Mark 15 (BOLCB2)

1 Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato. 2 Pilato atunaki Yesu :— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?Yesu azongisaki : — Olobi yango. 3 Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele. 4 Pilato atunaki Ye lisusu :— Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo ? 5 Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe Pilato akamwaki makasi. 6 Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga. 7 Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto. 8 Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala. 9 Pilato atunaki :— Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ? 10 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye. 11 Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko. 12 Pilato atunaki bango :— Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda ? 13 Bagangaki lisusu :— Baka ye na ekulusu ! 14 Pilato atunaki bango lisusu :— Mabe nini asali ?Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka :— Baka ye na ekulusu ! 15 Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. 16 Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda. 17 Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube ; 18 mpe babandaki kopesa ye mbote : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » 19 Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye. 20 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu. 21 Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi. 22 Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, 23 bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te. 24 Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa. 25 Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo. 26 Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu :Mokonzi ya Bayuda. 27 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [ 28 Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »] 29 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba :— Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, 30 mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu ! 31 Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango :— Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! 32 Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima !Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye. 33 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba. 34 Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? » 35 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba :— Boyoka, azali kobenga Eliya ! 36 Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki :— Totala soki Eliya akoya kokitisa ye. 37 Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema. 38 Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se. 39 Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki :— Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe ! 40 Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ; 41 oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu. 42 Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba, 43 Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. 44 Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa ; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa. 45 Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu. 46 Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango ; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango. 47 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.

In Other Versions

Mark 15 in the ANGEFD

Mark 15 in the ANTPNG2D

Mark 15 in the AS21

Mark 15 in the BAGH

Mark 15 in the BBPNG

Mark 15 in the BBT1E

Mark 15 in the BDS

Mark 15 in the BEV

Mark 15 in the BHAD

Mark 15 in the BIB

Mark 15 in the BLPT

Mark 15 in the BNT

Mark 15 in the BNTABOOT

Mark 15 in the BNTLV

Mark 15 in the BOATCB

Mark 15 in the BOATCB2

Mark 15 in the BOBCV

Mark 15 in the BOCNT

Mark 15 in the BOECS

Mark 15 in the BOGWICC

Mark 15 in the BOHCB

Mark 15 in the BOHCV

Mark 15 in the BOHLNT

Mark 15 in the BOHNTLTAL

Mark 15 in the BOICB

Mark 15 in the BOILNTAP

Mark 15 in the BOITCV

Mark 15 in the BOKCV

Mark 15 in the BOKCV2

Mark 15 in the BOKHWOG

Mark 15 in the BOKSSV

Mark 15 in the BOLCB

Mark 15 in the BOMCV

Mark 15 in the BONAV

Mark 15 in the BONCB

Mark 15 in the BONLT

Mark 15 in the BONUT2

Mark 15 in the BOPLNT

Mark 15 in the BOSCB

Mark 15 in the BOSNC

Mark 15 in the BOTLNT

Mark 15 in the BOVCB

Mark 15 in the BOYCB

Mark 15 in the BPBB

Mark 15 in the BPH

Mark 15 in the BSB

Mark 15 in the CCB

Mark 15 in the CUV

Mark 15 in the CUVS

Mark 15 in the DBT

Mark 15 in the DGDNT

Mark 15 in the DHNT

Mark 15 in the DNT

Mark 15 in the ELBE

Mark 15 in the EMTV

Mark 15 in the ESV

Mark 15 in the FBV

Mark 15 in the FEB

Mark 15 in the GGMNT

Mark 15 in the GNT

Mark 15 in the HARY

Mark 15 in the HNT

Mark 15 in the IRVA

Mark 15 in the IRVB

Mark 15 in the IRVG

Mark 15 in the IRVH

Mark 15 in the IRVK

Mark 15 in the IRVM

Mark 15 in the IRVM2

Mark 15 in the IRVO

Mark 15 in the IRVP

Mark 15 in the IRVT

Mark 15 in the IRVT2

Mark 15 in the IRVU

Mark 15 in the ISVN

Mark 15 in the JSNT

Mark 15 in the KAPI

Mark 15 in the KBT1ETNIK

Mark 15 in the KBV

Mark 15 in the KJV

Mark 15 in the KNFD

Mark 15 in the LBA

Mark 15 in the LBLA

Mark 15 in the LNT

Mark 15 in the LSV

Mark 15 in the MAAL

Mark 15 in the MBV

Mark 15 in the MBV2

Mark 15 in the MHNT

Mark 15 in the MKNFD

Mark 15 in the MNG

Mark 15 in the MNT

Mark 15 in the MNT2

Mark 15 in the MRS1T

Mark 15 in the NAA

Mark 15 in the NASB

Mark 15 in the NBLA

Mark 15 in the NBS

Mark 15 in the NBVTP

Mark 15 in the NET2

Mark 15 in the NIV11

Mark 15 in the NNT

Mark 15 in the NNT2

Mark 15 in the NNT3

Mark 15 in the PDDPT

Mark 15 in the PFNT

Mark 15 in the RMNT

Mark 15 in the SBIAS

Mark 15 in the SBIBS

Mark 15 in the SBIBS2

Mark 15 in the SBICS

Mark 15 in the SBIDS

Mark 15 in the SBIGS

Mark 15 in the SBIHS

Mark 15 in the SBIIS

Mark 15 in the SBIIS2

Mark 15 in the SBIIS3

Mark 15 in the SBIKS

Mark 15 in the SBIKS2

Mark 15 in the SBIMS

Mark 15 in the SBIOS

Mark 15 in the SBIPS

Mark 15 in the SBISS

Mark 15 in the SBITS

Mark 15 in the SBITS2

Mark 15 in the SBITS3

Mark 15 in the SBITS4

Mark 15 in the SBIUS

Mark 15 in the SBIVS

Mark 15 in the SBT

Mark 15 in the SBT1E

Mark 15 in the SCHL

Mark 15 in the SNT

Mark 15 in the SUSU

Mark 15 in the SUSU2

Mark 15 in the SYNO

Mark 15 in the TBIAOTANT

Mark 15 in the TBT1E

Mark 15 in the TBT1E2

Mark 15 in the TFTIP

Mark 15 in the TFTU

Mark 15 in the TGNTATF3T

Mark 15 in the THAI

Mark 15 in the TNFD

Mark 15 in the TNT

Mark 15 in the TNTIK

Mark 15 in the TNTIL

Mark 15 in the TNTIN

Mark 15 in the TNTIP

Mark 15 in the TNTIZ

Mark 15 in the TOMA

Mark 15 in the TTENT

Mark 15 in the UBG

Mark 15 in the UGV

Mark 15 in the UGV2

Mark 15 in the UGV3

Mark 15 in the VBL

Mark 15 in the VDCC

Mark 15 in the YALU

Mark 15 in the YAPE

Mark 15 in the YBVTP

Mark 15 in the ZBP