Psalms 127 (BOLCB2)
1 Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Soki Yawe atongi ndako te,batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ;soki Yawe akengeli engumba te,bakengeli bazali kosala na pamba. 2 Ezali na pamba nde, bino mpe,bolamukaka na tongo makasi,bolalaka noki te mpe bosalaka makasimpo na kozwa bilei ;pamba te Nzambe apesaka bilei yangokaka na balingami na Ye,wana bazali nanu kolala pongi. 3 Bana bazali libula kowuta na Yawe,mpe kobota bana ezali lifuti. 4 Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,ndenge wana mpe bana oyo moto abotina bolenge na ye bazali. 5 Esengo na moto oyo atondisi makongakati na ebombelo na ye ya makonga !Akokufa soni ata moke tetango akosamba elongo na banguna na yena ekuke ya engumba.