Matthew 27 (BOLCB2)

1 Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye. 2 Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato. 3 Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato. 4 Alobaki na bango :— Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te !Kasi bango bazongisaki :— Etali biso na nini ? Etali nde yo moko ! 5 Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika. 6 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki :— Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila. 7 Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya. 8 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila. 9 Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki : « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye, 10 mpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. » 11 Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu :— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?Yesu azongisaki : — Olobi yango. 12 Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te. 13 Bongo Pilato atunaki Ye :— Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo ? 14 Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe moyangeli akamwaki makasi. 15 Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona. 16 Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi. 17 Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango :— Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ? 18 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye. 19 Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba :— Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye ! 20 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu. 21 Moyangeli atunaki bango lisusu :— Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ?Bazongisaki na koganga :— Barabasi ! 22 Pilato atunaki bango :— Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ?Bato nyonso bazongisaki :— Baka ye na ekulusu ! 23 Pilato atunaki lisusu :— Mabe nini asali ?Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka :— Baka ye na ekulusu ! 24 Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba :— Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino. 25 Bato nyonso bazongisaki :— Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso ! 26 Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. 27 Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda. 28 Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane, 29 balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » 30 Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto. 31 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu. 32 Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu. 33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, 34 bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango. 35 Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke ; 36 mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye. 37 Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu :Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda. 38 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 39 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; 40 bazalaki koloba : « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko ! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu ! » 41 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba : 42 « Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! Azali mokonzi ya Isalaele ! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye. 43 Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › » 44 Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana. 45 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba. 46 Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? 47 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye ; boye bakomaki koloba :— Azali kobenga Eliya ! 48 Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela. 49 Kasi bato mosusu balobaki :— Zela ! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye. 50 Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye. 51 Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki, 52 bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki : 53 ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango. 54 Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki :— Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe ! 55 Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye. 56 Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede. 57 Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu. 58 Akendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato ; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango. 59 Jozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto 60 mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki. 61 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda. 62 Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato 63 mpo na koloba na ye :— Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. » 64 Yango wana, pesa mitindo ete bakengela malamu kunda yango kino na mokolo ya misato. Soki te, bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto mpo ete, na sima, baloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Lokuta oyo ya suka ekoya kozala lisusu mabe koleka oyo ya liboso. 65 Pilato azongisaki :— Bozwa bakengeli mpe bokende kokengela kunda ndenge bokanisi kosala. 66 Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu ; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.

In Other Versions

Matthew 27 in the ANGEFD

Matthew 27 in the ANTPNG2D

Matthew 27 in the AS21

Matthew 27 in the BAGH

Matthew 27 in the BBPNG

Matthew 27 in the BBT1E

Matthew 27 in the BDS

Matthew 27 in the BEV

Matthew 27 in the BHAD

Matthew 27 in the BIB

Matthew 27 in the BLPT

Matthew 27 in the BNT

Matthew 27 in the BNTABOOT

Matthew 27 in the BNTLV

Matthew 27 in the BOATCB

Matthew 27 in the BOATCB2

Matthew 27 in the BOBCV

Matthew 27 in the BOCNT

Matthew 27 in the BOECS

Matthew 27 in the BOGWICC

Matthew 27 in the BOHCB

Matthew 27 in the BOHCV

Matthew 27 in the BOHLNT

Matthew 27 in the BOHNTLTAL

Matthew 27 in the BOICB

Matthew 27 in the BOILNTAP

Matthew 27 in the BOITCV

Matthew 27 in the BOKCV

Matthew 27 in the BOKCV2

Matthew 27 in the BOKHWOG

Matthew 27 in the BOKSSV

Matthew 27 in the BOLCB

Matthew 27 in the BOMCV

Matthew 27 in the BONAV

Matthew 27 in the BONCB

Matthew 27 in the BONLT

Matthew 27 in the BONUT2

Matthew 27 in the BOPLNT

Matthew 27 in the BOSCB

Matthew 27 in the BOSNC

Matthew 27 in the BOTLNT

Matthew 27 in the BOVCB

Matthew 27 in the BOYCB

Matthew 27 in the BPBB

Matthew 27 in the BPH

Matthew 27 in the BSB

Matthew 27 in the CCB

Matthew 27 in the CUV

Matthew 27 in the CUVS

Matthew 27 in the DBT

Matthew 27 in the DGDNT

Matthew 27 in the DHNT

Matthew 27 in the DNT

Matthew 27 in the ELBE

Matthew 27 in the EMTV

Matthew 27 in the ESV

Matthew 27 in the FBV

Matthew 27 in the FEB

Matthew 27 in the GGMNT

Matthew 27 in the GNT

Matthew 27 in the HARY

Matthew 27 in the HNT

Matthew 27 in the IRVA

Matthew 27 in the IRVB

Matthew 27 in the IRVG

Matthew 27 in the IRVH

Matthew 27 in the IRVK

Matthew 27 in the IRVM

Matthew 27 in the IRVM2

Matthew 27 in the IRVO

Matthew 27 in the IRVP

Matthew 27 in the IRVT

Matthew 27 in the IRVT2

Matthew 27 in the IRVU

Matthew 27 in the ISVN

Matthew 27 in the JSNT

Matthew 27 in the KAPI

Matthew 27 in the KBT1ETNIK

Matthew 27 in the KBV

Matthew 27 in the KJV

Matthew 27 in the KNFD

Matthew 27 in the LBA

Matthew 27 in the LBLA

Matthew 27 in the LNT

Matthew 27 in the LSV

Matthew 27 in the MAAL

Matthew 27 in the MBV

Matthew 27 in the MBV2

Matthew 27 in the MHNT

Matthew 27 in the MKNFD

Matthew 27 in the MNG

Matthew 27 in the MNT

Matthew 27 in the MNT2

Matthew 27 in the MRS1T

Matthew 27 in the NAA

Matthew 27 in the NASB

Matthew 27 in the NBLA

Matthew 27 in the NBS

Matthew 27 in the NBVTP

Matthew 27 in the NET2

Matthew 27 in the NIV11

Matthew 27 in the NNT

Matthew 27 in the NNT2

Matthew 27 in the NNT3

Matthew 27 in the PDDPT

Matthew 27 in the PFNT

Matthew 27 in the RMNT

Matthew 27 in the SBIAS

Matthew 27 in the SBIBS

Matthew 27 in the SBIBS2

Matthew 27 in the SBICS

Matthew 27 in the SBIDS

Matthew 27 in the SBIGS

Matthew 27 in the SBIHS

Matthew 27 in the SBIIS

Matthew 27 in the SBIIS2

Matthew 27 in the SBIIS3

Matthew 27 in the SBIKS

Matthew 27 in the SBIKS2

Matthew 27 in the SBIMS

Matthew 27 in the SBIOS

Matthew 27 in the SBIPS

Matthew 27 in the SBISS

Matthew 27 in the SBITS

Matthew 27 in the SBITS2

Matthew 27 in the SBITS3

Matthew 27 in the SBITS4

Matthew 27 in the SBIUS

Matthew 27 in the SBIVS

Matthew 27 in the SBT

Matthew 27 in the SBT1E

Matthew 27 in the SCHL

Matthew 27 in the SNT

Matthew 27 in the SUSU

Matthew 27 in the SUSU2

Matthew 27 in the SYNO

Matthew 27 in the TBIAOTANT

Matthew 27 in the TBT1E

Matthew 27 in the TBT1E2

Matthew 27 in the TFTIP

Matthew 27 in the TFTU

Matthew 27 in the TGNTATF3T

Matthew 27 in the THAI

Matthew 27 in the TNFD

Matthew 27 in the TNT

Matthew 27 in the TNTIK

Matthew 27 in the TNTIL

Matthew 27 in the TNTIN

Matthew 27 in the TNTIP

Matthew 27 in the TNTIZ

Matthew 27 in the TOMA

Matthew 27 in the TTENT

Matthew 27 in the UBG

Matthew 27 in the UGV

Matthew 27 in the UGV2

Matthew 27 in the UGV3

Matthew 27 in the VBL

Matthew 27 in the VDCC

Matthew 27 in the YALU

Matthew 27 in the YAPE

Matthew 27 in the YBVTP

Matthew 27 in the ZBP