Numbers 23 (BOLCB2)

1 Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. » 2 Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe bango mibale babonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko. 3 Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. »Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti. 4 Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki :— Nabongisaki bitumbelo sambo ; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko. 5 Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki :— Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo. 6 Bongo Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. 7 Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo :« Balaki abengisaki ngai wuta na Arami,mokonzi ya Moabi abengisaki ngaiwuta na bangomba ya este.Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ;yaka, loba mabe mpo na Isalaele. 8 Ndenge nini nakoki solo kolakela mabebato oyo Nzambe alakela mabe te ?Ndenge nini nakoki solo koloba mabempo na bato oyo Yawe alobela mabe te ? 9 Tala, wuta na likolo ya mabanga,nazali komona bango ;wuta na likolo ya bangomba,nazali kotala bango.Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko,bazali komitanga na molongo ya bikolo te. 10 Nani akoki kotanga putulu ya Jakobito kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ?Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo,mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › » 11 Balaki alobaki na Balami :— Likambo nini osali ngai ? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe ; kasi tala, opamboli bango koleka. 12 Balami azongisaki :— Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ? 13 Balaki alobaki na Balami :— Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai. 14 Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko. 15 Balami alobaki na Balaki :— Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye. 16 Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki :— Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo. 17 Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye :— Yawe alobi nini ? 18 Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo :« Balaki, telema mpe yoka !Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu ! 19 Nzambe azali moto te mpo ete akosa,azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye.Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ?Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ? 20 Nazwaki nde mokumba ya kopambola.Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te. 21 Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi,amonaka minyoko te kati na Isalaele.Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ;koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango. 22 Nzambe abimisaki bango na Ejipito ;bazalaka makasi lokola mpakasa. 23 Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi,mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele.Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele :‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! › 24 Bato oyo batelemi lokola nkosi ya mwasi ;epemaka te soki epasoli te mosuni na yangompe emeli te makila ya nyama oyo ekangi. » 25 Bongo Balaki alobaki na Balami :— Ezala soki okoki te kolakela bango mabe, kasi kopambola bango te. 26 Balami azongiselaki Balaki :— Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ? 27 Balaki alobaki na Balami :— Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango. 28 Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba. 29 Balami alobaki na Balaki :— Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. 30 Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko.

In Other Versions

Numbers 23 in the ANGEFD

Numbers 23 in the ANTPNG2D

Numbers 23 in the AS21

Numbers 23 in the BAGH

Numbers 23 in the BBPNG

Numbers 23 in the BBT1E

Numbers 23 in the BDS

Numbers 23 in the BEV

Numbers 23 in the BHAD

Numbers 23 in the BIB

Numbers 23 in the BLPT

Numbers 23 in the BNT

Numbers 23 in the BNTABOOT

Numbers 23 in the BNTLV

Numbers 23 in the BOATCB

Numbers 23 in the BOATCB2

Numbers 23 in the BOBCV

Numbers 23 in the BOCNT

Numbers 23 in the BOECS

Numbers 23 in the BOGWICC

Numbers 23 in the BOHCB

Numbers 23 in the BOHCV

Numbers 23 in the BOHLNT

Numbers 23 in the BOHNTLTAL

Numbers 23 in the BOICB

Numbers 23 in the BOILNTAP

Numbers 23 in the BOITCV

Numbers 23 in the BOKCV

Numbers 23 in the BOKCV2

Numbers 23 in the BOKHWOG

Numbers 23 in the BOKSSV

Numbers 23 in the BOLCB

Numbers 23 in the BOMCV

Numbers 23 in the BONAV

Numbers 23 in the BONCB

Numbers 23 in the BONLT

Numbers 23 in the BONUT2

Numbers 23 in the BOPLNT

Numbers 23 in the BOSCB

Numbers 23 in the BOSNC

Numbers 23 in the BOTLNT

Numbers 23 in the BOVCB

Numbers 23 in the BOYCB

Numbers 23 in the BPBB

Numbers 23 in the BPH

Numbers 23 in the BSB

Numbers 23 in the CCB

Numbers 23 in the CUV

Numbers 23 in the CUVS

Numbers 23 in the DBT

Numbers 23 in the DGDNT

Numbers 23 in the DHNT

Numbers 23 in the DNT

Numbers 23 in the ELBE

Numbers 23 in the EMTV

Numbers 23 in the ESV

Numbers 23 in the FBV

Numbers 23 in the FEB

Numbers 23 in the GGMNT

Numbers 23 in the GNT

Numbers 23 in the HARY

Numbers 23 in the HNT

Numbers 23 in the IRVA

Numbers 23 in the IRVB

Numbers 23 in the IRVG

Numbers 23 in the IRVH

Numbers 23 in the IRVK

Numbers 23 in the IRVM

Numbers 23 in the IRVM2

Numbers 23 in the IRVO

Numbers 23 in the IRVP

Numbers 23 in the IRVT

Numbers 23 in the IRVT2

Numbers 23 in the IRVU

Numbers 23 in the ISVN

Numbers 23 in the JSNT

Numbers 23 in the KAPI

Numbers 23 in the KBT1ETNIK

Numbers 23 in the KBV

Numbers 23 in the KJV

Numbers 23 in the KNFD

Numbers 23 in the LBA

Numbers 23 in the LBLA

Numbers 23 in the LNT

Numbers 23 in the LSV

Numbers 23 in the MAAL

Numbers 23 in the MBV

Numbers 23 in the MBV2

Numbers 23 in the MHNT

Numbers 23 in the MKNFD

Numbers 23 in the MNG

Numbers 23 in the MNT

Numbers 23 in the MNT2

Numbers 23 in the MRS1T

Numbers 23 in the NAA

Numbers 23 in the NASB

Numbers 23 in the NBLA

Numbers 23 in the NBS

Numbers 23 in the NBVTP

Numbers 23 in the NET2

Numbers 23 in the NIV11

Numbers 23 in the NNT

Numbers 23 in the NNT2

Numbers 23 in the NNT3

Numbers 23 in the PDDPT

Numbers 23 in the PFNT

Numbers 23 in the RMNT

Numbers 23 in the SBIAS

Numbers 23 in the SBIBS

Numbers 23 in the SBIBS2

Numbers 23 in the SBICS

Numbers 23 in the SBIDS

Numbers 23 in the SBIGS

Numbers 23 in the SBIHS

Numbers 23 in the SBIIS

Numbers 23 in the SBIIS2

Numbers 23 in the SBIIS3

Numbers 23 in the SBIKS

Numbers 23 in the SBIKS2

Numbers 23 in the SBIMS

Numbers 23 in the SBIOS

Numbers 23 in the SBIPS

Numbers 23 in the SBISS

Numbers 23 in the SBITS

Numbers 23 in the SBITS2

Numbers 23 in the SBITS3

Numbers 23 in the SBITS4

Numbers 23 in the SBIUS

Numbers 23 in the SBIVS

Numbers 23 in the SBT

Numbers 23 in the SBT1E

Numbers 23 in the SCHL

Numbers 23 in the SNT

Numbers 23 in the SUSU

Numbers 23 in the SUSU2

Numbers 23 in the SYNO

Numbers 23 in the TBIAOTANT

Numbers 23 in the TBT1E

Numbers 23 in the TBT1E2

Numbers 23 in the TFTIP

Numbers 23 in the TFTU

Numbers 23 in the TGNTATF3T

Numbers 23 in the THAI

Numbers 23 in the TNFD

Numbers 23 in the TNT

Numbers 23 in the TNTIK

Numbers 23 in the TNTIL

Numbers 23 in the TNTIN

Numbers 23 in the TNTIP

Numbers 23 in the TNTIZ

Numbers 23 in the TOMA

Numbers 23 in the TTENT

Numbers 23 in the UBG

Numbers 23 in the UGV

Numbers 23 in the UGV2

Numbers 23 in the UGV3

Numbers 23 in the VBL

Numbers 23 in the VDCC

Numbers 23 in the YALU

Numbers 23 in the YAPE

Numbers 23 in the YBVTP

Numbers 23 in the ZBP