Mark 4 (BOLCB2)

1 Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale. 2 Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba : 3 « Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona. 4 Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. 5 Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te. 6 Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te. 7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te. 8 Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. » 9 Yesu azalaki lisusu koloba : « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! » 10 Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese. 11 Yesu alobaki na bango : — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ; 12 mpo ete : atako bakoki kotala, bamona eloko te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te ; noki te bakobongola mitema, mpe masumu na bango ekolimbisama. 13 Bongo Yesu alobaki na bango : — Boni, bososoli lisese oyo te ? Ndenge nini bokososola masese mosusu ? 14 Moloni alonaka Liloba. 15 Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango. 16 Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga : bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo ; 17 kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango. 18 Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube : bayoki na bango Liloba ; 19 kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango. 20 Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu : bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma ; moko aboti bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko. 21 Yesu alobaki na bango lisusu : — Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda ? 22 Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole. 23 Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! 24 Alobaki lisusu : — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka ! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka ; 25 pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 26 Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele : 27 butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola ; 28 pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma : liboso, moto ya nzete ; sima, matiti ; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete. 29 Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki. 30 Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango ? 31 Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili. 32 Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango. 33 Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango ; 34 azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso. 35 Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. 36 Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango. 37 Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. 38 Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :— Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ? 39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale : — Tika makelele ! Vanda nye !Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki. 40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ? 41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »

In Other Versions

Mark 4 in the ANGEFD

Mark 4 in the ANTPNG2D

Mark 4 in the AS21

Mark 4 in the BAGH

Mark 4 in the BBPNG

Mark 4 in the BBT1E

Mark 4 in the BDS

Mark 4 in the BEV

Mark 4 in the BHAD

Mark 4 in the BIB

Mark 4 in the BLPT

Mark 4 in the BNT

Mark 4 in the BNTABOOT

Mark 4 in the BNTLV

Mark 4 in the BOATCB

Mark 4 in the BOATCB2

Mark 4 in the BOBCV

Mark 4 in the BOCNT

Mark 4 in the BOECS

Mark 4 in the BOGWICC

Mark 4 in the BOHCB

Mark 4 in the BOHCV

Mark 4 in the BOHLNT

Mark 4 in the BOHNTLTAL

Mark 4 in the BOICB

Mark 4 in the BOILNTAP

Mark 4 in the BOITCV

Mark 4 in the BOKCV

Mark 4 in the BOKCV2

Mark 4 in the BOKHWOG

Mark 4 in the BOKSSV

Mark 4 in the BOLCB

Mark 4 in the BOMCV

Mark 4 in the BONAV

Mark 4 in the BONCB

Mark 4 in the BONLT

Mark 4 in the BONUT2

Mark 4 in the BOPLNT

Mark 4 in the BOSCB

Mark 4 in the BOSNC

Mark 4 in the BOTLNT

Mark 4 in the BOVCB

Mark 4 in the BOYCB

Mark 4 in the BPBB

Mark 4 in the BPH

Mark 4 in the BSB

Mark 4 in the CCB

Mark 4 in the CUV

Mark 4 in the CUVS

Mark 4 in the DBT

Mark 4 in the DGDNT

Mark 4 in the DHNT

Mark 4 in the DNT

Mark 4 in the ELBE

Mark 4 in the EMTV

Mark 4 in the ESV

Mark 4 in the FBV

Mark 4 in the FEB

Mark 4 in the GGMNT

Mark 4 in the GNT

Mark 4 in the HARY

Mark 4 in the HNT

Mark 4 in the IRVA

Mark 4 in the IRVB

Mark 4 in the IRVG

Mark 4 in the IRVH

Mark 4 in the IRVK

Mark 4 in the IRVM

Mark 4 in the IRVM2

Mark 4 in the IRVO

Mark 4 in the IRVP

Mark 4 in the IRVT

Mark 4 in the IRVT2

Mark 4 in the IRVU

Mark 4 in the ISVN

Mark 4 in the JSNT

Mark 4 in the KAPI

Mark 4 in the KBT1ETNIK

Mark 4 in the KBV

Mark 4 in the KJV

Mark 4 in the KNFD

Mark 4 in the LBA

Mark 4 in the LBLA

Mark 4 in the LNT

Mark 4 in the LSV

Mark 4 in the MAAL

Mark 4 in the MBV

Mark 4 in the MBV2

Mark 4 in the MHNT

Mark 4 in the MKNFD

Mark 4 in the MNG

Mark 4 in the MNT

Mark 4 in the MNT2

Mark 4 in the MRS1T

Mark 4 in the NAA

Mark 4 in the NASB

Mark 4 in the NBLA

Mark 4 in the NBS

Mark 4 in the NBVTP

Mark 4 in the NET2

Mark 4 in the NIV11

Mark 4 in the NNT

Mark 4 in the NNT2

Mark 4 in the NNT3

Mark 4 in the PDDPT

Mark 4 in the PFNT

Mark 4 in the RMNT

Mark 4 in the SBIAS

Mark 4 in the SBIBS

Mark 4 in the SBIBS2

Mark 4 in the SBICS

Mark 4 in the SBIDS

Mark 4 in the SBIGS

Mark 4 in the SBIHS

Mark 4 in the SBIIS

Mark 4 in the SBIIS2

Mark 4 in the SBIIS3

Mark 4 in the SBIKS

Mark 4 in the SBIKS2

Mark 4 in the SBIMS

Mark 4 in the SBIOS

Mark 4 in the SBIPS

Mark 4 in the SBISS

Mark 4 in the SBITS

Mark 4 in the SBITS2

Mark 4 in the SBITS3

Mark 4 in the SBITS4

Mark 4 in the SBIUS

Mark 4 in the SBIVS

Mark 4 in the SBT

Mark 4 in the SBT1E

Mark 4 in the SCHL

Mark 4 in the SNT

Mark 4 in the SUSU

Mark 4 in the SUSU2

Mark 4 in the SYNO

Mark 4 in the TBIAOTANT

Mark 4 in the TBT1E

Mark 4 in the TBT1E2

Mark 4 in the TFTIP

Mark 4 in the TFTU

Mark 4 in the TGNTATF3T

Mark 4 in the THAI

Mark 4 in the TNFD

Mark 4 in the TNT

Mark 4 in the TNTIK

Mark 4 in the TNTIL

Mark 4 in the TNTIN

Mark 4 in the TNTIP

Mark 4 in the TNTIZ

Mark 4 in the TOMA

Mark 4 in the TTENT

Mark 4 in the UBG

Mark 4 in the UGV

Mark 4 in the UGV2

Mark 4 in the UGV3

Mark 4 in the VBL

Mark 4 in the VDCC

Mark 4 in the YALU

Mark 4 in the YAPE

Mark 4 in the YBVTP

Mark 4 in the ZBP