah 4 in the SBIVS

Jeremiah 4 in the SBT

Jeremiah 4 in the SBT1E

Jeremiah 4 in the SCHL

Jeremiah 4 in the SNT

Jeremiah 4 in the SUSU

Jeremiah 4 in the SUSU2

Jeremiah 4 in the SYNO

Jeremiah 4 in the TBIAOTANT

Jeremiah 4 in the TBT1E

Jeremiah 4 in the TBT1E2

Jeremiah 4 in the TFTIP

Jeremiah 4 in the TFTU

Jeremiah 4 in the TGNTATF3T

Jeremiah 4 in the THAI

Jeremiah 4 in the TNFD

Jeremiah 4 in the TNT

Jeremiah 4 in the TNTIK

Jeremiah 4 in the TNTIL

Jeremiah 4 in the TNTIN

Jeremiah 4 in the TNTIP

Jeremiah 4 in the TNTIZ

Jeremiah 4 in the TOMA

Jeremiah 4 in the TTENT

Jeremiah 4 in the UBG

Jeremiah 4 in the UGV

Jeremiah 4 in the UGV2

Jeremiah 4 in the UGV3

Jeremiah 4 in the VBL

Jeremiah 4 in the VDCC

Jeremiah 4 in the YALU

Jeremiah 4 in the YAPE

Jeremiah 4 in the YBVTP

Jeremiah 4 in the ZBP