Matthew 14 (BOLCB2)

1 Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile. 2 Alobaki na basali na ye :— Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa. 3 Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ; 4 pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. » 5 Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli. 6 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi. 7 Boye, Erode alakaki mwasi yango, na nzela ya ndayi, ete akopesa ye nyonso oyo akosenga. 8 Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. » 9 Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango. 10 Atindaki moto moko ete akende kokata moto ya Yoane kati na boloko. 11 Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye. 12 Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango ; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu. 13 Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo. 14 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela. 15 Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye :— Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga. 16 Kasi Yesu alobaki na bango : — Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. 17 Bayekoli bazongisaki :— Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale. 18 Yesu alobaki : — Boya na yango awa epai na Ngai. 19 Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. 20 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. 21 Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana. 22 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato. 23 Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko. 24 Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima. 25 Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. 26 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba :— Elima ! Elima ! Elima !Bagangaki mpo na somo. 27 Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai ! 28 Petelo alobaki na Ye :— Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi. 29 Yesu alobaki na ye : — Yaka.Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu. 30 Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki :— Nkolo, bikisa ngai ! 31 Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ? 32 Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki. 33 Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki :— Ya solo, ozali Mwana na Nzambe ! 34 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti. 35 Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba ; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso. 36 Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango.

In Other Versions

Matthew 14 in the ANGEFD

Matthew 14 in the ANTPNG2D

Matthew 14 in the AS21

Matthew 14 in the BAGH

Matthew 14 in the BBPNG

Matthew 14 in the BBT1E

Matthew 14 in the BDS

Matthew 14 in the BEV

Matthew 14 in the BHAD

Matthew 14 in the BIB

Matthew 14 in the BLPT

Matthew 14 in the BNT

Matthew 14 in the BNTABOOT

Matthew 14 in the BNTLV

Matthew 14 in the BOATCB

Matthew 14 in the BOATCB2

Matthew 14 in the BOBCV

Matthew 14 in the BOCNT

Matthew 14 in the BOECS

Matthew 14 in the BOGWICC

Matthew 14 in the BOHCB

Matthew 14 in the BOHCV

Matthew 14 in the BOHLNT

Matthew 14 in the BOHNTLTAL

Matthew 14 in the BOICB

Matthew 14 in the BOILNTAP

Matthew 14 in the BOITCV

Matthew 14 in the BOKCV

Matthew 14 in the BOKCV2

Matthew 14 in the BOKHWOG

Matthew 14 in the BOKSSV

Matthew 14 in the BOLCB

Matthew 14 in the BOMCV

Matthew 14 in the BONAV

Matthew 14 in the BONCB

Matthew 14 in the BONLT

Matthew 14 in the BONUT2

Matthew 14 in the BOPLNT

Matthew 14 in the BOSCB

Matthew 14 in the BOSNC

Matthew 14 in the BOTLNT

Matthew 14 in the BOVCB

Matthew 14 in the BOYCB

Matthew 14 in the BPBB

Matthew 14 in the BPH

Matthew 14 in the BSB

Matthew 14 in the CCB

Matthew 14 in the CUV

Matthew 14 in the CUVS

Matthew 14 in the DBT

Matthew 14 in the DGDNT

Matthew 14 in the DHNT

Matthew 14 in the DNT

Matthew 14 in the ELBE

Matthew 14 in the EMTV

Matthew 14 in the ESV

Matthew 14 in the FBV

Matthew 14 in the FEB

Matthew 14 in the GGMNT

Matthew 14 in the GNT

Matthew 14 in the HARY

Matthew 14 in the HNT

Matthew 14 in the IRVA

Matthew 14 in the IRVB

Matthew 14 in the IRVG

Matthew 14 in the IRVH

Matthew 14 in the IRVK

Matthew 14 in the IRVM

Matthew 14 in the IRVM2

Matthew 14 in the IRVO

Matthew 14 in the IRVP

Matthew 14 in the IRVT

Matthew 14 in the IRVT2

Matthew 14 in the IRVU

Matthew 14 in the ISVN

Matthew 14 in the JSNT

Matthew 14 in the KAPI

Matthew 14 in the KBT1ETNIK

Matthew 14 in the KBV

Matthew 14 in the KJV

Matthew 14 in the KNFD

Matthew 14 in the LBA

Matthew 14 in the LBLA

Matthew 14 in the LNT

Matthew 14 in the LSV

Matthew 14 in the MAAL

Matthew 14 in the MBV

Matthew 14 in the MBV2

Matthew 14 in the MHNT

Matthew 14 in the MKNFD

Matthew 14 in the MNG

Matthew 14 in the MNT

Matthew 14 in the MNT2

Matthew 14 in the MRS1T

Matthew 14 in the NAA

Matthew 14 in the NASB

Matthew 14 in the NBLA

Matthew 14 in the NBS

Matthew 14 in the NBVTP

Matthew 14 in the NET2

Matthew 14 in the NIV11

Matthew 14 in the NNT

Matthew 14 in the NNT2

Matthew 14 in the NNT3

Matthew 14 in the PDDPT

Matthew 14 in the PFNT

Matthew 14 in the RMNT

Matthew 14 in the SBIAS

Matthew 14 in the SBIBS

Matthew 14 in the SBIBS2

Matthew 14 in the SBICS

Matthew 14 in the SBIDS

Matthew 14 in the SBIGS

Matthew 14 in the SBIHS

Matthew 14 in the SBIIS

Matthew 14 in the SBIIS2

Matthew 14 in the SBIIS3

Matthew 14 in the SBIKS

Matthew 14 in the SBIKS2

Matthew 14 in the SBIMS

Matthew 14 in the SBIOS

Matthew 14 in the SBIPS

Matthew 14 in the SBISS

Matthew 14 in the SBITS

Matthew 14 in the SBITS2

Matthew 14 in the SBITS3

Matthew 14 in the SBITS4

Matthew 14 in the SBIUS

Matthew 14 in the SBIVS

Matthew 14 in the SBT

Matthew 14 in the SBT1E

Matthew 14 in the SCHL

Matthew 14 in the SNT

Matthew 14 in the SUSU

Matthew 14 in the SUSU2

Matthew 14 in the SYNO

Matthew 14 in the TBIAOTANT

Matthew 14 in the TBT1E

Matthew 14 in the TBT1E2

Matthew 14 in the TFTIP

Matthew 14 in the TFTU

Matthew 14 in the TGNTATF3T

Matthew 14 in the THAI

Matthew 14 in the TNFD

Matthew 14 in the TNT

Matthew 14 in the TNTIK

Matthew 14 in the TNTIL

Matthew 14 in the TNTIN

Matthew 14 in the TNTIP

Matthew 14 in the TNTIZ

Matthew 14 in the TOMA

Matthew 14 in the TTENT

Matthew 14 in the UBG

Matthew 14 in the UGV

Matthew 14 in the UGV2

Matthew 14 in the UGV3

Matthew 14 in the VBL

Matthew 14 in the VDCC

Matthew 14 in the YALU

Matthew 14 in the YAPE

Matthew 14 in the YBVTP

Matthew 14 in the ZBP