John 16 (BOLCB2)

1 Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete bokweya te na komekama to mpo ete kondima na bino ekweya te. 2 Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka. 3 Bakosala bongo mpo ete batikalaki koyeba te ezala Tata to ngai. 4 Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino. 5 Sik’oyo, nazali kokende epai na Ye oyo atindaki Ngai, mpe moko te kati na bino azali kotuna Ngai : « Ozali kokende wapi ? » 6 Kasi mpo ete nalobi na bino bongo, mawa etondi kati na mitema na bino. 7 Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye. 8 Bongo tango akoya, akotalisa bato ya mokili na tina na lisumu, na tina na bosembo mpe na tina na kosambisama : 9 na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te ; 10 na tina na bosembo, pamba te nakeyi epai ya Tata, mpe bokomona Ngai lisusu te ; 11 na tina na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asili kosambisama. 12 Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo. 13 Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso ; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya ; 14 akomonisa nkembo na Ngai, pamba te akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango. 15 Nyonso oyo ezali ya Tata ezali mpe ya Ngai ; yango wana nalobi ete akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango. 16 Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu. 17 Ndambo ya bayekoli ya Yesu bakomaki komituna :— Yesu alingi penza koyebisa biso nini na maloba oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu » mpe « nazali kokende epai ya Tata ? » 18 Bamitunaki lisusu :— Alingi kotalisa nini tango alobi : « Etikali mwa tango moke ? » Tozali kososola te ndimbola to tina na yango. 19 Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango : — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? » 20 Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21 Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto. 22 Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango. 23 Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo : Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai. 24 Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka. 25 Nalobaki na bino makambo wana nyonso na masese ; kasi tango ezali koya, tango oyo nakoloba na bino lisusu na masese te, kasi tango oyo nakoyebisa bino na polele penza makambo oyo etali Tata. 26 Na mokolo wana, bokosenga na Kombo na Ngai. Nazali koloba na bino te ete nakosengela bino epai ya Tata. 27 Ye moko Tata alingaka bino, pamba te bolingaka Ngai mpe bondimaki ete nawutaki epai na Nzambe. 28 Solo, nawutaki epai ya Tata mpe nayaki kati na mokili ; mpe sik’oyo, nazali kotika mokili mpe nazali kozonga epai ya Tata. 29 Bayekoli ya Yesu balobaki :— Okomi sik’oyo koloba na biso na polele mpe otiki koloba na masese ! 30 Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe. 31 Yesu azongiselaki bango : — Bondimi sik’oyo ? 32 Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai. 33 Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

In Other Versions

John 16 in the ANGEFD

John 16 in the ANTPNG2D

John 16 in the AS21

John 16 in the BAGH

John 16 in the BBPNG

John 16 in the BBT1E

John 16 in the BDS

John 16 in the BEV

John 16 in the BHAD

John 16 in the BIB

John 16 in the BLPT

John 16 in the BNT

John 16 in the BNTABOOT

John 16 in the BNTLV

John 16 in the BOATCB

John 16 in the BOATCB2

John 16 in the BOBCV

John 16 in the BOCNT

John 16 in the BOECS

John 16 in the BOGWICC

John 16 in the BOHCB

John 16 in the BOHCV

John 16 in the BOHLNT

John 16 in the BOHNTLTAL

John 16 in the BOICB

John 16 in the BOILNTAP

John 16 in the BOITCV

John 16 in the BOKCV

John 16 in the BOKCV2

John 16 in the BOKHWOG

John 16 in the BOKSSV

John 16 in the BOLCB

John 16 in the BOMCV

John 16 in the BONAV

John 16 in the BONCB

John 16 in the BONLT

John 16 in the BONUT2

John 16 in the BOPLNT

John 16 in the BOSCB

John 16 in the BOSNC

John 16 in the BOTLNT

John 16 in the BOVCB

John 16 in the BOYCB

John 16 in the BPBB

John 16 in the BPH

John 16 in the BSB

John 16 in the CCB

John 16 in the CUV

John 16 in the CUVS

John 16 in the DBT

John 16 in the DGDNT

John 16 in the DHNT

John 16 in the DNT

John 16 in the ELBE

John 16 in the EMTV

John 16 in the ESV

John 16 in the FBV

John 16 in the FEB

John 16 in the GGMNT

John 16 in the GNT

John 16 in the HARY

John 16 in the HNT

John 16 in the IRVA

John 16 in the IRVB

John 16 in the IRVG

John 16 in the IRVH

John 16 in the IRVK

John 16 in the IRVM

John 16 in the IRVM2

John 16 in the IRVO

John 16 in the IRVP

John 16 in the IRVT

John 16 in the IRVT2

John 16 in the IRVU

John 16 in the ISVN

John 16 in the JSNT

John 16 in the KAPI

John 16 in the KBT1ETNIK

John 16 in the KBV

John 16 in the KJV

John 16 in the KNFD

John 16 in the LBA

John 16 in the LBLA

John 16 in the LNT

John 16 in the LSV

John 16 in the MAAL

John 16 in the MBV

John 16 in the MBV2

John 16 in the MHNT

John 16 in the MKNFD

John 16 in the MNG

John 16 in the MNT

John 16 in the MNT2

John 16 in the MRS1T

John 16 in the NAA

John 16 in the NASB

John 16 in the NBLA

John 16 in the NBS

John 16 in the NBVTP

John 16 in the NET2

John 16 in the NIV11

John 16 in the NNT

John 16 in the NNT2

John 16 in the NNT3

John 16 in the PDDPT

John 16 in the PFNT

John 16 in the RMNT

John 16 in the SBIAS

John 16 in the SBIBS

John 16 in the SBIBS2

John 16 in the SBICS

John 16 in the SBIDS

John 16 in the SBIGS

John 16 in the SBIHS

John 16 in the SBIIS

John 16 in the SBIIS2

John 16 in the SBIIS3

John 16 in the SBIKS

John 16 in the SBIKS2

John 16 in the SBIMS

John 16 in the SBIOS

John 16 in the SBIPS

John 16 in the SBISS

John 16 in the SBITS

John 16 in the SBITS2

John 16 in the SBITS3

John 16 in the SBITS4

John 16 in the SBIUS

John 16 in the SBIVS

John 16 in the SBT

John 16 in the SBT1E

John 16 in the SCHL

John 16 in the SNT

John 16 in the SUSU

John 16 in the SUSU2

John 16 in the SYNO

John 16 in the TBIAOTANT

John 16 in the TBT1E

John 16 in the TBT1E2

John 16 in the TFTIP

John 16 in the TFTU

John 16 in the TGNTATF3T

John 16 in the THAI

John 16 in the TNFD

John 16 in the TNT

John 16 in the TNTIK

John 16 in the TNTIL

John 16 in the TNTIN

John 16 in the TNTIP

John 16 in the TNTIZ

John 16 in the TOMA

John 16 in the TTENT

John 16 in the UBG

John 16 in the UGV

John 16 in the UGV2

John 16 in the UGV3

John 16 in the VBL

John 16 in the VDCC

John 16 in the YALU

John 16 in the YAPE

John 16 in the YBVTP

John 16 in the ZBP